Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/08 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 9 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 16 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 23 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 30 Yuni
  • Pɔsɔ ebandi na 7 Yuli
Mosala na biso ya Bokonzi—2008
km 6/08 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 9 Yuni

Loyembo 121

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni mpe Lamuká! ya Yuni.

Min. 20: Ndenge ya komibongisa mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia. Lisukulu ekouta na Mosala na biso ya Bokonzi ya Augusto 2004, lokasa 1. Na nsuka ya lisolo, salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge mosakoli moko azali komibongisa nokinoki mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia. Na nsima, salá elakiseli mosusu oyo ekomonisa mosakoli moko oyo azali komibongisa malamu mpe azali kotalela makanisi mosusu oyo epesami na Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Tósakola kozanga kotika.”a Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te. Limbolá ete atako bato mingi bandimaka tósolola, moke kaka nde bandimaka mpenza koyekola Biblia na mozindo. Tolukaka bato ya ndenge wana kozanga kotika.

Loyembo 201

Pɔsɔ ebandi na 16 Yuni

Loyembo 90

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Yebisá bayangani bámema Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli mpe Lamuká! ya Yuli na Likita ya Mosala ya pɔsɔ elandi mpe bámibongisa mpo na kolobela ndenge malamu ya kolakisa yango.

Min. 15: Tómonisa bato ntina ya nsango malamu. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 159. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo ezali kotungisa bato ya teritware na bino mikolo oyo. Sɛngá bango bámonisa ndenge oyo bakoki kokɔtisa makambo yango na maloba na bango ya kobanda lisolo.

Min. 20: “Obongisi libota na yo mpo bábika?”b Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.

Loyembo 54

Pɔsɔ ebandi na 23 Yuni

Loyembo 140

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Yuli, mpe salá elakiseli moko.

Min. 20: Mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza ebongisaka bomoi ya moto. Lisukulu ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali 2008, nkasa 17-19. Soki likoki ezali, sololá na babongisi-nzela mibale ya sanza na sanza, moko ya sika mpe mosusu oyo aumeli mingi. Sɛngá bango bálobela ndenge oyo mosala wana ya ntina mingi ebongisi bomoi na bango.

Min. 15: Omibongisa mpo na kokabola bazulunalo ya sika. Lisolo elongo na bayangani. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli mpe Lamuká! ya Yuli. Na nsima, sɛngá bayangani bálobela masolo nini bakanisi ete ekosepelisa bato ya teritware na bino mpe mpo na nini. Sɛngá bayangani bálobela makanisi oyo bamoni na masolo oyo bazali kokana kolakisa na mosala ya kosakola. Motuna nini bakoki kotuna moto mpo na kobanda lisolo? Vɛrsɛ nini ya lisolo yango bakoki kotángela moto? Salelá makanisi ya kobanda lisolo oyo bapesi na Mosala na biso ya Bokonzi to oyo bayangani balobeli mpo na komonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo yango.

Loyembo 82

Pɔsɔ ebandi na 30 Yuni

Loyembo 97

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuni.

Min. 20: Ndenge ya koyeba kosolola na bato. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 62, paragrafe 4 tii na nsuka ya lokasa 64. Yokanisá lisolo na mposa ya bato ya teritware na bino. Sololá na mokuse na mosakoli moko oyo eyebani ete ayebaka kosolola na bato na mosala ya ndako na ndako to na litatoli ya libaku malamu.

Min. 15: Ozali komikundola? Lisolo elongo na bayangani ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 2008, lokasa 29.

Loyembo 179

Pɔsɔ ebandi na 7 Yuli

Loyembo 125

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Osalelaka na mosala ya kosakola makambo oyo oyekolaka? Lisolo elongo na bayangani. Lobelá batoli ebongi kati na oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2007, nkasa 21-25, na lisolo elobi: “Tólona bizaleli oyo ekosalisa biso tókómisa bato bayekoli.” Poná paragrafe 3, 13-19. Longolá mituna oyo okotuna, okoki mpe kotuna boye: Ndenge nini omonisaka motema molai epai ya bayekoli ya Biblia? Ndenge nini okoyeba soki milende oyo osali mpo na kosalisa moyekoli ekoki? Mpo na nini ezali bwanya kokata boyekoli na bato oyo bazali kobota mbuma te? Osalaka nini mpo na kolonga momeseno ya koloba mingi ntango ozali koyekola na moto? Kozala na “mayele ya koteya” esangisi makambo nini? Ndenge nini okoki kosalela liteya oyo ozwi na elilingi ya lokasa 23 ntango ozali koyekola na baboti (salá elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge oyo moboti akoki kobanda koyekola na mwana na ye)? Limbolá ntina oyo kokómisa moto moyekoli ezali mosala ya bato ebele.

Min. 20: “Ntango tokutani na moto oyo alobaka monɔkɔ mosusu.”c Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Ntango bokotalela paragrafe 2, yebisá bayangani bituluku to masangá ya minɔkɔ mosusu oyo esakolaka mpe na teritware ya lisangá na bino. Lobelá bibongiseli nyonso oyo ezwami mpo boyokani ezala kati na lisangá na bino mpe bituluku to masangá yango ntango bozali kosakola na teritware wana.

Loyembo 188

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto