Manaka mpo na pɔsɔ ya 3 Desɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 3 DESƐMBƐ
Loyembo 128 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
jr mok. 2 par. 7-13, etanda na lok. 20 (Min. 30)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Nahumu 1–Habakuku 3 (Min. 10)
No. 1: Habakuku 2:1-14 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini toteyaka solo na kondima nyonso?—2 Tim. 1:7, 8 (Min. 5)
No. 3: Ndenge nini moto akoki kozwa boyebi mpe bwanya ya solo?— rs lok. 199 par. 1–lok. 200 par. 1 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Desɛmbɛ. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti 1 lobelá ntina oyo bazulunalo ekosepelisa bato ya teritware na bino. Na nsima, na lisalisi ya masolo ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, sɛngá bayangani báyebisa mituna oyo bakoki kotuna mpo bábenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na masolo ya ebandeli ya Lamuká!, mpe soki miniti ezali, bólobela mpe lisolo mosusu, ezala ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ya Lamuká! Bósala mpe bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Makambo oyo tokutanaki na yango ntango tokabolaki batrakte. Lisolo ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Sɛngá na bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bakabolaki batrakte na sanza ya Novɛmbɛ. Poná basakoli mibale oyo bazwaki matomba nsima ya kokabola batrakte na mosala ya ndako na ndako bámonisa ndenge basalaki.
Loyembo 96 mpe libondeli