Manaka mpo na Pɔsɔ ya 4 Mai
PƆSƆ EBANDI NA 4 MAI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Exode 23-26
No. 1: Exode 24:1-18
No. 2: Eloko nini ezali mpenza na ntina? (lr mok. 16)
No. 3: Ndenge ya koyeba baklisto ya solo lelo oyo (rs-F lok. 178 par. 4–lok. 179 par. 2)
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi.
Min. 5: “Salelá trakte na mabaku oyo.” Lendisá bandeko bámibongisa mpo na kopesa trakte soki libaku emonani.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 15: Litomba ya komonisa moto ete ozali mpenza komibanzabanza mpo na ye. Lisolo elongo na bayangani ekouta na Matai 8:2, 3 mpe Luka 7:11-15. Mpo na nini bato basepelaka koyoka biso ntango tomonisi bango ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na bango? Ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo moto asepelaka na yango to makambo oyo ezali kotungisa ye? Ndenge nini tokoki komonisa moto ete tozali mpenza komibanzabanza mpo na ye soki azali mobange, elenge, moninga ya kelasi, moboti, to azali kobɛla to azali na mawa?