Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Des.
“Yo mpe omonaka ete bato bazalaka na makanisi ekeseni na likambo ya bopɛto? [Tiká ye apesa eyano.] Talá moko ya bantina oyo tosengeli kozalaka pɛto. [Tángá 1 Petelo 1:16.] Lisolo oyo epesi mwa makanisi ebongi mpo na ndenge ya kobatela bopɛto.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 9.
Lamuká! Des.
“Na eleko oyo ya nsuka ya mbula, bato mingi balingaka kokumisa Yesu. [Tángá Yoane 14:15] Na kotalela vɛrsɛ oyo, wapi lolenge eleki malamu ya kokumisa Yesu? [Tiká ye apesa eyano.] Dati oyo Yesu abotamá eyebani te, mpe mbala mosusu okokamwa ntango okoyeba ntina oyo baponá dati ya 25 Desɛmbɛ mpo na kokumisa mbotama na ye.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yan.
“Na mokili mobimba, bato bazalaka na makanisi ekeseni mpo na Malia, mama ya Yesu. Yo okanisaka nini mpo na ye? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia emonisi ete Malia azwaki libaku oyo moto mosusu azwá te. [Tángá Luka 1:30-32.] Zulunalo oyo emonisi liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa na ye.”
Lamuká! Yan.
“Bibale mpe balaki mingi ya mokili ezali kokauka, mpe bamilio ya bato bazalaka na mai ya komɛla ya pɛto te. Okanisi ete bato bakoki kosilisa mokakatano yango mpo na libela? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima tángá Yilimia 10:23.] Na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo emonisi ndenge mokakatano yango ekosila mpo na libela.”