Tósalisa bato ya sika báyeba oyo bakoki kosala soki bakutani na botɛmɛli
1 Soki bato babandi koyekola Biblia mpe bakómi na “mposa ya kozala na bomoi na ezaleli ya kokangama na Nzambe,” Satana abundisaka bango mingi. (2 Tim. 3:12) Botɛmɛli ekoki kouta na baninga ya mosala, ya kelasi to ya kartye. Yango ekoki kozala mokakatano mpo na bato ya sika, mingimingi soki botɛmɛli yango euti na bandeko na bango ya libota oyo bakanisi ete bazali koluka bolamu na bango.—Mat. 10:21; Mko. 3:21.
2 Biblia esakolaki ete bakotɛmɛla biso: Bato ya sika basengeli koyeba ete bakokutana na minyoko, mpe yango ezali elembo ete bakómi bayekoli ya solosolo ya Klisto. (Yoa. 15:20) Na bantango mosusu, bato batɛmɛlaka Batatoli ya Yehova mpo bakaniselaka bango mabe. Tóyeba ete tokoyoka esengo mingi soki basambwisi biso mpo tozali bayekoli ya Yesu mpe tozali kotosa Nzambe. (Mis. 5:27-29, 40, 41) Salisá bato ya sika báyeba ete Yehova akotika bango te. (Nz. 27:10; Mko. 10:29, 30) Soki batikali sembo, bakomonisa ete bazali na ngámbo ya Yehova na likambo etali boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba.—Mas. 27:11.
3 Boyebi ya solo ezali na ntina: Salisá bayekoli ya Biblia báyeba ntina ya kokoba kozwa boyebi ya solo ata ntango bakutani na mikakatano. Satana asalelaka botɛmɛli mpo makambo oyo bazali koyekola ezwa misisa te na mitema na bango. (Mas. 4:23; Luka 8:13) Basengeli kokoba kozwa boyebi ya solo ya Liloba ya Nzambe mpo bápika misisa na kati ya kondima.—Nz. 1:2, 3; Kols. 2:6, 7.
4 Esengeli koyika mpiko: Na ntango ya komekama, ezali na ntina mingi koyika mpiko, mpe yango ekoki kobota mbuma malamu. (Luka 21:16-19) Soki bato ya sika bazali koyika mpiko na botɛmɛli, bakozwa matomba bango moko mpe bakolendisa basusu. Bakomona ndenge Yehova apambolaka mpenza bato oyo bayikaka mpiko na bosembo nyonso.—Yak. 1:12.
5 Ntoma Paulo asepelaki ndenge baklisto ya Tesaloniki bazalaki kokola na elimo. Atɔndaki Nzambe ndenge asalisaki mingi na bango báyeba solo. (2 Tes. 1:3-5) Biso mpe tokoki koyoka esengo ya ndenge wana soki tozali kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia bálonga botɛmɛli mpe báyika mpiko.