Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛt.
“Epai wapi okanisi ete tokoki kozwa toli ya malamu liboso ya kozwa bikateli ya minene? [Tiká ye apesa eyano. Tángá Masese 3:5, 6.] Lisolo oyo emonisi ntina ya kolanda bwanya ya Nzambe oyo esɛngi ete tótalela makama oyo ekateli moko ekoki komemela biso liboso ya kozwa yango.” Lakisá lisolo oyo ezali na lokasa 8.
Lamuká! Sɛt.
“Okanisi ete Nzambe alingaki ete nzala ezala na mokili ndenge ezali komonana lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo azali kokana kosala mpo na kosilisa mokakatano yango. [Tángá Nzembo 72:16.] Lisolo oyo emonisi ndenge Nzambe akozongisa Paladiso awa na mabelé.” Lakisá lisolo oyo ezali na lokasa 8.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Ɔkɔt.
“Lelo oyo lokola mobulu ekómi mingi, bato ebele bakómi kobanga mikolo ekoya. Nini esalisaka yo obanga mikolo yango te? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká elaka oyo Biblia epesi. [Tángá Yisaya 65:17.] Zulunalo oyo emonisi bantina mpenza oyo tosengeli kozala na elikya ete makambo ekozala malamu na mikolo ekoya.”
Lamuká! Ɔkɔt.
“Internet ezali esaleli malamu, kasi ezali mpe na makama mpo na bana mike. Okanisi ete tokoki kosala nini mpo na kobatela bango? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká likanisi oyo. [Tángá mpe limbolá Masese 18:1.] Yango ezali moko ya mitinda motoba ya Biblia oyo elobelami na lisolo oyo mpe ezali kosalisa baboti bábatela bana na bango.” Lakisá lisolo oyo ezali na lokasa 7.