Manaka mpo na pɔsɔ ya 12 Desɛmbɛ
PƆSƆ EBANDI NA 12 DESƐMBƐ
Loyembo 43 mpe libondeli
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
bt etanda na lok. 33 (Min. 25)
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Yisaya 6-10 (Min. 10)
No. 1: Yisaya 6:1-13 (Eleka min. 4 te)
No. 2: Mpo na nini Nzambe atiki ntango molai eleka liboso ya koboma bato mabe?—rs lok. 365 par. 5-lok. 366 par. 2 (Min. 5)
No. 3: Na ndimbola nini bolingo esilaka soki moke te?—1 Ko. 13:8; 1 Yoa. 4:8 (Min. 5)
□ Likita ya mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 15: Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2012. Diskur ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Lobelá makambo oyo bandeko ya lisangá na bino basengeli kotyela likebi na programɛ ya mobu 2012. Lobelá lisusu mokumba ya mopesi-toli mosungi. Lendisá bandeko nyonso básalaka milende mpo na kokokisa mikumba na bango, mpo na kopesa biyano na lisolo ya makanisi ya ntina na botángi ya Biblia, mpe mpo na kosalela batoli ya buku Eteyelo ya mosala oyo epesamaka pɔsɔ na pɔsɔ.
Min. 15: “Tósakolaka na mabaku nyonso.” Mituna mpe biyano. Ntango bokotalela paragrafe 2, sololá na mokuse na mosakoli moko oyo ameseni kopesa litatoli ya libaku malamu. Tuná ye amonisa ndenge oyo amibongisaka liboso, mpe sɛngá ye alobela likambo moko ya malamu oyo akutanaki na yango.
Loyembo 135 mpe libondeli