Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/09 lok. 11
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 2/09 lok. 11

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 23 Febwali 2009. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 5 Yanuali tii na pɔsɔ ya 23 Febwali 2009.

1. Ndenge nini Nzambe akokaki kobimisa pole na mokolo ya liboso soki bingɛngiseli esalemaki se na mokolo ya minei? (Gen. 1:3, 16) [w04 1/1 lok. 28 par. 5]

2. Lokola Yehova ayebisaki Noa te ete azala na bokonzi likoló ya mabelé ndenge ayebisaki Adama, moto ya kokoka, yango elakisi nini? (Gen. 9:1) [it-1-F lok. 788 par. 6]

3. Kondimana ya Abalayama ebandaki ntango nini, mpe eumelaki tii ntango nini? (Gen. 12:1-4) [w04 15/1 lok. 26 par. 4; w01 15/8 lok. 17 par. 13]

4. Nini emonisi ete Nimerode ná bato oyo balandaki ye balongaki te kokokisa mokano na bango ya komisalela ‘nkombo ya lokumu mpo na bango moko’? (Gen. 11:4) [w98 15/3 lok. 25]

5. Lota abengami “moyengebene” na 2 Petelo 2:7, kasi mpo na nini alingaki kopesa bana na ye ya basi epai ya ebele ya bato wana ya mabe? (Gen. 19:8) [w05 1/2 lok. 26 par. 15-16; w04 15/1 lok. 27 par. 3]

6. Lokola mibali baklisto basɛngisami ete bákokisaka bamposa ya bato ya ndako na bango, ndenge nini Abalayama abenganaki Agala ná Yisamaele bákende na esobe? (Gen. 21:10-21; 1 Tim. 5:8) [w88-F 15/2 lok. 31]

7. Liteya nini tokoki kozwa na milende oyo Eliezele asalaki mpo na kosala makambo ndenge Yehova alingaka mpo na kolukela Yisaka mwasi? (Gen. 24:14, 15, 17-19, 26, 27) [w97 1/1 lok. 31 par. 2]

8. Ndɔtɔ oyo Yakobo alɔtaki, oyo amonaki baanzelu ‘bazali komata mpe kokita na ebutelo’ elimboli nini? (Gen. 28:10-13) [w03 15/10 lok. 29 par. 1; it-1-F 683]

9. Mpo na nini Laele azalaki koluka kozwa mandaliki epai ya mwana ya Lea? (Gen. 30:14, 15) [w04 15/1 lok. 28 par. 7]

10. Ndenge nini Yakobo apesaki ndakisa malamu mpo na kosilisa matata? (Gen. 33:3, 4) [g82-F 22/5 lok. 19 par. 8-10]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto