Tósakolaka na mabaku nyonso
1. Nini emonisi ete bapalanganisi ya nsango malamu na ekeke ya liboso bazalaki kosakola na mabaku nyonso?
1 Bapalanganisi ya nsango malamu ya molende na ekeke ya liboso bazalaki kosakola nsango malamu “kozanga kotika” bipai nyonso oyo bazalaki kokuta bato. (Mis. 5:42) Yango wana, tokoki koloba ete ntango bazalaki kokende ndako na ndako, bazalaki mpe kosakwela bato oyo bazalaki kokutana na bango na nzela. Tokoki mpe koloba ete bazalaki kozanga te kopesa litatoli ya libaku malamu ntango bazalaki kosomba biloko na zando nsima ya kosilisa mosala ya kosakola. Na ndakisa ya Yesu, bazalaki kosalela mabaku nyonso mpo na kosakola.—Mrk. 6:31-34.
2. Mosala na biso ya Batatoli ya Yehova esangisi mpe makambo nini?
2 Tómibongisaka ntango nyonso: Nkombo na biso ya Batatoli ya Yehova, emonisaka kaka te mosala oyo tosalaka kasi mpe ndenge oyo tosalaka yango. (Yis. 43:10-12) Yango wana, tomibongisaka ntango nyonso mpo na kolobela elikya na biso, ata ntango oyo tozali kosakola ndako na ndako te. (1 Pe. 3:15) Okanisaka liboso mabaku oyo ekoki kopesa yo nzela ya kopesa litatoli ya libaku malamu mpe makambo oyo okoloba? Omemaka mikanda mpo na kopesa bato oyo bakosepela na nsango malamu? (Mas. 21:5) Osakolaka kaka ndako na ndako, to opalanganisaka mpe nsango malamu epai ya bato na bisika mosusu soki likoki ezali?
3. Mpo na nini tosengeli te kobosana kosakola na balabala, na bisika oyo batɛlɛmisaka mituka, na baparke, na bisika ya mombongo, mpe bongo na bongo?
3 Kosakola “na bisika ya bato nyonso”: Tosakolaka na balabala, na bisika oyo batɛlɛmisaka mituka, na baparke, na bisika ya mombongo, mpe bongo na bongo. Lolenge wana ya kosakola ebandi nde na biso? Ekeseni na oyo Biblia esɛngi to tokoki kopona kosalela yango to te? Ntoma Paulo alobaki ete azalaki kosakola “na bisika ya bato nyonso” mpe na ndako na ndako. (Mis. 20:20) Kosakola ndako na ndako ezali lolenge ya libosoliboso ya kosakola oyo tosalelaka mpe yango esalisaka biso tóyebisa bato ebele nsango ya Bokonzi. Nzokande, bapalanganisi ya nsango malamu ya ekeke ya liboso bazalaki kotya likebi mingi nde na bato kasi na bandako te. Bazalaki kosalela mabaku nyonso mpo na koyebisa solo: na bisika ya bato nyonso, litatoli ya libaku malamu, mpe ndako na ndako. Biso mpe tólanda ndakisa na bango mpo tókokisa malamumalamu mosala na biso.—2 Tim. 4:5.