Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/08 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 10/08 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe tokolimbwela ye yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki bato balobi ete bazali na bana, tokolakisa bango buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.

◼ Lokola sanza ya Novɛmbɛ ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Liyebisi epai ya mokɛngɛli-mokambi mpe mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi: Programɛ ya sika ya makita, ekobanda na pɔsɔ ya 29 Desɛmbɛ 2008, mpe programɛ na yango ekotyama na Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 2008. Ntango okotambwisa Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ wana, landá malako oyo etali Bozongeli yango, ndenge ezali na Programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2009. Toli mpo na koloba malamu ekozala te na mpokwa wana.

◼ Video Pas de sang: la médecine relève le défi ekotalelama na Likita moko ya Mosala na sanza ya Yanuali. Soki olingi kozwa yango, osengeli kosɛnga yango noki mpenza na nzela ya lisangá.

◼ Na mokolo ya pɔsɔ 29 Novɛmbɛ 2008 nsima ya midi, libota ya Betele ekozala na makambo oyo etali kaka bango moko; mpe na mokolo ya pɔsɔ 13 Desɛmbɛ 2008, bakosukola Betele mobimba tii na ngonga ya 5:00. Na yango, tosɛngi bino bóya te na ntango wana mpo na kotala Betele to ndeko moko oyo afandaka na Betele.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto