Manaka mpo na pɔsɔ ya 6 Augusto
PƆSƆ EBANDI NA 6 AUGUSTO
Loyembo 60 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt mok. 15, etanda na lok. 121 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Bótangi ya Biblia: Ezekiele 24-27 (Min. 10)
No. 1: Ezekiele 24:15-27 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini Yehova apesaki Yisraele ya kala nzela ya kobunda bitumba?—rs lok. 218 par. 3–lok. 219 par. 3 (Min. 5)
No. 3: Ezekiele 18:20 eyokani nde te ná Kobima 20:5? (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 10: Osili komibongisa mpo na mbula ya sika ya kelasi? Lisolo na bayangani. Sɛngá bayangani balobela mikakatano oyo bilenge bakristo bakokutana na yango na kelasi. Monisá ndenge oyo baboti bakoki kosalela Index, buku Mituna oyo bilenge batunaka volimi 1 mpe 2, mpe bisaleli mosusu ya moombo ya sembo na ntango ya Losambo na kati ya libota mpo na kobongisa bana na bango mpo báyeba kotɛmɛla komekama mpe kolimbola kondima na bango. (1 Pe. 3:15) Poná lisolo moko to masolo mibale, mpe lobelá makambo mosusu ya ntina oyo ezali na mikanda na biso. Sɛngá bayangani báyebisa ndenge oyo bazwaki likoki ya kopesa litatoli ntango bazalaki naino na kelasi. Salela makanisi oyo ezali na mokanda ya biro ya 15 Yuni 2010. Matomba nini bandeko mosusu bazwaki na ndenge basololaki na balakisi ya bana na bango?
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 10: Makanisi mpo na kokabola bazulunalo na sanza ya Augusto. Lisolo na bayangani. Na segɔnde 30 to miniti moko, monisá mpo na nini bazulunalo yango ekosepelisa bato ya teritware. Na nsima, na lisalisi ya masolo ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, sɛngá na bayangani bayebisa mituna bakotuna mpo na kobenda likebi ya bato, mpe bavɛrsɛ oyo bakoki kotánga. Salá mpe bongo mpo na maloba ya ebandeli ya Lamuká! mpe soki ntango ezali, bólobela mpe lisolo mosusu. Bósala bilakiseli mibale mpo na komonisa ndenge ya kokabola zulunalo mokomoko.
Loyembo 97 mpe libondeli