Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/08 lok. 6
  • Osalelaka buku Comment raisonner?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Osalelaka buku Comment raisonner?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini kokolisa makoki ya kososolisa moto likambo?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 12/08 lok. 6

Osalelaka buku Comment raisonner?

1. Ndenge nini ntoma Paulo mpe Yesu bazalaki koteya basusu?

1 Ntoma Paulo azalaki kosala makasi mpo na ‘kososola na bato uta na Makomami.’ (Mis. 17:​2, 3; 18:19) Na ndenge yango, azalaki kolanda ndakisa ya Yesu, oyo azalaki kozongela mbala na mbala maloba ya Makomami mpe kosalela bandakisa mpo na kosalisa bato bákanga ntina ya mokano ya Nzambe. (Mat. 12:​1-12) Buku Comment raisonner à partir des Écritures ebongisami mpo na kosalisa biso tósalaka mpe bongo.

2. Ndenge nini tokoki kosalela buku Comment raisonner mpo na kobongisa maloba ya kobanda lisolo oyo ekobota mbuma?

2 Ndenge ya kobongisa maloba ya kobanda lisolo oyo ebotaka mbuma: Buku Comment raisonner à partir des Écritures, nkasa 9-15 (to mwa buku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nkasa 2-7) ezali na maloba ya kobanda lisolo oyo ekoki kolamwisa mposa ya bato. Koyekola ndenge mingi ya kobanda lisolo mpe kosalela yango, mingi mpenza soki tosakolaka mbala na mbala na teritware na biso, ekosalisa biso tóbongola masolo ntango tozali kosakola mpe tóbanda masolo na ndenge oyo ekobota mbuma. Ntango tozali kopesa litatoli na telefone to kosolola na moto na telefone oyo batyaka na libándá ya bandako oyo bato bakɔtaka mpambampamba te, tokoki kotángela ye maloba ya kobanda lisolo mbala moko na kati ya buku.

3. Makanisi nini ezali na buku Comment raisonner nkasa 16-24, oyo ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola?

3 Ntango moto alobi likambo moko mpo na kokata lisolo: Mpo na nini te kokanisa liboso likambo moko oyo bato ya teritware na bino balobaka mpo na kokata lisolo mpe kozwa mwa miniti liboso ya kobima mosala ya kosakola mpo na kotalela buku yango na nkasa 16-21, mpo na koyeba ndenge ya kopesa moto eyano? Ezali nde na bato ya Lingomba ya Bouddha, ya Hindu, ya Bayuda, to ya Bamizilma na teritware na bino? Soki ezali bongo, makanisi oyo ezali na nkasa 21-24 ekoki kosalisa yo osolola na bango.

4. Ndenge nini tokoki kosalela buku Comment raisonner soki moto atuni biso motuna to abimisi ntembe?

4 Ndenge ya koyanola na mituna: Buku Comment raisonner ekoki mpe kosalisa biso soki moto atuni biso motuna to abimisi ntembe. Okoki kaka koyebisa moto yango ete okosepela kolakisa ye likanisi moko ya malamu oyo oyebi na likambo yango; na nsima, bimisá buku Comment raisonner. Lokola na buku yango mitó ya makambo elandanaka na kotalela balɛtrɛ ya alfabɛ, fungolá motó ya likambo oyo okanisi ete ezali na makanisi oyo bozali kolobela. Na nsima, bwaká liso nokinoki na mituna oyo ezali na makomi ya moindo. Soki omoni noki te likambo oyo ozali koluka, fungolá Index oyo ezali na nsuka ya buku yango. Soki omoni makanisi oyo ozali koluka, tángá yango mbala moko na kati ya buku. Soki bozali kolobela vɛrsɛ moko ya Biblia, okoki kozwa makanisi oyo ebongi na lokasa 445, na motó ya likambo “Textes bibliques souvent mal compris” (Bavɛrsɛ oyo bato bakangaka ntina na yango malamu te).

5. Tángá balolenge mosusu ya malamu ya kosalela buku Comment raisonner?

5 Ndenge mosusu ya kosalela buku yango: Basakoli mosusu bamemaka buku Comment raisonner na mosala to na kelasi, mpo esalisa bango báyanolaka na mituna lokola ‘Mpo na nini bosalaka bafɛti te?’ Bilenge bamonaka ete makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Création” (Bozalisi) mpe “Évolution” (Evolisyo) esalisaka bango mingi na badevuare ya kelasi. Olingi kokende kotala moto moko oyo azali maladi to akufeli moto? Makanisi oyo ezali na nse ya motó ya likambo “Encouragement” (Kolendisa) ekoki kosalisa yo obɔndisa ye na nzela ya Makomami. Buku Comment raisonner ezali mpe na makanisi oyo ekoki kosalisa bandeko ntango bazali kobongisa masukulu to kotambwisa likita mpo na mosala ya kosakola.

6. Mokano na biso ezali nini ntango tozali kosakola?

6 Ntango tozali kosakola, mokano na biso ezali te ya kondimisa bato makambo na makasi; kasi ezali nde ya koyebisa bato nsango malamu. Tolingaka kososola na bato na nzela ya Makomami. Soki tosaleli malamu buku Comment raisonner, tokomonisa ete tozali kokeba ntango nyonso na mateya na biso.​—⁠1 Tim. 4:⁠16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto