Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/07 nk. 3-6
  • Programɛ mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2008

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Programɛ mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2008
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Malako
  • PROGRAMƐ
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 10/07 nk. 3-6

Programɛ mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2008

Malako

Na mobu 2008, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:

ESIKA MASOLO EUTI: Biblia haut fleuve ná Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto [bi7], Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi [be], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si], mpe Comment raisonner à partir des Écritures (ebimeli ya 1989) [rs-F].

Eteyelo esengeli kobanda SOKI NGONGA EKOKI na loyembo, libondeli mpe maloba ya kotombela bandeko boyei malamu. Na nsima, ekosalema ndenge ekomami awa na nse. Nsima ya lisolo mokomoko, mokɛngɛli na eteyelo akobenga moto oyo akosala lisolo oyo elandi.

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU: Miniti 5. Mokɛngɛli na eteyelo, mopesi-toli mosungi, to nkulutu mosusu oyo azali moteyi malamu akosala lisolo oyo etali toli mpo na koloba malamu oyo ekouta na buku Eteyelo ya mosala. (Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, basaleli na misala oyo bazali bateyi malamu bakoki kosala lisolo yango.)

LISOLO NO. 1: Miniti 10. Esengeli kosalema na nkulutu oyo azali moteyi malamu to mosaleli na misala oyo azali moteyi malamu, mpe ekouta na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Esengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na miniti 10. Ntina na yango esengeli kozala kaka te ya kolobela makanisi nyonso ya lisolo, kasi ya komonisa ndenge ya kosalela makanisi yango mpe kobimisa polele makambo oyo ekozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Esengeli kosalela kaka motó ya likambo oyo bapesi. Bandeko oyo bakosala lisukulu oyo basengeli kokeba ete bátosa ngonga oyo epesami. Bakopesa bango toli na nkuku soki esengeli.

MAKANISI YA NTINA NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Miniti 10. Na miniti mitano ya liboso, nkulutu oyo azali moteyi malamu to mosaleli na misala oyo azali moteyi malamu akosala lisolo yango na ndenge oyo ekopesa lisangá litomba. Akoki kobimisa makanisi na mokapo nyonso oyo alingi kati na mikapo oyo ezali na programɛ ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ wana. Asengeli kosuka te na kolobela na mokuse makambo oyo ezali na mikapo wana. Ntina ya libosoliboso ya lisolo yango ezali nde ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe ndenge nini makambo yango ezali na ntina mpo na bango. Molobi asengeli kokeba ete alekisa te miniti mitano oyo etyami mpo na eteni ya liboso. Asengeli kosala nyonso atikela bayangani miniti mitano ya nsuka mpo bango mpe báloba. Akosɛnga na baoyo bakoloba, mokomoko ayebisa na mokuse (eleka segɔnde 30 te) makanisi oyo asepelaki na yango ntango atángaki mikapo ya Biblia oyo ezali na programɛ mpe matomba oyo azwi na yango. Nsima na yango, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga bana-kelasi oyo bakosala masolo na bakelasi mosusu bákende na bakelasi yango.

LISOLO NO. 2: Eleka miniti 4 te. Ezali botángi oyo ekosalema na ndeko mobali. Mwana-kelasi yango akosuka kaka na kotánga eteni oyo basɛngi ye atánga, akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Mokɛngɛli na eteyelo akosala makasi mpo na kosalisa bana-kelasi bátángaka na ndenge oyo ezali komonisa ete bayebi ntina ya makambo oyo bazali kotánga, bákakatana na maloba te, báyeba konyata maloba ya ntina, kobongola mongongo, kopema na esika oyo ebongi, mpe kotánga ndenge bameseni koloba.

LISOLO NO. 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai ya ndeko mwasi. Bandeko basi oyo bakosala lisolo yango bakopona kadre moko kati na oyo ezali na lokasa 82 ya buku Eteyelo ya mosala to mokɛngɛli na eteyelo akoponela bango yango. Mwana-kelasi asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye mpe komonisa ndenge ya kosalela yango na motindo moko ya mosala ya kosakola oyo ebongi mpenza na teritware ya lisangá. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Esengeli kopesa bana-kelasi ya sika masolo oyo epai bakozwa yango emonisami polele na kati ya programɛ. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwana-kelasi azali kobimisa makanisi ya lisolo oyo bapesi ye mpe kosalisa molobani na ye akanisa likoló ya Makomami mpe asosola makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo yango. Mokɛngɛli na eteyelo akopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo akosala lisolo.

LISOLO NO. 4: Miniti 5. Mwana-kelasi asengeli kobimisa makanisi oyo eyokani na motó ya likambo oyo bapesi ye. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo, akosala yango lokola lisukulu mpo na bayangani nyonso. Soki bapesi ndeko mwasi lisolo yango, akosala yango na kolanda malako oyo epesami na lisolo No. 3. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa ndeko mobali lisolo No. 4 soki amoni ete lisolo yango ebongi kosalema na ndeko mobali. Tobendi likebi na bino na likambo oyo: Mitó ya makambo oyo ezali na mwa elembo ya monzoto liboso na yango esengeli kopesama kaka na bandeko mibali mpe bakosala yango lokola lisukulu. Soki lisangá na bino ezali na bankulutu mpe na basaleli na misala mingi oyo bakoki kosala mikumba ndenge na ndenge na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe na Likita ya Mosala mpe basusu batikali, ekozala malamu kopesa bankulutu ná basaleli na misala masolo oyo ezali na elembo ya monzoto.

TOLI: Miniti 1. Mokɛngɛli na eteyelo akoyebisa liboso te toli mpo na koloba malamu oyo asɛngaki mwana-kelasi. Nsima ya lisolo No. 2, No. 3 mpe No. 4, mokɛngɛli na eteyelo akopesa mwana-kelasi longonya mpo na makambo ya malamu oyo asalaki na lisolo na ye. Akosuka kaka te na koloba na ye “osali yango malamu,” kasi asengeli mpe koyebisa bantina oyo etindi ye aloba bongo. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa mwana-kelasi mokomoko toli mosusu na nkuku soki esengeli, nsima ya makita to na ntango mosusu.

NGONGA: Ndeko moko te oyo akosala lisolo asengeli kolekisa ngonga, ata mpe mokɛngɛli na eteyelo asengeli te kolya ngonga ntango azali kopesa toli. Soki bandeko oyo bazali kosala masolo No. 2, No. 3 mpe No. 4 balekisi ngonga, bakokata bango na mayele. Soki ndeko oyo asali toli mpo na koloba malamu, lisolo No. 1, to makanisi ya ntina na botángi ya Biblia alekisi ngonga, esengeli kopesa ye toli na nkuku. Bandeko nyonso oyo bazali na masolo basengeli kotosa ngonga oyo bapesi bango. Eteyelo mobimba esengeli koumela miniti 45, longola loyembo mpe libondeli.

LOKASA YA TOLI: Ezali na buku.

MOPESI-TOLI MOSUNGI: Longola mokɛngɛli na eteyelo, soki nkulutu mosusu oyo azali moteyi malamu azali, lisangani ya bankulutu ekopona ye mpo azala mopesi-toli mosungi. Soki bankulutu bazali mwa mingi na lisangá, bankulutu oyo bazali bateyi malamu bakobanda kolandana na mokumba yango, nkulutu moko mbula moko. Mokumba ya mopesi-toli mosungi ekozala ya kopesa toli na nkuku, soki esengeli, epai ya bandeko oyo basalaka lisolo No. 1 mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia. Ezali na ntina te apesaka toli nsima ya masolo yango nyonso oyo baninga na ye bankulutu to basaleli na misala bakosala.

BOZONGELI YA ETEYELO YA MOSALA YA TEOKRASI: Miniti 30. Nsima ya sanza mibalemibale, mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli. Liboso ya kosala yango, lisolo ya toli mpo na koloba malamu mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia esengeli kosalema ndenge oyo tolobeli yango awa liboso. Bozongeli yango ekouta na masolo oyo esalemaki na eteyelo na boumeli ya sanza mibale oyo eleki, bakisa mpe masolo ya pɔsɔ oyo bozongeli yango ekosalema. Soki lisangá na bino ekosala liyangani ya zongazonga na pɔsɔ oyo Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi esengeli kosalema, bokosala bozongeli yango (mpe masolo mosusu oyo ebongisamaki na pɔsɔ yango) na pɔsɔ oyo elandi pɔsɔ ya liyangani mpe masolo oyo esengelaki kosalema na pɔsɔ yango ekosalema na pɔsɔ ya liyangani. Soki mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bino na pɔsɔ ya bozongeli, loyembo, toli mpo na koloba malamu, mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia ekosalema kaka ndenge ezali na lokasa ya programɛ ya eteyelo. Lisukulu ya koteya lisangá (oyo esalemaka nsima ya toli mpo na koloba malamu) ekozala oyo ya pɔsɔ elandi. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ya pɔsɔ elandi ekobanda na toli mpo na koloba malamu mpe na nsima makanisi ya ntina na botángi ya Biblia kaka ndenge bapesi yango na lokasa ya programɛ; nsima na yango, bokosala bozongeli.

PROGRAMƐ

7 Yan. Botángi ya Biblia: Matai 1-6 Loyembo 62

Toli mpo na koloba malamu: Limbolá na ndenge esengeli (be lok. 228 par. 2-3)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Matai (si nk. 175-177 par. 1-10)

No. 2: Matai 5:1-20

No. 3: Mpo na nini bato bakufaka? (rs nk. 253-254 par. 6)

No. 4: Ndenge oyo elimo santu ya Nzambe esalisaka biso

14 Yan. Botángi ya Biblia: Matai 7-11 Loyembo 224

Toli mpo na koloba malamu: Etali mpe motema ya moto (be lok. 228 par. 4–lok. 229 par. 1)

No. 1: Sepelá na Liloba ya Nzambe (be lok. 9 par. 1-5)

No. 2: Matai 10:1-23

No. 3: Bosembo ememeka matomba

No. 4: Bato oyo bakufá bazali wapi, mpe bazali ndenge nini? (rs lok. 255 par. 1–lok. 256 par. 4)

21 Yan. Botángi ya Biblia: Matai 12-15 Loyembo 133

Toli mpo na koloba malamu: Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo (be lok. 230 par. 1-6)

No. 1: Tángáká Biblia mokolo na mokolo (be lok. 10 par. 1–lok. 12 par. 3)

No. 2: Matai 14:1-22

No. 3: Mpo na nini Batatoli ya Yehova balandaka mimeseno ya bonkɔkɔ te mpo na kolela ebembe? (rs lok. 257 par. 1-lok. 258 par. 2)

No. 4: Nani azali motɛmɛli ya Klisto?

28 Yan. Botángi ya Biblia: Matai 16-21 Loyembo 176

Toli mpo na koloba malamu: Kolukaluka makanisi na mikanda ekopesa yo makambo mingi ya koteya (be lok. 231 par. 1-3)

No. 1: “Bókeba na ndenge bozali koyoka” (be lok. 13 par. 1–lok. 14 par. 5)

No. 2: Matai 17:1-20

No. 3: Ndenge ya kopesa eyano na mateya ya lokuta na ntina ya liwa (rs lok. 258 par. 3-lok. 259 par. 1)

No. 4: Makambo oyo baklisto batalelaka yango ete ezali mosantu

4 Feb. Botángi ya Biblia: Matai 22-25 Loyembo 151

Toli mpo na koloba malamu: Limbolá mikapo (be lok. 231 par. 4-5)

No. 1: Ndenge ya koyoka na makita mpe na mayangani (be lok. 15 par. 1-lok. 16 par. 5)

No. 2: Matai 23:1-24

No. 3: Bomoi ya seko ekobanda kolɛmbisa bato te

No. 4: Ndɔtɔ oyo euti na Nzambe mpe ndɔtɔ mosusu (rs lok. 333-334 par. 7)

11 Feb. Botángi ya Biblia: Matai 26-28 Loyembo 110

Toli mpo na koloba malamu: Limbolá maloba (be lok. 232 par. 1)

No. 1: Matai​—Litomba na yango (si nk. 180-181 par. 29-33)

No. 2: Matai 27:1-22

No. 3: Kondima ya mpamba ekoki te

No. 4: Ntango nini bilangwiseli epekisami mpo na baklisto (rs nk. 112-114 par. 3)

18 Feb. Botángi ya Biblia: Malako 1-4 Loyembo 167

Toli mpo na koloba malamu: Sosolá elongo likoló ya mikapo (be lok. 232 par. 2-4)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Malako (si nk. 181-183 par. 1-11)

No. 2: Malako 2:1-17

No. 3: Ntina oyo baklisto basengeli komɛla bangi te (rs lok. 114 par. 4-lok. 115 par. 3)

No. 4: Ndenge oyo bolingo epesaka mpiko

25 Feb. Botángi ya Biblia: Malako 5-8 Loyembo 72

Toli mpo na koloba malamu: Kopona makambo oyo ekopesa bayoki na yo litomba (be lok. 232 par. 5-lok. 233 par. 1-4)

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

3 Mar. Botángi ya Biblia: Malako 9-12 Loyembo 195

Toli mpo na koloba malamu: Salelá mokanda oyo batindi yo osalela (be lok. 234 par. 1-lok. 235 par. 3)

No. 1: Okoki kobongisa makoki na yo ya kokanga makambo na motó (be lok. 17 par. 1-lok. 19 par. 1)

No. 2: Malako 11:1-18

No. 3: Ntina oyo Nzambe akoki kobuka lokuta te

No. 4: Ntina oyo baklisto basengeli komɛla likaya te (rs lok. 116 par. 1-lok. 117 par. 4)

10 Mar. Botángi ya Biblia: Malako 13-16 Loyembo 87

Toli mpo na koloba malamu: Kosalela malamu mituna (be lok. 236 par. 1-5)

No. 1: Malako​—Litomba na yango (si lok. 186 par. 31-33)

No. 2: Malako 14:1-21

No. 3: Ndenge nini kolonga mimeseno ya mabe? (rs lok. 118 par. 1-4)

No. 4: Ntina oyo “nkanda ya moto ekokisaka boyengebene ya Nzambe te” (Yak. 1:20)

17 Mar. Botángi ya Biblia: Luka 1-3 Loyembo 13

Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na kokɔta na makanisi ya ntina (be lok. 237 par. 1-2)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Luka (si nk. 187-188 par. 1-9)

No. 2: Luka 1:1-23

No. 3: Ntina “kondima oyo ezangi misala esalaka eloko te” (Yak. 2:20)

No. 4: Mabota bakopekisa Nzambe kokokisa mokano na ye mpo na mabelé soki moko te (rs nk. 403-404 par. 5)

24 Mar. Botángi ya Biblia: Luka 4-6 Loyembo 156

Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na kokanisa malamumalamu likambo moko (be lok. 237 par. 3-lok. 238 par. 2)

No. 1: Mosala ya elimo ya Nzambe mpo na komikundola makambo (be lok. 19 par. 2-lok. 20 par. 3)

No. 2: Luka 4:1-21

No. 3: Yehova akoboma mabelé na mɔtɔ? (rs lok. 404 par. 6-lok. 406 par. 1)

No. 4: Kobanga Nzambe epekisaka biso kosala mabe

31 Mar. Botángi ya Biblia: Luka 7-9 Loyembo 122

Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na kobimisa makanisi oyo ezali na motema (be lok. 238 par. 3-5)

No. 1: Mpo na nini esengeli omipesa na kotánga? (be lok. 21 par. 1-lok. 23 par. 3)

No. 2: Luka 7:1-17

No. 3: Makambo oyo emonisaka ete Nzambe alingi biso mpe alingi tózala na esengo

No. 4: Basangani ya Yelusaleme ya sika bakozonga awa na mabelé te nsima ya kobomama ya bato mabe (rs lok. 406 par. 2-lok. 407 par. 1)

7 Apr. Botángi ya Biblia: Luka 10-12 Loyembo 68

Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na konyata makanisi ya ntina malamumalamu (be lok. 239 par. 1-2)

No. 1: Ndenge oyo okosala mpo omipesa na kotánga (be lok. 23 par. 4-lok. 26 par. 4)

No. 2: Luka 11:37-54

No. 3: Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ebongwaná? (rs lok. 407 par. 2-lok. 408 par. 2)

No. 4: Emoniseli 17:17 elimboli mpenza nini?

14 Apr. Botángi ya Biblia: Luka 13-17 Loyembo 86

Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na kolakisa polele makanisi ya libunga (be lok. 239 par. 3-5)

No. 1: Ndenge ya koyekola (be lok. 27 par. 1-lok. 31 par. 2)

No. 2: Luka 16:1-15

No. 3: Mobeko ya Nzambe oyo etali kolɔkɔta eteyi biso nini? (Lev. 19:9, 10)

No. 4: Ndenge nini tokoki kolendisa bato oyo bazali na maladi? (rs lok. 119 par. 1-4)

21 Apr. Botángi ya Biblia: Luka 18-21 Loyembo 182

Toli mpo na koloba malamu: Maloba ya kokokanisa makambo mpe maloba ya elilingi oyo ezali koteya (be lok. 240 par. 1-lok. 241 par. 1)

No. 1: Luka​—Litomba na yango (si nk. 192-193 par. 30-35)

No. 2: Luka 18:1-17

No. 3: Ndenge ya kolendisa bato oyo bakufeli moto oyo balingaki mingi (rs lok. 119 par. 5-lok. 120 par. 4)

No. 4: ‘Kokoba kosala makambo kozanga koimaima’ elimboli nini? (Filp. 2:14)

28 Apr. Botángi ya Biblia: Luka 22-24 Loyembo 218

Toli mpo na koloba malamu: Salelá bandakisa mosusu (be lok. 241 par. 2-lok. 242 par. 1)

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

5 Mai Botángi ya Biblia: Yoane 1-4 Loyembo 31

Toli mpo na koloba malamu: Bandakisa oyo ezali na Biblia (be lok. 242 par. 2-3)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Yoane (si nk. 193-195 par. 1-9)

No. 2: Yoane 3:1-21

No. 3: Lokola Davidi aboyaki koboma mokonzi Saulo, yango eteyi biso nini?

No. 4: Elendiseli mpo na baoyo bazali konyokwama mpo bazali kosala mokano ya Nzambe (rs lok. 120 par. 5-lok. 121 par. 2)

12 Mai Botángi ya Biblia: Yoane 5-7 Loyembo 150

Toli mpo na koloba malamu: Bakokanga ntina ya bandakisa yango? (be lok. 242 par. 4-lok. 243 par. 1)

No. 1: Koyekola epesaka mbano (be lok. 31 par. 3-lok. 32 par. 3)

No. 2: Yoane 6:1-21

No. 3: Liteya oyo tozwi na likambo ya Ananiasi ná Safira

No. 4: Ndenge nini okoki kolendisa bato oyo balɛmbi mpo basaleli bango makambo na bosembo te? (rs lok. 121 par. 3-6)

19 Mai Botángi ya Biblia: Yoane 8-11 Loyembo 102

Toli mpo na koloba malamu: Bandakisa ya makambo oyo bato bameseni na yango (be lok. 244 par. 1-2)

No. 1: Ndenge ya kolukaluka na kati ya Biblia (be lok. 33 par. 1-lok. 35 par. 2)

No. 2: Yoane 11:38-57

No. 3: Elendiseli nini ebongi mpo na bato oyo bazali konyokwama na mikakatano ya mbongo? (rs lok. 121 par. 7-lok. 122 par. 4)

No. 4: Lokola moto moko te akokaki kopesa etumbu na moto oyo abuki mobeko ya zomi, mpo na nini mobeko yango epesamaki?

26 Mai Botángi ya Biblia: Yoane 12-16 Loyembo 3

Toli mpo na koloba malamu: Bandakisa oyo ebongi na bato oyo bakoyoka yo (be lok. 244 par. 3-lok. 245 par. 4)

No. 1: Yekolá kolukaluka na mikanda mosusu (be lok. 35 par. 3-lok. 38 par. 4)

No. 2: Yoane 12:1-19

No. 3: Libɔndisi mpo na bato oyo balɛmbi mpo na mabunga oyo basalaka (rs lok. 122 par. 5-8)

No. 4: Ndenge oyo tokitisaka mikumba na biso epai ya Yehova (Nz. 55:22)

2 Yuni Botángi ya Biblia: Yoane 17-21 Loyembo 198

Toli mpo na koloba malamu: Kosalela malamu biloko oyo okoki kolakisa bato (be lok. 247 par. 1-2)

No. 1: Yoane​—Litomba na yango (si nk. 198-199 par. 30-35)

No. 2: Yoane 21:1-14

No. 3: Ndenge nini tokoki kondimela Nzambe oyo tomonaka ye te?

No. 4: Evolisyo​—Mokakatano monene mpo na siansi (rs nk. 144-145 par. 3)

9 Yuni Botángi ya Biblia: Misala 1-4 Loyembo 92

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge oyo Yesu asalelaki biloko ya kolakisa bato (be lok. 247 par. 3)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Misala (si nk. 199-200 par. 1-8)

No. 2: Misala 1:1-14

No. 3: Bitika ya banzete na banyama (fossiles) emonisi nini mpo na evolisyo? (rs lok. 145 par. 4-lok. 148 par. 5)

No. 4: “Elobeli ya polele” ezali nini? (Ebe. 3:6)

16 Yuni Botángi ya Biblia: Misala 5-7 Loyembo 2

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosalela biloko ya kolakisa bato (be lok. 248 par. 1-3)

No. 1: Ndenge ya kosala plan ya lisolo na yo (be nk. 39-42)

No. 2: Misala 5:1-16

No. 3: Ndenge ya kosolola na bato oyo bandimaka evolisyo (rs lok. 148 par. 6-lok. 151 par. 2)

No. 4: Mpo na nini kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya? (Nz. 111:10)

23 Yuni Botángi ya Biblia: Misala 8-10 Loyembo 116

Toli mpo na koloba malamu: Salelá bakalati, programɛ ya mayangani, mpe bakasɛti-video (be lok. 248 par. 4-lok. 249 par. 2)

No. 1: Ndenge ya kobongisa masolo na yo na eteyelo (be lok. 43 par. 1–lok. 44 par. 3)

No. 2: Misala 8:1-17

No. 3: Ndenge oyo Yesu ‘akobikisa babola’ (Nz. 72:12)

No. 4: Mpo na nini bato mingi bazangi kondima? (rs nk. 169-170 par. 1)

30 Yuni Botángi ya Biblia: Misala 11-14 Loyembo 79

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kolakisa biloko liboso ya bato ebele (be lok. 249 par. 3-lok. 250 par. 1)

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

7 Yuli Botángi ya Biblia: Misala 15-17 Loyembo 203

Toli mpo na koloba malamu: Kotinda bato bákanisa ezali na ntina (be lok. 251 par. 1-3)

No. 1: Ndenge ya kobongisa lisolo oyo bapesi motó ya likambo mpe bamonisi ndenge ya kosala yango (be lok. 44 par. 4–lok. 46 par. 2)

No. 2: Misala 16:1-15

No. 3: Ntina ya kosalela Yehova kozanga kobanga

No. 4: Ndenge nini moto akoki kokóma na kondima? (rs lok. 170 par. 2-5)

14 Yuli Botángi ya Biblia: Misala 18-21 Loyembo 32

Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobanda (be lok. 251 par. 4-lok. 252 par. 3)

No. 1: Ndenge ya kobongisa masukulu ya lisangá (be lok. 47 par. 1–lok. 49 par. 2)

No. 2: Misala 20:1-16

No. 3: Kondima elikya ya mokili ya sika ya sembo emonanaka na misala (rs lok. 171 par. 1-5)

No. 4: Liteya nini tokoki kozwa na mobeko oyo ezali na Exode 23:19b?

21 Yuli Botángi ya Biblia: Misala 22-25 Loyembo 200

Toli mpo na koloba malamu: Ntango ya koyokela bato (be lok. 252 par. 4-lok. 253 par. 1)

No. 1: Ndenge ya kobongisa likita ya mosala (be lok. 49 par. 3–lok. 51 par. 3)

No. 2: Misala 22:1-16

No. 3: Na ndenge nini Batatoli ya Yehova bazali kokokisa Yoane 13:34, 35?

No. 4: Ndenge nini moto akoki koyeba basakoli ya lokuta? (rs lok. 152 par. 1-lok. 53 par. 3)

28 Yuli Botángi ya Biblia: Misala 26-28 Loyembo 29

Toli mpo na koloba malamu: Tuná mituna mpe monisá ntina ya mituna yango (be lok. 253 par. 2-lok. 254 par. 2)

No. 1: Misala​—Litomba na yango (si nk. 204-205 par. 32-40)

No. 2: Misala 26:1-18

No. 3: Basakoli ya solo bakokaki ntango nyonso te koyeba ndenge nini mpe ntango nini makambo oyo esakolamaki ekokokisama (rs lok. 153 par. 4-9)

No. 4: Ntina oyo Yehova azali komonisa motema molai

4 Aug. Botángi ya Biblia: Baloma 1-4 Loyembo 170

Toli mpo na koloba malamu: Makanisi ya solosolo oyo euti na Liloba ya Nzambe (be lok. 255 par. 1-lok. 256 par. 2)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Baloma (si nk. 205-206 par. 1-7)

No. 2: Baloma 3:1-20

No. 3: Ndenge oyo baanzelu balendisaka mpe babatelaka basaleli ya Nzambe

No. 4: Batatoli ya Yehova basimbaka losambo ya solo (rs lok. 154 par. 1-2)

11 Aug. Botángi ya Biblia: Baloma 5-8 Loyembo 207

Toli mpo na koloba malamu: Bakisá makambo mosusu mpo na kondimisa (be lok. 256 par. 3-5)

No. 1: Ndenge ya kobongisa masukulu ya bato nyonso (be lok. 52 par. 1–lok. 54 par. 1)

No. 2: Baloma 6:1-20

No. 3: Batatoli ya Yehova bayebanaka na misala oyo bazali kosala (rs lok. 155 par. 1-lok. 156 par. 2)

No. 4: Ndenge oyo bosembo ekoki kobatela biso

18 Aug. Botángi ya Biblia: Baloma 9-12 Loyembo 152

Toli mpo na koloba malamu: Monisá bato makambo ya solosolo oyo ekoki mpenza mpo na kosilisa ntembe (be lok. 257 par. 1-4)

No. 1: Baloma​—Litomba na yango (si lok. 209 par. 20-25)

No. 2: Baloma 9:1-18

No. 3: Wapi likama ya matɔngi mpe kopanza bansango ya lokuta?

No. 4: Ndenge ya koyanola bato oyo babengaka biso basakoli ya lokuta (rs lok. 156 par. 3-lok. 157 par. 1)

25 Aug. Botángi ya Biblia: Baloma 13-16 Loyembo 16

Toli mpo na koloba malamu: Kosala makasi mpo na kosimba motema (be lok. 258 par. 1-lok. 259 par. 1)

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

1 Sɛt. Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 1-9 Loyembo 199

Toli mpo na koloba malamu: Luká koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato (be lok. 259 par. 2-4)

No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 Bakolinti (si nk. 210-211 par. 1-7)

No. 2: 1 Bakolinti 4:1-17

No. 3: Nzambe abongisá te ntango oyo moto mokomoko akokufa (rs nk. 98-99 par. 1)

No. 4: Soki moto azali na bomɛngo yango emonisi nde ete Nzambe azali kopambola ye?

8 Sɛt. Botángi ya Biblia: 1 Bakolinti 10-16 Loyembo 35

Toli mpo na koloba malamu: Kotinda bato bázala na mayoki ya malamu (be lok. 259 par. 5-lok. 260 par. 1)

No. 1: 1 Bakolinti​—Litomba na yango (si nk. 213-214 par. 23-26)

No. 2: 1 Bakolinti 13:1–14:6

No. 3: Ntina oyo batosi ya Liloba bazali bato ya esengo

No. 4: Makambo nyonso oyo esalemaka ezalaka mokano ya Nzambe te (rs lok. 99 par. 2-lok. 100 par. 7)

15 Sɛt. Botángi ya Biblia: 2 Bakolinti 1-7 Loyembo 58

Toli mpo na koloba malamu: Salisá bato bálona ezaleli ya kobanga Nzambe (be lok. 260 par. 2-3)

No. 1: Maloba ya ebandeli na 2 Bakolinti (si lok. 214 par. 1-4)

No. 2: 2 Bakolinti 1:1-14

No. 3: Nzambe ayebaka makambo nyonso liboso te mpe abongisaka makambo nyonso liboso te (rs lok. 101 par. 1-3)

No. 4: Ntina oyo baklisto ya solo basepelaka ntango bazali konyokwama

22 Sɛt. Botángi ya Biblia: 2 Bakolinti 8-13 Loyembo 12

Toli mpo na koloba malamu: Ezaleli na biso ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe (be lok. 260 par. 4-lok. 261 par. 1)

No. 1: 2 Bakolinti​—Litomba na yango (si nk. 216-217 par. 18-20)

No. 2: 2 Bakolinti 9:1-15

No. 3: Baklisto ya solo bazali bato ya mokili te

No. 4: Nzambe azali na makoki ya koyeba makambo mpe kobongisa yango liboso (rs lok. 102 par. 1-4)

29 Sɛt. Botángi ya Biblia: Bagalatia 1-6 Loyembo 163

Toli mpo na koloba malamu: Salisá bato bámitalela malamumalamu (be lok. 261 par. 2-4)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Bagalatia mpe Litomba na yango (si nk. 217-220 par. 1-6, 14-18)

No. 2: Bagalatia 1:1-17

No. 3: Ntina oyo Nzambe asalelaki te makoki na ye ya koyeba makambo liboso, na likambo ya Adama (rs lok. 102 par. 5-lok. 103 par. 2)

No. 4: Kolinga Nzambe ekosalisa moto alonga ezaleli ya kobanga bato

6 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Baefese 1-6 Loyembo 99

Toli mpo na koloba malamu: Lendisá bango bátosa na motema mobimba (be lok. 262 par. 1-4)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Baefese mpe Litomba na yango (si nk. 220-223 par. 1-8, 16-19)

No. 2: Baefese 3:1-19

No. 3: Kosɛnga bolimbisi emonisi te ete ozangi makasi

No. 4: Nzambe akanaki liboso te makambo oyo ekokómela Yakobo, Esau to Yudasi (rs lok. 103 par. 3-lok. 104 par. 1)

13 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Bafilipi 1-4–Bakolose 1-4

Loyembo 123

Toli mpo na koloba malamu: Salá elongo na Yehova mpo na kosimba mitema ya bato (be lok. 262 par. 5)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Bafilipi mpe Litomba na yango (si nk. 223-225 par. 1-7, 12-14)

No. 2: Bafilipi 3:1-16

No. 3: Ndenge nini makambo ya lisangá ya boklisto etángámá bongo liboso? (rs lok. 104 par. 2-3)

No. 4: a Bakolose​—Litomba na yango (si lok. 228 par. 12-14)

20 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Batesaloniki 1-5–2 Batesaloniki 1-3

Loyembo 161

Toli mpo na koloba malamu: Oyo okoki kosala mpo na kotosa ngonga oyo bapesi yo (be lok. 263 par. 1-lok. 264 par. 4)

No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 mpe 2 Batesaloniki mpe Litomba na yango (si nk. 229-231 par. 1-5, 13-15; nk. 232-233 par. 1-4, 10-11)

No. 2: 1 Batesaloniki 1:1–2:8

No. 3: Makomami elobi nini mpo na likambo ya kotala minzoto mpo na koyeba makambo oyo ekoya? (rs lok. 105 par. 1-lok. 106 par. 1)

No. 4: b 1 mpe 2 Timote​—Litomba na yango (si nk. 236-237 par. 15-19; nk. 238-239 par. 10-12)

27 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Timote 1-6–2 Timote 1-4

Loyembo 69

Toli mpo na koloba malamu: Kolendisa bato mpenza malamu (be lok. 265 par. 1-3)

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

3 Nov. Botángi ya Biblia: Tito 1-3–Filemona 1-25

Loyembo 149

Toli mpo na koloba malamu: Lendisá bato na bolingo (be lok. 266 par. 1-4)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Tito mpe Litomba na yango (si nk. 239-241 par. 1-4, 8-10)

No. 2: Tito 1:1-16

No. 3: Wapi bantina ya solo mpenza oyo etindaka moto andima Nzambe? (rs lok. 106-lok. 107 par. 3)

No. 4: c Filemona​—Litomba na yango (si nk. 242-243 par. 7-10)

10 Nov. Botángi ya Biblia: Baebele 1-8 Loyembo 144

Toli mpo na koloba malamu: Mateya oyo euti mpenza na Biblia (be lok. 267 par. 1-2)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Baebele (si nk. 243-244 par. 1-9)

No. 2: Baebele 3:1-19

No. 3: Mabe mpe bampasi ezali te komonisa ete Nzambe azali te (rs lok. 107 par. 4-6)

No. 4: Bokeseni kati na komikitisa ya solo mpe oyo ya lokuta

17 Nov. Botángi ya Biblia: Baebele 9-13 Loyembo 28

Toli mpo na koloba malamu: Zalá “na elobeli ya polele” (be lok. 267 par. 3-4)

No. 1: Baebele​—Litomba na yango (si lok. 247 par. 23-27)

No. 2: Baebele 10:1-17

No. 3: Nzambe azali moto ya solo mpenza mpe oyo azali na mayoki (rs lok. 108 par. 1-7)

No. 4: Ndenge oyo kolimbisa elendisaka bomoko

24 Nov. Botángi ya Biblia: Yakobo 1-5 Loyembo 88

Toli mpo na koloba malamu: Ntina oyo esengeli kokitisa mitema ya bato (be lok. 268 par. 1-3)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Yakobo mpe Litomba na yango (si nk. 248-250 par. 1-7, 15-17)

No. 2: Yakobo 1:1-21

No. 3: Nzambe azali na ebandeli te (rs lok. 108 par. 8-lok. 109 par. 3)

No. 4: Ndenge oyo “motema mawa esepelaka na bolongi mpenza likoló ya lisambisi” (Yak. 2:13)

1 Des. Botángi ya Biblia: 1 Petelo 1–2 Petelo 3 Loyembo 18

Toli mpo na koloba malamu: Yebisá bango lisusu makambo oyo Yehova asalá (be lok. 268 par. 4-lok. 269 par. 2)

No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 Petelo mpe Litomba na yango (si nk. 251-253 par. 1-5, 11-13)

No. 2: 1 Petelo 2:1-17

No. 3: Kosalela nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na kobikisama (rs lok. 109 par. 4-lok. 110 par. 1)

No. 4: d 2 Petelo​—Litomba na yango (si lok. 255 par. 8-10)

8 Des. Botángi ya Biblia: 1 Yoane 1–Yuda Loyembo 50

Toli mpo na koloba malamu: Monisá bato ndenge oyo Yehova asalisaki bato na ye na ntango ya kala (be lok. 269 par. 3-5)

No. 1: Maloba ya ebandeli na 1, 2, mpe 3 Yoane mpe Litomba na yango (si nk. 256-258 par. 1-5, 11-13;; lok. 259 par. 1-3, 5 5; nk. 260-261 par. 1-3, 5)

No. 2: 1 Yoane 4:1-16

No. 3: Mangomba nyonso ezali malamu? (rs lok. 110 par. 2-5)

No. 4: e Yuda​—Litomba na yango (si nk. 262-263 par. 8-10)

15 Des. Botángi ya Biblia: Emoniseli 1-6 Loyembo 219

Toli mpo na koloba malamu: Monisá ete osepelaka na oyo Nzambe azali kosala sikoyo (be lok. 270 par. 1-lok. 271 par. 2)

No. 1: Maloba ya ebandeli na Emoniseli (si nk. 263-264 par. 1-6)

No. 2: Emoniseli 3:1-13

No. 3: Na ndenge nini Yesu azali “Nzambe”? (rs lok. 110 par. 6-7)

No. 4: Ntina oyo motema molai mpe motema mawa ezali na ndelo

22 Des. Botángi ya Biblia: Emoniseli 7-14 Loyembo 21

Toli mpo na koloba malamu: Zwá mpenza matomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (be lok. 5 par. 1-lok. 8 par. 1)

No. 1: Emoniseli​—Litomba na yango (si nk. 268-269 par. 28-34)

No. 2: Emoniseli 8:1-13

No. 3: Ndenge ya kosolola na moto oyo andimaka te ete Nzambe azali (rs lok. 111 par. 1-lok. 112 par. 1)

No. 4: Maloba “Nzambe azali monene koleka mitema na biso” elimboli nini? (1 Yoa. 3:20)

29 Des. Botángi ya Biblia: Emoniseli 15-22 Loyembo 60

Toli mpo na koloba malamu: Kotánga malamu (be lok. 83 par. 1-5)

Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi

[Maloba na nse ya lokasa]

a Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

b Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

c Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

d Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

e Pesá yango kaka na bandeko mibali, ekozala malamu bázala bankulutu to basaleli na misala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto