Manaka mpo na Pɔsɔ ya 23 Febwali
PƆSƆ EBANDI NA 23 FEBWALI
□ Boyekoli ya Biblia na lisangá:
□ Eteyelo ya mosala ya Teokrasi:
Botángi ya Biblia: Genese 32-35
Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
□ Likita ya Mosala:
Min. 5: Mayebisi. Yebisá mokanda oyo tokolakisa na sanza ya Marsi.
Min. 20: “Tótosa oyo Makomami elobi ntango tolingi kokunda ebembe—Eteni 1.” Paragrafe 1 tii 8. Ekosalema na mituna mpe biyano. Ekosalema na nkulutu moko, oyo akosalisa bayangani na boboto mpenza bámona ete lisolo yango eyei na ntango ebongi. Bendá likebi na mitinda oyo etali likambo yango. Tolendisi bandeko bábatela basiplema oyo ezali na lisolo oyo mpo esalisa bango na lisolo oyo ekosalema nsima.
Min. 10: Ozali kosalela mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na maloba ya ebandeli ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo—2009. Lobelá litomba oyo moto akoki kozwa soki azali komibombela ntango mokolo na mokolo mpo na kotángaka mokapo ya mokolo mpe komantɛrɛ na yango. Sɛngá bayangani bálobela ntango oyo batalelaka mokapo ya mokolo mpe matomba oyo bazwi.