Manaka mpo na Pɔsɔ ya 9 Marsi
PƆSƆ EBANDI NA 9 MARSI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Genese 40-42
No. 1: Genese 40:1-15
No. 2: Tosengeli kotikela komekama nzela te (lr mok. 9)
No. 3: Kebá na elimo ya lipanda!
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi. Sɛngá basakoli báyebisa na mokuse likambo moko to makambo mibale oyo bakutanaki na yango, ntango bakabolaki bazulunalo mpe matomba oyo bazwaki.
Min. 15: Soki esɛngi kolimbola. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na motó ya likambo moke oyo ebandi na lokasa 177 ya buku Eteyelo ya mosala. Bósala elakiseli moko mpo na komonisa ndenge oyo mosakoli akoki koyanola na motuna oyo moninga moko ya mosala to ya kelasi atuni ye mpo na mateya na biso. Mosakoli azali koyanola na motema ya kokita, “na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.”—1 Pet. 3:15.
Min. 15: “Tómibongisa malamumalamu mpo na Ekaniseli.” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Lobelá bibongiseli oyo bozwi mpo na Ekaniseli.