Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya Novɛmbɛ mpe Desɛmbɛ: Etikali moke bampasi nyonso esila!, Yehova azali nani?, Yesu Klisto azali nani?, Okosepela koyeba solo? Soki omoni ete moto asepeli, lakisá ye ndenge toyekolaka Biblia na bato na nzela ya buku Biblia eteyaka to na nzela ya mwa ba buku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. Yanuali mpe Febwali: Tokoki kokabola mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Ntango moto oyo olingaka akufi, Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, to Okoki kozala moninga ya Nzambe! Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto yango, tokoki kosalela mwa ba buku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, tósala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia.
◼ Na mokolo ya pɔsɔ, mwa 24 sanza ya Novɛmbɛ 2012, bandeko ya libota ya Betele bakozala na mosala moko ya sipesiale. Mpo na yango, tosɛngi bino bóya te kotala Betele to bandeko ya libota ya Betele na mokolo yango.
◼ Bopɛto ya Betele mobimba ekosalema na mokolo ya pɔsɔ mwa 8 Desɛmbɛ 2012. Tosɛngi bino bóya te kotala Betele to bandeko ya libota ya Betele na mokolo yango.
◼ Tosɛngi bino bósala nyonso mpo mokapo ya mobu ya sika etyama na ndako ya Bokonzi na bino mwa 1 Yanuali 2013. Bóbosana te ete ezali na ntina te bokoma maloba “Mokapo ya mobu.” Bókoma kaka vɛrsɛ ya Biblia mpe esika oyo ezwami ndenge endimami na Lisangani ya Mikolo-Bakambi.