Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/09 lok. 8
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 4/09 lok. 8

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, bakisa mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na mayangani na biso mosusu, kasi babandi naino te koyangana na makita nyonso ya lisangá, tósala makasi mpo na kotikela bango buku Biblia eteyaka mpenza nini? Mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola na bango Biblia na lisalisi ya buku yango. Yuni: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki moto azali na buku yango, mosakoli akoki kolakisa ye buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1992.

◼ Biso nyonso tokosala milende mpo na kobengisa bato na mayangani ya etúká mpe mayangani oyo ekosangisa bato ya mikili mingi, oyo ekosalema na mokili mobimba na mobu 2009. Basakoli bakozala na libaku malamu ya kokabola nkasa ya libyangi na teritware na bango. Kampanye yango esengeli kosalema na boumeli ya pɔsɔ misato liboso ya liyangani oyo lisangá na bino ekokende.

◼ Makarɔ ekotindama mpo na basakoli nyonso, na nzela ya lisangá. Bandeko oyo bakokende na liyangani oyo ekosangisa bato ya mikili mingi bakolata kaka makarɔ wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto