Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Yuli mpe Augusto: Tokoki kokabola mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: La Bible—Quel est son message ?, La vie a-t-elle été créée ?, to Une vie pleinement satisfaisante : comment ? Ntango tozali kozongela bato, tókɔtisa bango na buku Biblia eteyaka to, na kotalela mposa ya moto yango, tokoki kosalela mwa babuku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko, mpe tokosala makasi ya kobanda koyekola na bango Biblia.
◼ Tozali kosɛnga na masangani ya bankulutu ete bábanda kobongisa formilɛrɛ Visite d’entretien et de vérification de la sécurité de la Salle du Royaume (CN-14), mpo na kotinda yango na nsuka ya mbula. Esengeli kotinda yango liboso ya mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ, kasi nsima te.
◼ Moko ya mikumba ya mokɛngɛli ya etuluku ya mosala ya kosakola ezali ya kozwa balapolo ya basakoli mpe babongisi-nzela ya etuluku na ye. Soki mosakoli mokomoko apesi lapolo na ye ya mosala ya kosakola nokinoki, ekosalisa mokɛngɛli ya etuluku mingi. Yango ekosala ete Betele esangisa balapolo ya masangá nyonso na ntango ebongi na nsuka ya nsanza mokomoko. Kosala bongo ezali mpenza na ntina, mingimingi na sanza ya Yuli mpe Augusto, mpo na kosangisa balapolo ya mosala ya mobu mobimba. (Talá buku Tobongisami mok. 5 lok. 45).
◼ Tóyembela Yehova—Na mingongo, No. 5 ekoki kozwama na Internet na adrɛsi jw.org kobanda mokolo ya 1 Augusto. Ekotyama liboso na Lingelesi, mpe mwa moke na nsima na minɔkɔ mingi mosusu. Okoki kosɛnga CD yango na nzela ya lisangá. Lokola kozwa makambo na nzela ya Internet ezali kosɛnga mbongo mingi te ndenge esɛngaka mpo na kobimisa mpe kotinda ba CD na masangá, tolendisi baoyo bakoki kosala yango, bázwa yango na Internet. CD No. 1 tii 4 ebimá kala.