Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Augusto
“Mpo na yo, eloko nini bato basengeli na yango mpo bázala na esengo? [Tiká ye apesa eyano, na nsima tángá Matai 5:3.] Wana ezali kaka likambo moko oyo Yesu alobaki mpo moto azala na esengo. Lisolo oyo emonisi makambo oyo Yesu ateyaki mpo na kozala na esengo ya solosolo.” Limbolá na mokuse lisolo oyo ebandi na lokasa 16.
Lamuká! Augusto
“Lelo oyo, bafilme ebele emonisaka bato bazali komekola bademo mpe bandɔki. Okanisi ete bademo bazalaka mpenza? [Tiká ye apesa eyano, na nsima tángá 1 Bakorinti 10:20.] Lisolo oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na bademo mpe ndenge tokoki komibatela mpo básala biso mabe te.” Limbolá na mokuse lisolo oyo ebandi na lokasa 20.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛtɛmbɛ
Lobelá likambo moko oyo ezali kotungisa bato ya teritware na bino. Na nsima lobá boye: “Osilá komituna mpo na nini bato basalaka makambo mabe ndenge wana? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia eyebisi biso ntina oyo tosengeli kozala na elikya. [Tángá 2 Petro 3:13.] Zulunalo oyo ezali komonisa oyo Biblia elobi mpo na ndenge oyo mabe ebandá mpe ndenge Nzambe akosukisa mabe nyonso mosika te.”
Lamuká! Sɛtɛmbɛ
“Okanisi ete telefone, ordinatɛrɛ, to biloko mosusu oyo bato basalelaka mpo na kosolola to kotindelana bansango esalisi bato bátika komiyoka ete bazali bango moko to te? [Tiká ye apesa eyano.] Talá toli moko oyo ekoki kosalisa biso tómiyoka te ete tozali biso moko. [Tángá Misala 20:35.] Zulunalo oyo epesi batoli mosusu oyo euti na Biblia, oyo ekoki kosalisa biso na likambo yango.”