Obongisi libota na yo mpo bábika?
1 Bisakweli ya Biblia oyo ekokisami endimisi biso ete etikali moke mpenza mokili oyo mabe esuka. Lelo oyo, tozali kobika na bantango ya ndenge mosusu oyo ekokani mpenza na mikolo oyo ezalaki liboso ya Mpela. (Mat. 24:37-39) Ntango mokili wana ya kala ebomamaki, Noa abikaki mpo “atambolaki na Nzambe elongo.” (Gen. 6:9) Na ntembe te, Noa ateyaki libota na ye banzela ya Yehova, mpamba te bango mpe babikaki. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Noa mpe kobongisa libota na biso mpo bábika ntango ebongiseli mabe ya ntango oyo ekosuka?
2 Mosakoli ya boyengebene: Noa azalaki “mosakoli moko ya boyengebene” na boumeli ya mbula soki 40 tii 50. (2 Pet. 2:5) Na ntembe te, bato ya ntango ya Noa basɛkaki ye ntango azalaki kosakola; ekoki kozala ete bapusamaki na baanzelu oyo batombokelaki Nzambe mpe balataki nzoto ya bato to bango moko kaka. Ntango tosakolaka, bato mosusu baboyaka koyoka biso mpe basɛkaka biso; yango emonisi ete nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi pene. (2 Pet. 3:3, 4) Nzokande, na kokesana na bato ya mikolo ya Noa, bato mingi bandimaka nsango oyo tomemelaka bango mpe ebele ‘bazali koya’ kosambela Yehova. (Yis. 2:2, NW) ‘Tokobikisa ná biso moko ná baoyo bazali koyoka biso’ kaka soki tozali kokoba kosakola. (1 Tim. 4:16) Yango wana, ezali na ntina mingi ete baboti báteyaka bana na bango, ezala na maloba to na misala, ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu mpenza.—2 Tim. 4:2.
3 Asalaki “bobele bongo”: Noa ná libota na ye basengelaki kotosa malako nyonso ya Yehova mpo bábika. (Gen. 6:22) Lelo oyo, biso mpe tosengeli ‘kosepela kotosa’ malako ya Biblia mpe ya moombo ya sembo. (Yak. 3:17) Bana ya libota moko oyo bakómá mikóló babosanaka te ndenge tata na bango azalaki kosalela makanisi oyo ebongiseli ya Yehova ezalaki kopesa. Na ndakisa, azalaki kotambwisa boyekoli ya libota pɔsɔ nyonso, mpe azalaki kosakola na libota na ye mikolo nyonso ya pɔsɔ mpe ya lomingo ndenge esɛngamaka. Pɔsɔ na pɔsɔ, azalaki kosala nyonso asakolaka na mwana mokomoko. Momeseno na ye ya ‘kosala bobele bongo’ esalisaki mpenza bana na ye, mpe bango nyonso motoba bazali lelo oyo mikóló oyo bazali kosalela Yehova na bosembo.
4 Nsuka ya ebongiseli oyo ekoya pwasa. (Luka 12:40) Soki tolandi ndakisa ya Noa mpe tozali na kondima oyo ekoki kosala ete tóbika, nsuka yango ekokuta biso ná mabota na biso tosili mpenza komibongisa.—Ebe. 11:7.