Tótosa oyo Makomami elobi ntango tolingi kokunda ebembe—Eteni 1
1. Bato bayokaka ndenge nini soki moto akufi, mpe mikakatano nini Batatoli ya Yehova bakutanaka na yango soki ndeko to moninga na bango akufi?
Banda kala, liwa epesaka bato mingi mpasi. Basaleli ya Nzambe mpe bayokaka mpasi yango. Lokola Yesu, baklisto ya solo bayokaka mpasi mpe mawa makasi ntango moninga to ndeko na bango akufi. (Yoa. 11:33, 35) Ezalaka pɛtɛɛ te komesana na mpasi soki moto oyo tolingaka akufi, mpe esɛngaka kobɔndisa mpe kosunga bato oyo bandeko na bango bakufi. Kosala bongo ezali na ntina, mingimingi na bisika oyo bibangabanga ya bakufi ezalaka makasi. Na bisika yango, bato ya libota oyo bazali baklisto te to bato ya kartye bakoki kotya baklisto oyo ndeko na bango akufi mosukusuku mpo básangana na milulu ya kokunda bakufi oyo eyokani te na Makomami. Ndenge nini tokoki kolela bandeko na biso oyo bakufi kozanga kolanda mimeseno mpe milulu oyo esepelisaka Nzambe te?
2. Nini ekómelaka bakufi, mpe ntango Biblia elobaka ete “bakufi bayebi likambo te” elingaka mpenza koloba nini?
2 Tóyeba oyo Biblia elobi na ntina na liwa: Biblia elobi polele ete : “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te . . . Bolingo na bango mpe koyina na bango mpe zuwa na bango esili kobeba . . . ezali na mosala te, to mwango te, to mayele te, to boyebi te kati na esika ya bakufi [Sheole, NW] esika ekokende yo.” (Mos. 9:5, 6, 10; Nz. 146:4) Soki moto akufi, ayebaka lisusu eloko te. Akoki kosilika te, koyina te, kosolola te, mpe akoki te koyeba makambo oyo bato ya bomoi bazali koloba to kosala. Liteya wana nde etambwisaka biso baklisto ya solo ntango ndeko to moninga na biso akufi.
3. (a) Liteya oyo elobaka ete bilimo ya bakufi ekoki kosalisa bato ya bomoi to kosala bango mabe eutá wapi? (b) Ndenge nini Baloma 12:9 ezali kosalisa basaleli ya Yehova mpo bázala na likanisi oyo ebongi na oyo etali liteya wana ya bapakano?
3 Tóboya liteya oyo ekoselaka Nzambe makambo: Na elanga ya Edene, Yehova ayebisaki Adama ná Eva polele ete ‘bakokufa solo’ soki babuki mobeko na ye. (Gen. 2:17) Kasi, Satana ayebisaki bango ete ‘bakokufa solo te’ soki babuki mobeko ya Nzambe. (Gen. 3:4) Na nsima, Satana abimisaki lokuta mosusu: Alobaki ete bato oyo bakufá, bakufá solo te, kasi bayebaka makambo mpe bazalaka na bomoi na mokili ya bilimo. Lokuta wana efingisaka nkombo monene ya Yehova. Mpo na basambeli ya Yehova, liteya oyo elobaka ete bakufi bayebaka makambo mpe ete bakoki kosalisa to kosala bato oyo bazali na bomoi mabe, ezali mpenza liteya ya lokuta. Ezali motambo monene oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato mpe kokanga bango báyeba te solo ya Biblia. Ezali liteya oyo bato nyonso oyo balingaka Nzambe basengeli koyina mpenza! (Lom. 12:9) Yo mpe osalaka bongo?
4. (a) Ndenge nini Deteronome 18:9-13 ezali kosalisa biso tóyeba ndenge Yehova atalelaka mimeseno ya mbindo? (b) Na kotalela 2 Bakolinti 6:15-17, ndenge nini baklisto nyonso ya solo basengeli kotalela mimeseno to milulu oyo ezali na boyokani na liteya oyo elobaka ete bakufi bayebaka makambo mpe bakoki kosala bato ya bomoi malamu to mabe?
4 Yehova ayebisaki Bayisalaele ete bámikabola mpenza na mimeseno to milulu nyonso oyo ezali na boyokani na liteya wana ya lokuta. (Det. 18:9-13) Baklisto ya ekeke ya liboso mpe baboyaki mimeseno nyonso oyo eyokani na liteya wana. (2 Kol. 6:15-17; Emon. 21:8) Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova, ezala ya mposo, ekólo, to mimeseno nini, baboyaka mimeseno nyonso oyo ezali na boyokani ata moke na liteya oyo elobaka ete bato oyo bakufá bayebaka makambo mpe bakoki kosalisa to kosala bato ya bomoi mabe.
5. (a) Biblia elobi nini mpo na mimeseno oyo bato basalaka soki moto akufi? (Kokanisá Yoane 19:40 ná Levitike 21:5 mpe Deteronome 14:1, 2.) (b) Ndenge Baebele 5:14 emonisi yango, biso nyonso tosengeli kosala nini mpo na kobwaka mimeseno ya mbindo oyo esalemaka soki moto akufi?
5 Tótalela mimeseno yango: Na kotalela Biblia, mimeseno nyonso te ya kokunda bibembe eyokani na liteya wana ya lokuta. Na ndakisa, ‘bazingaki [nzoto ya Yesu] na biteni ya bilamba esika moko na matiti ya nsolo kitoko, kaka ndenge Bayuda bazalaki na momeseno ya kokunda bato.’ (Yoa. 19:40) Nzokande, basaleli ya Nzambe bazalaki koboya mimeseno mosusu nyonso oyo eyokani na liteya oyo elobaka ete bakufi bayebaka makambo. (Lev. 19:28; 21:5; Det. 14:1, 2) Lelo oyo na mokili mobimba, mimeseno mpe milulu mingi oyo etali liwa ezali na boyokani na liteya wana. Ezali mpe bongo awa na Congo. Tosengeli koteya ‘makoki na biso ya kososola mpo tókesenisa mabe ná malamu.’ (Ebe. 5:14) Yango ekosalisa biso tóyeba mimeseno oyo eyokani na Biblia mpe oyo eyokani na yango te. Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa biso na likambo yango?
6. (a) Na kotalela 2 Bakolinti 6:14-17, ekateli nini ya makasi tosengeli kozwa mpe motuna nini tosengeli komituna? (b) Na kotalela Basambisi 2:12, soki tosangani na molulu moko ya kokunda oyo eyokani te na Biblia, tokomonana ndenge nini?
6 Tósalela mitinda ya Biblia: Baoyo balingi kosepelisa Nzambe basengeli te kosala ekanganeli mabe na bato oyo bazali bandimi te. Biblia eyebisi biso ete: “ ‘Bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,’ Yehova alobi bongo, ‘mpe bótika kosimba eloko ya mbindo.’ ” (2 Kol. 6:14, 17) Nsima ya kotalela etinda wana, tómituna boye, ‘Momeseno oyo elingi kosalema mpo na kokunda moto oyo akufi, eyokani ata mwa moke na liteya oyo elobaka ete milimo ya bakufi ekoki kosalisa to kosala bato ya bomoi mabe?’ Soki ezali bongo, tókanisa te ete ezali kaka kolela ya mpamba, tóyeba nde ete tomikɔtisi na losambo ya lokuta, oyo endimami te na miso ya Yehova, Nzambe ya solo.—Talá Basambisi 2:12.
7. (a) Etinda nini ya ntina mingi oyo ezali na 1 Bakolinti 10:32 ekoki kosalisa biso? (b) Na kotalela Luka 11:52 mpe Matai 18:6, Yehova ayokaka ndenge nini soki tobɛtisi moto libaku?
7 Etinda mosusu ezali na 1 Bakolinti 10:32: “Bókeba ete bókóma te bantina ya kobɛtisa libaku epai ya Bayuda mpe Bagrɛki mpe epai ya lisangá ya Nzambe.” Ndenge nini tosengeli kosalela etinda yango? Bato mingi bayebi malamu ete Batatoli ya Yehova bateyaka ete bakufi bayebaka eloko te mpe ete bakoki te kosalisa to kosala bato ya bomoi mabe. Na yango, nini ekosalema soki ndeko moko ya lisangá asangani na milulu ya kokunda ebembe oyo ezali na boyokani na likanisi ya kobanga bato bakufá? Soki asali bongo, bato oyo bayebi bindimeli mpe mateya ya Batatoli ya Yehova na ntina na liwa bakoki kobɛta libaku. Kobɛtisa basusu libaku epesaka Yehova mawa mpe ekoki kopekisa bato bándima nsango ya bokonzi.—Mat. 18:6; Luka 11:52.
8. (a) Nini ekesenisi biso na bato ya mokili? (Tángá mpe limbolá Bafilipi 2:15.) (b) Ndenge nini bikateli na biso ekoki komonisa ete tolingaka Yehova?
8 Tóyina oyo ezali mabe: Ntango bato ya mokili basalaka milulu wana, mbala mingi bayebaka te ete ezalaka losambo ya lokuta. Mpe mbala mingi bayebaka te ntina oyo biso toboyaka kosangana na milulu wana ya mbindo. Yango wana, kozwa ekateli ya kosangana te na milulu wana ekoki kozala mokakatano mpo na biso mpe ekoki kotya bolingo na biso mpo na Yehova mpe bosembo na biso na komekama makasi. Tolingi kozala “bato oyo bazangi mbeba mpe bato bazangi ngambo, . . . bazangi litɔnɔ.” (Filp. 2:15) Bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso ‘tóyina oyo ezali mabe mpe tókangama na oyo ezali malamu.’ (Lom. 12:9) Toyebi malamu ete ekozala mabe, mpe ekomonana lokola tosambelaka Nzambe na mitema mibale, soki tosali molulu moko oyo ekomonisa ete bato bakufá bayebaka makambo mpe ete bakoki kosalisa to kosala bato ya bomoi mabe. Na kolanda mitinda wana, tótalela sikoyo mwa milulu ya kokunda ebembe oyo esalemaka esika tofandi.
Milulu oyo esalemaka liboso ya kokunda ebembe
9. (a) Milulu nini bato basalaka ntango basukolaka mpe babongisaka ebembe liboso ya kokunda yango? (b) Mpo na nini bato mosusu basalaka milulu wana?
9 Kobongisa nzoto ya mowei: Bakoki kosukola nzoto ya mowei liboso ya kokunda yango mpo ezala pɛto. (Mis. 9:37) Kasi, esengeli te kozala na boyokani na milulu oyo eyokani na Biblia te oyo bato basalaka ya kobongisa bakufi mpo na bomoi na ‘mokili mosusu.’ Ntango bato oyo babangaka bakufi babongisaka nzoto ya mowei, bakoki kosopa masanga mpe kokata manzaka ya mowei mpe nsuki na motó na ye mpo na kokunda yango na nsima. Basalelaka mai mpe matiti ya ndenge mosusu mpo na kosukola nzoto ya mowei. Bakoki kobomba bankisi mpe biloko mosusu na bilamba ya mowei to na sanduku oyo batye ye. Bato mosusu balobaka ete kosala bongo ezali na ntina mpo mowei akutana na bilimo ya bankɔkɔ.
10. (a) Soki moto oyo akufi azalaki Motatoli, mpo na nini ekozala malamu te kotikela bandeko na ye oyo bazali Batatoli te bábongisa nzoto na ye? (b) Tokosala nini soki bato oyo bazali Batatoli te babɔtɔli ebembe mpo básala milulu liboso ya kokunda?
10 Na bamboka mosusu, bandeko mosusu ya libota nde babongisaka nzoto ya mowei liboso bákunda ye. Soki moto oyo akufi azalaki Motatoli, tosengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo bandeko ya libota na ye oyo bazali Batatoli te bázwa te nzoto yango mpe básala milulu na bango ya bapakano na kobombana. Ndeko na biso oyo akufi akokaki kondima likambo ya ndenge wana te. Bandeko ya lisangá bakoki komeka komonisa bandeko ya libota mpo básala ata likambo moko te oyo moto oyo akufi azalaki koboya. Nzokande soki tosali nyonso, kasi bandeko ya mowei oyo bazali Batatoli te babɔtɔli ebembe, tokosala makasi ete tósangana te na makambo na bango oyo eyokani te na Biblia. Koyeba ete bato wana bakoki kopekisa te ndeko na biso azwa bomoi ya seko ekoki kobɔndisa biso. Akufaki sembo mpe Yehova abombi ye na makanisi na ye.
11. (a) Mpo na nini tosengeli koloba mabe te soki moklisto moko aboyi kotya nzoto ya mowei mpo bato bátala yango? (b) Soki batye nzoto ya mowei mpo bato bátala, esengeli kosalema ndenge nini?
11 Kotya ebembe mpo bato bátalaa: Kotya ebembe to kotya yango te mpo bato bátala ezali ekateli oyo moto na moto asengeli kozwa. Soki libota moko ya baklisto bamoni malamu bátya te nzoto ya mowei mpo bato bátala yango, tosengeli te koloba mabe mpo na bango. Soki mpe bandeko ya mowei bazwi ekateli ya kotya nzoto mpo bato bátala yango, esengeli kokanisa malamu mpo makambo esalema na ndenge ebongi mpe oyo eyokani na bindimeli na biso.
12. (a) Mimeseno nini bato oyo bayebi solo ya Biblia te basalaka liboso ya kokunda ebembe? (b) Mpo na nini ebongi te ete baklisto bálanda mimeseno ya ndenge wana?
12 Na bisika mosusu, bato bazalaka na momeseno ya kobimisa nzoto ya mowei na sanduku mpe kolalisa yango na mbeto moko oyo babongisi kitoko. Soki ezali mwasi nde akufi, bakoki kolatisa ye robɛ ya mpɛmbɛ ya libala, babiju, biloko mosusu ya motuya mpe kosala ye maquillage. Bato bakómi na momeseno ya kotya elongi ya mowei na batriko, ba porte-clé, matambala, bakɔpɔ, mpe biloko mosusu. Bakabolaka yango mpo bato bálata mpe básalela yango na esika oyo bazali kolela mowei. Bato oyo bayei kolela mowei batyaka bafɔtɔ ya mike ya moto yango na bilamba na bango. Kolanda mimeseno wana ezali malamu? Te. Kosala bongo ezali mpenza kosambela moto oyo akufi.
13. (a) Etinda nini mosusu ya Biblia ezali kolendisa biso tózala mpenza mosika na mimeseno ya mokili? (Tángá mpe limbolá 1 Yoane 2:15, 16.) (b) Soki baklisto balandi mimeseno wana, yango ekoki kotinda bato básala nini na nkombo ya Yehova mpe basaleli na ye? (Tángá mpe limbolá Baefese 5:10, 11, 15, 16.)
13 Atako Biblia elobi makambo nyonso te oyo ekoki kosalema mpo na kokunda ebembe, baklisto oyo bakɔmeli na elimo bayebi ete soki moto akufi, ezali te ntango ya kolakisa na lolendo biloko oyo tozali na yango, mpo kosala bongo ‘euti na Nzambe te, kasi na mokili.’ (1 Yoa. 2:15, 16) Kolanda mimeseno ya ndenge wana ekoki kotinda bato oyo bazali baklisto te básala makambo oyo ebongi te, na ndakisa koganga na kolela kozanga kotika, kotya mbongo to biloko mosusu na nzoto ya mowei, koyambayamba yango, mpe koloba na yango lokola nde ezali na bomoi. Soki makambo ya ndenge wana esalemi na ebembe ya moklisto, yango ekoki kofingisa nkombo ya Yehova mpe ya basaleli na ye. Ya solo, koboya kosala mimeseno ya bato oyo bazali na molili ya elimo, ezali lolenge malamu ya kosala makambo kozanga mindɔndɔ, na molɔngɔ, na kimya mpe na ndenge oyo ebongi mpo na baklisto ya solo.—Ef. 5:15-17.
14. (a) Kolala na ebembe elimboli nini? (b) Mbala mingi bamemaka nzoto ya mowei na ndako ntango nini? (c) Makambo nini bato basalaka mbala mingi soki balali na ebembe, mpe ntango basalaka bongo, bakanisaka nini? (d) Mpo na nini ebongi mpenza ete baklisto bálalaka te na ebembe?
14 Kolala na ebembe: Kolala na ebembe elimboli kokende na ndako ya mowei to na esika mosusu oyo batye ebembe mpo na kolela mowei butu mobimba kozanga kolala. Mbala mingi ebandaka na mpokwa mpe ekobaka tii na butu makasi. Momeseno yango ezali ndenge moko te na kokende kotala bato ya libota oyo ndeko na bango akufi na ntango oyo ebongi, mpo na kobɔndisa bango. Kolala na ebembe ezali likambo mosusu. Mbala mingi, balalisaka ebembe mokolo moko liboso ya kokunda yango. Bato basanganaka mpo na koyemba, kobondela, mpe kokumisa mowei butu mobimba. Bato oyo basalaka bongo bakanisaka ete yango ezali na ntina mpo na kobatela mowei mpe bandeko na ye oyo batikali mpo bilimo esala bango mabe te. Lokola momeseno wana ezali mpenza na boyokani na liteya oyo elobaka ete elimo ya moto ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa, baklisto ya solo baboyaka kosala milulu wana ya kolala na ebembe, oyo eyokani na Biblia te. Kolala na ebembe, ata mpo na ntango moke, eyokani te na ekateli na biso ya ‘koyina oyo ezali mabe.’—Lom. 12:9.
15. (a) Batatoli mosusu basalaka nini soki moko na bango akufi? (b) Kosala bongo ekoki kotinda bato bákanisa nini? (c) Ndenge nini tokoki kosalela mitinda oyo ezali na 2 Bakolinti 6:17 mpe Malaki 3:18 ?
15 Soki ndeko moko ya lisangá akufi, tosengeli kokeba ete tótinda te bato bákanisa ete tozalaka na lolenge na biso moko ya kolala na ebembe. Na ndakisa, bato bakokanisa nini soki bamoni Batatoli bafandi pembeni ya nzoto ya mowei na butu, liboso ya mokolo oyo bakokunda ye mpe balekisi bangonga mingi na koyemba mpe kobondela? Atako bandeko yango bakoki kozala na makanisi ya malamu, basengeli kokeba na lisosoli ya basusu. (1 Kol. 10:23) Kosala bongo ekoki te kotungisa lisosoli ya Batatoli mosusu oyo bayebi ndenge milulu ya kolala na ebembe ebandá mpe ntina oyo bato basalaka yango? Bato oyo bazali Batatoli te bakokanisa te ete Batatoli ya Yehova balalaka mpe na ebembe lokola bato ya mangomba mosusu? Ezali na mabaku mingi mosusu ya malamu ya kopesa litatoli mpe ya kobɔndisa bato oyo ndeko na bango akufi. Kokanisa na mitinda oyo esengeli kotinda biso tóboya kosala likambo oyo ekoki komonana lokola molulu ya kolala na ebembe. Kosala bongo ekomonisa ete tokeseni na mokili mpe ete tozali na ekateli ya kokabwana na “eloko ya mbindo.”—2 Kol. 6:17; Mki. 3:18.
16. (a) Ntango tolingi kokunda mowei, mokapo nini tosengeli kobosana te? (b) Mikakatano nini ebimaka mbala mingi soki bamemi nzoto ya mowei na ndako to na libota na ye mokolo moko liboso bákunda? (c) Nini ekoki kosalema soki makambo ebongisami malamu mpe boyokani ezali?
16 Toli oyo ezali na ntina mpenza: “Moto ya mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba; nde bazoba bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.” (Mas. 22:3) Toli wana ebongi mpenza mpo na likambo etali kolala na ebembe. Emonani ete komema nzoto ya mowei na ndako mpo elala mpe bákunda yango mokolo oyo elandi, ebimisaka mikakatano. Mikakatano eyaka lisusu makasi soki bamemi nzoto ya ndeko oyo akufi epai ya bandeko na ye oyo bazali Batatoli te. Lokola nzoto ya mowei ezali wana, bandeko na ye mpe bato ya kartye bakoki kosangana wana mpo na koyemba mpe kobondela butu mobimba mpo na kokɛngɛla nzoto ya mowei. Mbala mingi, milulu yango ekobaka tii ntango bakokunda mowei. Mpo makambo ya boye esalema te ntango moklisto akufi, bato ya libota oyo bazali baklisto basengeli kokanisa malamu mpo na koyeba ntango oyo bakomema mowei na ndako to na esika mosusu. Soki bamoni ete esengeli kaka bámema nzoto ya mowei na ndako, ekozala likambo ya “mayele” kosala yango mokolo oyo mowei akokundama, kasi te na mpokwa, liboso ya mokolo oyo bakokunda ye. Na ntembe te, mikakatano ekoki kozanga te, kasi soki makambo ebongisami malamu mpe boyokani ezali, nyonso ekoleka malamu. Soki tosali bongo, tokobɛtisa basusu libaku te.—Mas. 22:3.
17. Tokolobela nini na Mosala na biso ya Bokonzi ya basanza oyo ezali koya?
17 Tokolobela makambo mosusu ya ntina mingi oyo etali milulu ya kokunda bibembe na Mosala na Biso ya Bokonzi ya basanza oyo ezali koya. Makambo yango ekosalisa biso nyonso tóyeba ndenge baklisto ya solo bakoki kobatela lisosoli malamu, kozanga kobɛtisa basusu libaku mpe kotosa oyo Biblia elobi na likambo etali kokunda bawei.—1 Kol. 10:32.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mbala mingi bato basalelaka maloba “lit de parade” mpo na kolobela esika oyo balelaka bibembe ya bato oyo bato ya mokili bamonaka bato minene: bakonzi, baprezida mpe bato mosusu ya lokumu. Milulu ya kokunda bango ezalaka minene mpenza mpe esalemaka mpo na kopesa bango lokumu. Kasi, baklisto basengeli kokunda bawei na bango kozanga mindɔndɔ. Ezali bongo ata soki mowei aumelaki mingi na bomoi, ayebanaki mingi to asalaki makambo minene. Na yango, biso baklisto tosengeli te kolela bawei na biso ndenge balelaka bato minene ya mokili.
(Landá na lokasa 9)
Tótosa oyo Makomami elobi ntango tolingi kokunda ebembe—Eteni 1 (Kolandana ya lokasa 4)