Manaka mpo na likita ya mosala
LIYEBISI: Na eleko ya mayangani ya etúká, Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na programɛ ya Likita ya Mosala kaka ndenge ezalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Masangá ekoki kobongisa programɛ na bango ya makita na kotalela pɔsɔ oyo bakozala na liyangani ya etúká “Totambwisami na elimo ya Nzambe.” Soki ebongi, na Likita ya Mosala oyo bokosala liboso bókende na liyangani, bósalela miniti 15 mpo na kolobela toli ya siplema ya sanza oyo ya Aprili, oyo etali mpenza bino. Sanza moko to mibale nsima ya liyangani, bózwa miniti kobanda 15 tii 20 na Likita ya Mosala (mbala mosusu na lisolo oyo esengeli kotalela bamposa ya lisangá) mpo na kozongela makanisi ya ntina ya liyangani, oyo basakoli bamonaki ete ekosalisa bango na mosala ya kosakola. Bozongeli yango ekosalema na mokɛngɛli ya mosala ya kosakola. Sɛngá bayangani bálobela ndenge bazali kosalela to bakani kosalela makambo yango na mosala ya kosakola.
Pɔsɔ ebandi na 14 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili mpe Lamuká! ya Aprili.
Min. 15: “Bómimonisa bato ya botɔndi.”a Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.
Min. 20: “Tóbɔndisa baoyo bakufeli moto.”b Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango babɔndisaki moto moko oyo akufelaki ndeko to moninga.
Pɔsɔ ebandi na 21 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Yebisá bayangani bámema Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai mpe Lamuká! ya Mai na Likita ya Mosala ya pɔsɔ elandi mpe bámibongisa mpo na kolobela ndenge malamu ya kolakisa yango na teritware ya lisangá na bino.
Min. 10: Bamposa ya lisangá.
Min. 25: “Libaku ya kolya na elimo mpe kosepela.”c Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Yebisá liyangani ya etúká oyo lisangá na bino ekokende. Lobelá etanda “Makambo oyo tosengeli kobosana te mpo na liyangani ya etúká.”
Pɔsɔ ebandi na 28 Aprili
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili. Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai mpe Lamuká! ya Mai, mpe sɛngá bayangani bálobela masolo nini bakanisi ete ekosepelisa bato ya teritware na bino mpe mpo na nini. Sɛngá bango báyebisa ndenge oyo bakoki kolakisa masolo oyo bakani kosalela na mosala ya kosakola. Motuna nini bakoki kotuna moto mpo na kobanda kosolola na ye? Vɛrsɛ nini ya lisolo yango bakoki kotángela moto? Ndenge nini bakoki kolimbola vɛrsɛ yango mpo na koyanola na motuna oyo batunaki? Salelá maloba ya kobanda lisolo oyo bayangani balobeli to oyo bapesi lokola ndakisa na Mosala na biso ya Bokonzi, mpo na komonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo yango.
Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisolo elongo na bayangani.
Min. 20: “Tólanda matambe na ye malamumalamu.”d Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.
Pɔsɔ ebandi na 5 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Yehova akotika yo soki moke te. Lisukulu ya kolendisa ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2005, nkasa 8-11.
Min. 20: “Tókolisa mayele na biso ya kosakola.”e Ntango bokotalela paragrafe 3, lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 6-8, na motó ya likambo moke “Ndenge oyo okoki mpenza kozwa matomba mingi.”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.