Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/08 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 10/08 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Ɔkɔtɔbɛ 2008. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 1 Sɛtɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 27 Ɔkɔtɔbɛ 2008.

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo ebombami na motema ya moto? [be lok. 259 par. 1, 2]

2. Ndenge nini tokoki kosalisa moto alongola na motema na ye ezaleli ya koponapona to koyina bato? [be lok. 260 par. 2]

3. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia báluka koyeba oyo ezali na mitema na bango mpo bákoba kokola na elimo? [be lok. 261 par. 3]

4. Nini tosengeli kobosanaka te ntango tozali kosala makasi tósimba mitema ya bato oyo bazali koyoka biso? [be lok. 262 par. 5]

5. Mpo na nini tosengeli kotosaka ntango oyo bapesi biso na makita ya lisangá? [be lok. 263 par. 1, 3, etanda]

LISOLO NO. 1

6. Nini epusaki Paulo na kokomela Bakolinti mokanda na ye ya liboso? [si lok. 210 par. 3]

7. Wapi mwa bantina oyo epusaki Paulo na kokoma mokanda na ye ya mibale epai ya Bakolinti? [si lok. 214 par. 1-2]

8. Ndenge nini baklisto basengeli kotalela mosala ya kosakola? [si nk. 216-217 par. 18]

9. Lolenge moko na bandeko oyo bazalaki na Filipi, ndenge nini tokoki lelo kondimama na Nzambe mpe kozala ntina ya esengo mpo na bandeko na biso? [si lok. 225 par. 12]

10. Paulo ná baninga na ye bazalaki na bopusi nini ya malamu na lisangá ya Tesaloniki? [si lok. 231 par. 13]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Kopesa “moto [mabe] epai ya Satana mpo na libebi ya mosuni, ete elimo ebikisama” elimboli nini? (1 Kol. 5:⁠5) [w08 15/7 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Bakolinti”]

12. Maloba “mbala nyonso” oyo Paulo asalelaki ntango alobelaki Ekaniseli ya liwa ya Yesu elimboli nini? Mpe ekaniseli yango esengeli kosalemaka tii ntango nini? (1 Kol. 11:26) [w08 15/7 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Bakolinti”]

13. Emonaneli nini elobelami na 2 Bakolinti 12:​2-4, mpe emonani mpenza ete nani amonaki emonaneli yango? [w04 15/10 lok. 8 par. 4; lok. 10 par. 9]

14. Mpo na nini Paulo akokanisaki Mibeko ya Moize na ‘molakisi oyo azalaki kokamba epai ya Klisto’? (Gal. 3:24) [w08 1/3 nk. 18-21]

15. Paulo alingaki koloba nini ntango abondelaki ete “elimo mpe molimo mpe nzoto na bino bandeko ebatelama”? (1 Tes. 5:23) [w08 15/9 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mikanda epai ya Batesaloniki mpe Timote”]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto