Ndenge ya kolakisa bazulunalo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15 Aug.
“Okanisi nini mpo na likambo oyo Yesu alobaki? [Tángá Matai 5:5.] Ntango elaka oyo ekokokisama, okanisi ete makambo ekozala awa na mabelé kaka ndenge ezali lelo oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Na lisalisi ya Biblia, zulunalo oyo emonisi ndenge Yesu akobongola makambo awa na mabelé. Elobeli mpe banani bakozwa libula ya mabelé.”
Lamuká! Aug.
“Okanisi ete tokomona lisusu bandeko na biso oyo bakufa? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka oyo Yesu apesaki mpo na bakufi. [Tángá Yoane 5:28, 29.] Na lisalisi ya Biblia, lisolo oyo elimboli nini ekómelaka biso soki tokufi.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 28.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Sɛt.
“Lelo oyo, bato mingi bamipesaka lisusu na mangomba te. Okanisi ete moto akoki kokóma moto malamu mpenza soki amipesi na lingomba? [Tiká ye apesa eyano.] Talá oyo Biblia esakolaki mpo na makambo oyo bato mosusu bakoluka na mangomba na mikolo ya nsuka. [Tángá 2 Timote 4:3, 4.] Zulunalo oyo emonisi ndenge lingomba ya solo ekumisaka Nzambe mpe epesaka biso bolamu.”
Lamuká! Sɛt.
“Bato mingi bamitunaka soki makambo oyo siansi elobi emonisi ete Nzambe azali. Okanisi nini? [Tiká ye apesa eyano. Na nsima, tángá Baebele 3:4.] Lamuká! oyo ya ntina mingi elobeli makambo oyo etindi bato mosusu ya siansi bándima ete Mozalisi azali.”