Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/07 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 10/07 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe tokolimbwela ye yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango balobi ete bazali na bana te, tokoki kolakisa bango mwa buku Bókɛngɛlaka! Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Tokoki mpe kolakisa buku Pusaná penepene na Yehova to Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.

◼ Lokola sanza ya Desɛmbɛ ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Video oyo ezali na motó ya likambo Soigner sans transfuser—Besoins et droits du patient, ekotalelama na Likita moko ya mosala na sanza ya Yanuali. Soki olingi kozwa yango, osengeli kosɛnga yango noki mpenza na nzela ya lisangá.

◼ Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ezali “Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2008.” Tosengeli kobatela yango mpo tokosalela yango na mobu 2008 mobimba.

◼ Bóyeba ete ndeko oyo akosala lisolo ya nsuka na Likita ya Mosala asengeli koyebisa bayangani bátɛlɛma mpo na koyemba loyembo ya nsuka. Nsima na yango, ye moko to ndeko mosusu oyo aponamaki akosala libondeli ya nsuka.

◼ Na mokolo ya pɔsɔ 24 Novɛmbɛ 2007 nsima ya midi, libota ya Betele ekozala na makambo oyo etali kaka bango moko; mpe na mokolo ya pɔsɔ 8 Desɛmbɛ 2007, bakosukola Betele mobimba tii na ngonga ya 12:00. Na yango, tosɛngi bino bóya te na ntango wana mpo na kotala Betele to ndeko moko oyo afandaka na Betele.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto