Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/08 nk. 3-6
  • Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2009

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2009
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • MALAKO
  • Programɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 10/08 nk. 3-6

Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2009

MALAKO

Na mobu 2009, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:

ESIKA MASOLO EUTI: Biblia haut fleuve ná Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto [bi7], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si], Yekolá epai ya Moteyi Monene [lr], mpe Comment raisonner à partir des Écritures (ebimeli ya 1989) [rs-F].

Eteyelo esengeli kobanda SOKI NGONGA EKOKI na maloba ya kotombela bandeko boyei malamu. Na nsima, ekosalema ndenge ekomami awa na nse. Nsima ya lisolo mokomoko, mokɛngɛli na eteyelo akobenga moto oyo akosala lisolo oyo elandi.

MAKANISI YA NTINA NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Miniti 10. Na miniti minei ya liboso, nkulutu oyo azali moteyi malamu to mosaleli na misala oyo azali moteyi malamu akotalela makanisi ya ntina na botángi ya Biblia ya pɔsɔ wana. Nzokande, ekozala bongo te soki eteni oyo ebongisami mpo na botángi ya Biblia na pɔsɔ wana ezali mokapo ya liboso ya mokanda moko ya Biblia. Na ntango wana, makambo oyo ndeko yango akoloba na miniti minei ya liboso ekouta na buku “Makomami nyonso.” [Soki buku “Makomami nyonso” ebimá te na monɔkɔ oyo bosalelaka na makita, bósalela masolo: “Liloba ya Yehova ezali na bomoi,” oyo ezali kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, kobanda na nimero ya 1 Yanuali 2004.] Na ndakisa, na pɔsɔ ya 5 Yanuali tokotalela mikapo mitano ya ebandeli ya mokanda ya Genese. Na yango, molobi akopona ndambo ya makanisi ya ntina na maloba ya ebandeli ya mokanda ya Genese, na buku “Makomami nyonso.” Asengeli kosala lisolo yango na ndenge oyo ekopesa lisangá litomba. Ezala akolobela makanisi ya ntina na botángi ya Biblia to makanisi oyo ezali na buku “Makomami nyonso,” mokano na ye ya libosoliboso esengeli kozala ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe ndenge nini makambo yango ezali na ntina mpo na bango. Molobi asengeli kokeba ete alekisa te miniti minei oyo etyami mpo na eteni ya liboso. Asengeli kosala nyonso atikela bayangani miniti motoba ya nsuka mpo bango mpe báloba. Akosɛnga na ndeko mokomoko oyo akoloba, ayebisa na mokuse (eleka segɔnde 30 te) makanisi oyo asepelaki na yango ntango atángaki mikapo ya Biblia oyo ezali na programɛ. Nsima na yango, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga bana-kelasi oyo bakosala masolo na bakelasi mosusu bákende na bakelasi yango.

LISOLO 1: Eleka miniti 4 te. Ezali botángi oyo ekosalema na ndeko mobali. Mwana-kelasi yango akosuka kaka na kotánga eteni oyo basɛngi ye atánga, akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Mokɛngɛli na eteyelo akosala makasi mpo na kosalisa bana-kelasi bátángaka na ndenge oyo ezali komonisa ete bayebi ntina ya makambo oyo bazali kotánga, bákakatana na maloba te, báyeba konyata maloba ya ntina, báyeba kobongolaka mongongo, bápema na esika oyo ebongi, mpe bátánga ndenge bameseni koloba.

LISOLO 2: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai ya ndeko mwasi. Mwana-kelasi oyo akosala lisolo yango akopona kadre moko kati na oyo ezali na lokasa 82 ya buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi to mokɛngɛli na eteyelo akoponela ye yango. Asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye mpe komonisa ndenge ya kosalela yango na motindo moko ya mosala ya kosakola oyo ebongi mpenza na teritware ya lisangá. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwana-kelasi azali kobimisa makanisi ya lisolo oyo bapesi ye mpe kosalisa molobani na ye akanisa likoló ya Makomami mpe asosola makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo yango. Mokɛngɛli na eteyelo akopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo akosala lisolo yango.

LISOLO 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekoki kopesama epai ya ndeko mobali to ndeko mwasi. Mwana-kelasi asengeli kobimisa makanisi oyo eyokani na motó ya likambo oyo bapesi ye. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo, akosala yango lokola lisukulu mpo na bayangani nyonso. Soki bapesi ndeko mwasi lisolo yango, akosala yango na kolanda malako oyo epesami na lisolo 2. Tobendi likebi na bino na likambo oyo: Mitó ya makambo oyo ezali na mwa elembo ya monzoto liboso na yango esengeli kopesama kaka na bandeko mibali mpe bakosala yango lokola lisukulu. Soki likoki ezali, esengeli kopesa yango na nkulutu to mosaleli na misala moko.

TOLI: Miniti 1-2. Mokɛngɛli na eteyelo akoyebisa liboso te toli mpo na koloba malamu oyo asɛngaki mwana-kelasi. Nsima ya lisolo 1, 2, mpe 3, mokɛngɛli na eteyelo akopesa mwana-kelasi longonya mpo na makambo ya malamu oyo asalaki na lisolo na ye, akomonisa bantina oyo etindi ye aloba bongo, mpe akosalela mingi buku Eteyelo ya mosala. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa mwana-kelasi mokomoko toli mosusu na nkuku soki esengeli, nsima ya makita to na ntango mosusu.

NGONGA: Ndeko moko te oyo akosala lisolo asengeli kolekisa ngonga, ata mokɛngɛli na eteyelo mpe asengeli te kolya ngonga ntango azali kopesa toli. Soki ndeko oyo azali kosala lisolo 1, 2, to 3 alekisi ngonga, mokɛngɛli asengeli kokata ye na mayele. Soki ndeko oyo asali makanisi ya ntina na botángi ya Biblia alekisi ngonga, esengeli kopesa ye toli na nkuku. Bandeko nyonso oyo bazali kosala masolo basengeli kotosa ngonga oyo bapesi bango. Eteyelo mobimba esengeli koumela miniti 30.

LOKASA YA TOLI: Ezali na buku Eteyelo ya mosala.

MOPESI-TOLI MOSUNGI: Longola mokɛngɛli na eteyelo, soki nkulutu mosusu oyo azali moteyi malamu azali, lisangani ya bankulutu ekopona ye mpo azala mopesi-toli mosungi. Soki bankulutu bazali mwa mingi na lisangá, bankulutu oyo bazali bateyi malamu bakobanda kolandana na mokumba yango, nkulutu moko mbula moko. Mokumba ya mopesi-toli mosungi ekozala ya kopesa toli na nkuku, soki esengeli, epai ya bandeko oyo basalaka makanisi ya ntina na botángi ya Biblia. Ezali na ntina te apesaka toli nsima ya masolo yango nyonso oyo baninga na ye bankulutu to basaleli na misala bakosala.

BOZONGELI YA ETEYELO YA MOSALA YA TEOKRASI: Miniti 20. Nsima ya sanza mibalemibale, mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli. Liboso ya kosala yango, makanisi ya ntina na botángi ya Biblia esengeli kosalema ndenge tolobeli yango awa liboso. Bozongeli yango ekouta na masolo oyo esalemaki na eteyelo na boumeli ya sanza mibale oyo eleki, bakisa mpe masolo ya pɔsɔ oyo bozongeli yango ekosalema. Soki Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esengeli kosalema na pɔsɔ oyo lisangá na bino ezali na liyangani ya zongazonga to oyo mokɛngɛli ya zongazonga akoya kotala lisangá na bino, na pɔsɔ yango bokosala bozongeli te. Bokosala nde masolo 1, 2, mpe 3, oyo ebongisami mpo na pɔsɔ oyo elandi, nzokande bokosala bozongeli na pɔsɔ oyo elandi. Mbongwana moko te esengeli kosalema na Botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ to na kopesama ya makanisi ya ntina na botángi ya Biblia.

Programɛ

5 Yan. Botángi ya Biblia: Genese 1-5

Lisolo 1: Genese 3:1-15

Lisolo 2: Ntina oyo Yesu azalaki Moteyi Monene (lr mok. 1)

Lisolo 3: Nini ezali mpamba te? (1 Kol. 15:58)

12 Yan. Botángi ya Biblia: Genese 6-10

Lisolo 1: Genese 9:1-17

Lisolo 2: Ndenge ya kosolola na moto na likambo etali kondima Nzambe (rs-F lok. 111 par. 1–lok. 112 par. 1)

Lisolo 3: Mokanda oyo euti na Nzambe moko ya bolingo (lr mok. 2)

19 Yan. Botángi ya Biblia: Genese 11-16

Lisolo 1: Genese 14:1-16

Lisolo 2: Moto oyo asalaki biloko nyonso (lr mok. 3)

Lisolo 3: Ndenge nini Yehova abongisaka biso? (Yis. 64:8)

26 Yan. Botángi ya Biblia: Genese 17-20

Lisolo 1: Genese 17:1-17

Lisolo 2: Ntina oyo bato bazali kokoka te kotya boyangeli ya sembo (rs-F lok. 172–173 par. 3)

Lisolo 3: Nzambe azali na nkombo (lr mok. 4)

2 Feb. Botángi ya Biblia: Genese 21-24

Lisolo 1: Genese 22:1-18

Lisolo 2: “Oyo azali Mwana na ngai” (lr mok. 5)

Lisolo 3: a Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na kofungwama na bolingo na biso epai ya basusu? (2 Kol. 6:11–13)

9 Feb. Botángi ya Biblia: Genese 25-28

Lisolo 1: Genese 25:1-18

Lisolo 2: Moteyi Monene asalelaki bato (lr mok. 6)

Lisolo 3: Ntina oyo baguvɛrnema ya bato ekolonga te kopesa bato bolamu (rs-F lok. 173 par. 4–lok. 174 par. 4)

16 Feb. Botángi ya Biblia: Genese 29-31

Lisolo 1: Genese 29:1-20

Lisolo 2: Mpo na nini tosengeli ‘kotika komitungisa’ (Mat. 6:25)

Lisolo 3: Botosi ekobatela yo (lr mok. 7)

23 Feb. Botángi ya Biblia: Genese 32-35

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

2 Mar. Botángi ya Biblia: Genese 36-39

Lisolo 1: Genese 39:1-16

Lisolo 2: Bato oyo baleki biso (lr mok. 8)

Lisolo 3: Bokonzi ya Nzambe nde ekokokisa bamposa nyonso ya bato (rs-F lok. 174 par. 5–lok. 175 par. 2)

9 Mar. Botángi ya Biblia: Genese 40-42

Lisolo 1: Genese 40:1-15

Lisolo 2: Tosengeli kotikela komekama nzela te (lr mok. 9)

Lisolo 3: b Kebá na elimo ya lipanda!

16 Mar. Botángi ya Biblia: Genese 43-46

Lisolo 1: Genese 44:1-17

Lisolo 2: Yesu azali na nguya koleka bademo (lr mok. 10)

Lisolo 3: Ebongi mpenza kotyela bisakweli ya Biblia motema (rs-F lok. 175 par. 3–lok. 176 par. 3)

23 Mar. Botángi ya Biblia: Genese 47-50

Lisolo 1: Genese 48:1-16

Lisolo 2: Tosengeli nde kobangaka Zabolo?

Lisolo 3: Baanzelu ya Nzambe basalisaka biso (lr mok. 11)

30 Mar. Botángi ya Biblia: Exode 1-6

Lisolo 1: Exode 1:1-19

Lisolo 2: Yesu ateyi biso ndenge ya kobondela (lr mok. 12)

Lisolo 3: Makamwisi ya kobikisa bato oyo esalemaka lelo oyo, esalemaka mpenza na nguya ya elimo ya Nzambe? (rs-F lok. 177 par. 1-4)

6 Apr. Botángi ya Biblia: Exode 7-10

Lisolo 1: Exode 9:1-19

Lisolo 2: Bato oyo bakómaki bayekoli ya Yesu (lr mok. 13)

Lisolo 3: c Ndenge nini tokoki koyokanisa Bagalatia 6:2 mpe Bagalatia 6:5?

13 Apr. Botángi ya Biblia: Exode 11-14

Lisolo 1: Exode 12:21-36

Lisolo 2: Ntina oyo tosengeli kolimbisaka (lr mok. 14)

Lisolo 3: Makamwisi ya kobikisa bato oyo Yesu ná bantoma na ye basalaki ekeseni na oyo esalemaka lelo oyo (rs-F lok. 177 par. 5–lok. 178 par. 3)

20 Apr. Botángi ya Biblia: Exode 15-18

Lisolo 1: Exode 15:1-19

Lisolo 2: Koboya losambo ya lokuta esangisi makambo nini?

Lisolo 3: Liteya mpo na kozala na boboto (lr mok. 15)

27 Apr. Botángi ya Biblia: Exode 19-22

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

4 Mai Botángi ya Biblia: Exode 23-26

Lisolo 1: Exode 24:1-18

Lisolo 2: Eloko nini ezali mpenza na ntina? (lr mok. 16)

Lisolo 3: Ndenge ya koyeba baklisto ya solo lelo oyo (rs-F lok. 178 par. 4–lok. 179 par. 2)

11 Mai Botángi ya Biblia: Exode 27-29

Lisolo 1: Exode 29:1-18

Lisolo 2: Ndenge ya kozala na esengo (lr mok. 17)

Lisolo 3: d Bosembo oyo ebongi te mpe makama na yango

18 Mai Botángi ya Biblia: Exode 30-33

Lisolo 1: Exode 31:1-18

Lisolo 2: Ntina oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazwaki makabo ya kobikisa bato (rs-F lok. 179 par. 3–lok. 180 par. 3)

Lisolo 3: Obosanaka koloba mɛrsi? (lr mok. 18)

25 Mai Botángi ya Biblia: Exode 34-37

Lisolo 1: Exode 37:1-24

Lisolo 2: Kobunda ezali malamu? (lr mok. 19)

Lisolo 3: e Ezaleli ya kotika nzela na makambo nyonso ezali nini, mpe mpo na nini tosengeli koboya yango?

1 Yuni Botángi ya Biblia: Exode 38-40

Lisolo 1: Exode 40:1-19

Lisolo 2: Olingaka ntango nyonso kozala na esika ya liboso? (lr mok. 20)

Lisolo 3: Nini endimisi biso ete maladi nyonso ekosila mokolo mosusu? (rs-F lok. 180 par. 4–lok. 181 par. 1)

8 Yuni Botángi ya Biblia: Levitike 1-5

Lisolo 1: Levitike 4:1-15

Lisolo 2: Komikumisa ezali malamu? (lr mok. 21)

Lisolo 3: f Ndenge nini baklisto basalelaka bokonzi na bango?

15 Yuni Botángi ya Biblia: Levitike 6-9

Lisolo 1: Levitike 8:1-17

Lisolo 2: ‘Bondimaka makamwisi ya kobikisa bato?’ (rs-F lok. 181 par. 2-3)

Lisolo 3: Ntina oyo tosengeli kokosa te (lr mok. 22)

22 Yuni Botángi ya Biblia: Levitike 10-13

Lisolo 1: Levitike 11:29-45

Lisolo 2: Ntina oyo bato babɛlaka (lr mok. 23)

Lisolo 3: Bayekoli oyo bazwá batisimo bazwaka mapamboli nini?

29 Yuni Botángi ya Biblia: Levitike 14-16

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

6 Yuli Botángi ya Biblia: Levitike 17-20

Lisolo 1: Levitike 19:1-18

Lisolo 2: Liboso ete tóbotama, biso nyonso tozalaki nde na bomoi na mokili moko ya bilimo? (rs-F lok. 61 par. 1–lok. 62 par. 1)

Lisolo 3: Kokóma moyibi ata moke te! (lr mok. 24)

13 Yuli Botángi ya Biblia: Levitike 21-24

Lisolo 1: Levitike 22:17-33

Lisolo 2: Bato oyo basalaka mabe bakoki nde kobongwana? (lr mok. 25)

Lisolo 3: Ndenge nini baklisto ya solo bamonisaka ete bamibanzabanzaka mpo na babola?

20 Yuli Botángi ya Biblia: Levitike 25-27

Lisolo 1: Levitike 25:39-54

Lisolo 2: Ntina oyo kosala makambo ya malamu ezalaka mpasi (lr mok. 26)

Lisolo 3: Soki Adama asalaki lisumu te, alingaki nde kokende na likoló? (rs-F lok. 62 par. 2-3)

27 Yuli Botángi ya Biblia: Mituya 1-3

Lisolo 1: Mituya 3:1-20

Lisolo 2: Ntina oyo esɛngaka kozala na komipekisa mpo na komonisa boboto

Lisolo 3: Nzambe na yo nani? (lr mok. 27)

3 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 4-6

Lisolo 1: Mituya 4:1-16

Lisolo 2: Ndenge ya koyeba moto oyo tosengeli kotosa (lr mok. 28)

Lisolo 3: Mpo moto azwa bolamu ya solosolo na mikolo ezali koya, esengeli kaka akende na likoló? (rs-F lok. 62 par. 4-6)

10 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 7-9

Lisolo 1: Mituya 9:1-14

Lisolo 2: Nzambe asepelaka na bafɛti nyonso? (lr mok. 29)

Lisolo 3: Makambo nini emonisaka ete tozali sembo epai ya Yehova?

17 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 10-13

Lisolo 1: Mituya 13:17-33

Lisolo 2: Ndenge ya kolonga ezaleli ya kobanga (lr mok. 30)

Lisolo 3: Maloba oyo ezali na 1 Petelo 3:19, 20 elimboli nini? (rs-F lok.  63 par. 1)

24 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 14-16

Lisolo 1: Mituya 14:26-43

Lisolo 2: Kolinga mibeko ya Nzambe elimboli nini? (Nz. 119:97)

Lisolo 3: Epai tokoki kozwa libɔndisi (lr mok. 31)

31 Aug. Botángi ya Biblia: Mituya 17-21

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

7 Sɛt. Botángi ya Biblia: Mituya 22-25

Lisolo 1: Mituya 22:20-35

Lisolo 2: Ndenge babatelaki Yesu (lr mok. 32)

Lisolo 3: Maloba oyo ezali na 1 Petelo 4:6 elimboli nini? (rs-F lok. 63 par. 2)

14 Sɛt. Botángi ya Biblia: Mituya 26-29

Lisolo 1: Mituya 27:1-14

Lisolo 2: Makebisi ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina? (Ef. 6:4)

Lisolo 3: Yesu akoki kobatela biso (lr mok. 33)

21 Sɛt. Botángi ya Biblia: Mituya 30-32

Lisolo 1: Mituya 32:1-15

Lisolo 2: Tokokóma ndenge nini soki tokufi? (lr mok. 34)

Lisolo 3: Baklisto nyonso nde bazali na elikya ya kozala na bomoi na likoló? (rs-F lok. 64 par. 1-3)

28 Sɛt. Botángi ya Biblia: Mituya 33-36

Lisolo 1: Mituya 33:1-23

Lisolo 2: Tokoki kolamuka na liwa! (lr mok. 35)

Lisolo 3: Na makambo nini Bokonzi ya Nzambe eleki mosika baguvɛrnema ya bato?

5 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Deteronome 1-3

Lisolo 1: Deteronome 2:1-15

Lisolo 2: “Boyokani ya Sika” elobi nini mpo na bomoi ya seko awa na mabelé? (rs-F lok. 65 par. 1-6)

Lisolo 3: Banani bakosekwa? Bakofanda epai wapi? (lr mok. 36)

12 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Deteronome 4-6

Lisolo 1: Deteronome 4:15-28

Lisolo 2: Tókanisa Yehova mpe Mwana na ye (lr mok. 37)

Lisolo 3: Ntango nini tokoki koloba ete bozwi moke eleki malamu? (Mas. 15:16)

19 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Deteronome 7-10

Lisolo 1: Deteronome 9:1-14

Lisolo 2: Ntina oyo tosengeli kolinga Yesu (lr mok. 38)

Lisolo 3: Biblia elobeli elikya ya bomoi ya likoló mpo na bato boni? (rs-F lok. 66 par. 1-2)

26 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Deteronome 11-13

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

2 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 14-18

Lisolo 1: Deteronome 15:1-15

Lisolo 2: Kobanga Nzambe esangisi makambo nini?

Lisolo 3: Nzambe akanisi Mwana na ye (lr mok. 39)

9 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 19-22

Lisolo 1: Deteronome 22:1-19

Lisolo 2: Ndenge ya kosepelisa Nzambe (lr mok. 40)

Lisolo 3: Bato 144 000 bazali bango nyonso kaka Bayuda? (rs-F lok. 66 par. 3–lok. 67 par. 1)

16 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 23-27

Lisolo 1: Deteronome 25:1-16

Lisolo 2: Bana oyo bazali kosepelisa Nzambe (lr mok. 41)

Lisolo 3: g Makambo nini tosengeli kotalela ete ezali mosantu?

23 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 28-31

Lisolo 1: Deteronome 30:1-14

Lisolo 2: Ntina oyo tosengeli kosala mosala (lr mok. 42)

Lisolo 3: Na kotalela Makomami, “ebele ya bato” bazali na elikya nini? (rs-F lok. 67 par. 2-4)

30 Nov. Botángi ya Biblia: Deteronome 32-34

Lisolo 1: Deteronome 32:1-21

Lisolo 2: “Mokolo monene ya Yehova” ezali nini? (Sef. 1:14)

Lisolo 3: Banani bazali bandeko na biso? (lr mok. 43)

7 Des. Botángi ya Biblia: Yosua 1-5

Lisolo 1: Yosua 5:1-15

Lisolo 2: Baninga na biso basengeli kolinga Nzambe (lr mok. 44)

Lisolo 3: Bokonzi ya Nzambe ezali nini? Ndenge ya komonisa ete tolingi eya (lr mok. 45)

14 Des. Botángi ya Biblia: Yosua 6-8

Lisolo 1: Yosua 8:1-17

Lisolo 2: Mai ebomi mokili​—Ekoboma yango lisusu? (lr mok. 46)

Lisolo 3: Mpo na nini toli oyo ezali na Mosakoli 7:21, 22 ebongi mpenza?

21 Des. Botángi ya Biblia: Yosua 9-11

Lisolo 1: Yosua 9:1-15

Lisolo 2: Ndenge oyo toyebi ete Armagedona ekómi pene (lr mok. 47)

Lisolo 3: Mokili ya sika mpe ya kimya ya Nzambe​—Okoki kofanda kuna (lr mok. 48)

28 Des. Botángi ya Biblia: Yosua 12-15

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

[Maloba na nse ya lokasa]

a Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

b Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

c Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

d Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

e Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

f Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

g Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto