Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/08 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 1 Desɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 11/08 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Novɛmbɛ

Loyembo 205

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mpe makambo oyo mokɛngɛli na mosala ya kosakola alobaki, oyo emonisi ndenge mosala ya kokabola trakte Okosepela koyeba solo? ezali kosalema na teritware na bino. Lokola basakoli mingi basili kobanda kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya Novɛmbɛ, sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwaki ntango balakisaki bazulunalo yango.

Min. 15: Tómonisaka bolingo mpe ezaleli ya kokaba. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2008, nkasa 6-7. Soki ezali te, akosalela Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2007, nkasa 17-21.

Min. 20: “Tozali na biloko ya motuya ya kokabela basusu.”a Ntango bokokóma na paragrafe 2, sɛngá bayangani báyebisa mateya nini ya Biblia ebendaki bango na ebongiseli ya Yehova, to oyo bakómá kosepela na yango mingi banda bazwá batisimo.

Loyembo 71

Pɔsɔ ebandi na 17 Novɛmbɛ

Loyembo 80

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: Biyano na mituna na bino.b

Min. 20: “Okoki kozala moteyi!”c Sololá na mosakoli to mobongisi-nzela moko oyo alongaki ezaleli ya kobanga mpo na koyekola na moto Biblia. Ndenge nini atyelaki Yehova motema mpo asalisa ye? Na makambo nini ebongiseli ya Yehova esalisaki ye akóma na makoki ya koteya? Matomba nini azwi na ndenge akómá koyekola na bato Biblia?

Loyembo 143

Pɔsɔ ebandi na 24 Novɛmbɛ

Loyembo 217

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Desɛmbɛ, mpe salá elakiseli moko to mibale mpo na komonisa ndenge ya kolakisa yango.

Min. 20: Bamposa ya lisangá.

Min. 15: Omibongisa mpo na kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso mpe Lamuká! oyo bozwi sika. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na bazulunalo yango mpe sɛngá bayangani bálobela masolo nini bakanisi ete ekosepelisa bato ya teritware na bino. Mituna nini mpe bavɛrsɛ nini bakoki kosalela mpo na kobanda lisolo? Monisá ndenge ya kosalela maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na Mosala na biso ya Bokonzi. Sɛngá nkulutu moko asala elakiseli ya mokuse na lisolo moko oyo ekosepelisa bato ya teritware na bino.

Loyembo 208

Pɔsɔ ebandi na 1 Desɛmbɛ

Loyembo 84

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa balapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Novɛmbɛ.

Min. 15: Makambo oyo basakoli ya lisangá bakutanaki na yango. Yebisá lisangá teritware oyo bokaboli trakte Okosepela koyeba solo? mpe teritware oyo etikali. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo bakutanaki na yango ntango bazalaki kokabola trakte yango to kosalela yango mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Bálobela mpe makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bakabolaki buku Biblia eteyaka na sanza ya Novɛmbɛ. Bokoki kosala elakiseli moko to mibale mpo na komonisa ndenge likambo yango elekaki.

Min. 20: “Tósalisa bato ya sika báyeba oyo bakoki kosala soki bakutani na botɛmɛli.”d Ntango bokokóma na paragrafe 2, lobelá na mokuse ndenge makambo oyo ezali na buku Comment raisonner na motó ya likambo “Témoins de Jéhovah” ekoki kosalisa moyekoli ya Biblia ayanola na mituna ya bandeko to baninga na ye.

Loyembo 105

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto