Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/08 lok. 3
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 6/08 lok. 3

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 Yuni 2008. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 5 Mai tii na pɔsɔ ya 30 Yuni 2008. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—⁠Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Tokoki kosala nini mpo na koyeba soki bayoki bakangi ntina ya bandakisa oyo tosaleli? [be lok. 242 par. 4–lok. 243 par. 1]

2. Mpo na nini bandakisa ya pɛtɛɛ oyo elobeli makambo oyo bato bameseni na yango eteyaka mpenza? [be lok. 245 par. 2-4]

3. Mpo na nini tosengeli kosalelaka biloko ya kolakisa bato, mpe ndenge nini Yehova asalelaki yango mpo na kopesa mateya ya ntina mingi? (Gen. 15:5; Yil. 18:6; Yona 4:​10, 11) [be lok. 247 par. 1-2]

4. Ndenge nini tokoki kosalela biloko ya kolakisa bato mpo na koteya malamumalamu? [be lok. 248 par. 1-3]

5. Ndenge nini tokoki kosalela bakalati lokola biloko ya kolakisa bato mpo na koteya bayekoli ya Biblia? [be lok. 248 par. 4]

LISOLO NO. 1

6. Koyekola Biblia esalisaka biso tósosola makambo nini na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe? [be lok. 32 par. 2-3]

7. Ndenge nini tokoki kosalela Biblia yango moko mpo na koyeba ndimbola ya vɛrsɛ moko? [be lok. 34 par. 4–lok. 35 par. 2]

8. Ndenge nini Evanzile ya Yoane elobeli mokumba ya Yesu lokola nzela oyo mapamboli ya Yehova ezali kopesama epai ya bato? [si lok. 198 par. 32]

9. Makambo nini oyo euti na Makomami, oyo emonisi ete monganga Luka nde akomaki mokanda ya Misala? [si lok. 199 par. 3; lok. 200 par. 5-7]

10. Ndenge nini tokoki kosala plan ya lisolo na biso? [be nk. 39-41]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Tempelo nini “etongamaki [na boumeli ya] mbula ntuku minei na motoba”? (Yoa. 2:20) [w08 15/4 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mokanda ya Yoane”]

12. Banani ‘balongwe na liwa mpe bakómi na bomoi’? (Yoa. 5:​24, 25) [w08 15/4 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mokanda ya Yoane”]

13. Ntango Yoane 14:​16, 17 elobeli mosungi to elimo ya solo, mpo na nini esaleli liloba “yango” nzokande Yoane 16:​7, 8, 13, 14 esaleli liloba “ye”? [w08 15/4 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mokanda ya Yoane”]

14. Mpo na nini Yesu alobaki na Malia Magadalena ete atika kokangama na ye? (Yoa. 20:17) [w08 15/4 “Liloba ya Yehova ezali na bomoi​—⁠Makanisi ya ntina na mokanda ya Yoane”]

15. Na ndimbola nini Yesu asengelaki koya “ndenge kaka” amataki na likoló? (Mis. 1:​9-11) [rs-F lok. 330 par. 4; it-1-F lok. 197 par. 4]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto