Bozongeli ya eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 29 Ɔkɔtɔbɛ 2007. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Sɛtɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 29 Ɔkɔtɔbɛ 2007.
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Mpo na nini kozongela likambo ezali lolenge malamu ya koteya? [be lok. 206 par. 1-2, etanda]
2. Tokoki kosala nini mpo na konyata motó ya likambo ya lisolo na biso? [be lok. 210, etanda]
3. Makanisi ya ntina ya lisolo ezali nini, mpe ndenge nini kopona yango? [be lok. 212 par. 1-3]
4. Mpo na nini tosengeli te kolobela makanisi ya ntina ebele ebele na lisolo? [be lok. 213 par. 2-4]
4. Mpo na nini ezali na ntina ete maloba na biso ya ebandeli elamwisa mposa ya bayoki, mpe ndenge nini kosala yango? [be lok. 215 par. 1; lok. 216 par. 1-3, etanda]
LISOLO NO. 1
6. Ndenge nini Nzembo 119:89, 90 esalisi biso tóyeba ete tokoki kotyela liloba ya Nzambe motema? [w05 15/4 lok. 15 par. 3]
7. Mokanda ya Ezekiele elobeli mingi likambo nini, mpe nini ekokómela baoyo bazali lelo kobulisa nkombo ya Yehova na bomoi na bango? [si lok. 137 par. 33]
8. Ndenge nini ‘liloba ya Yehova’ ekoki kobatela motema na biso? (Nz. 18:30) [w05 1/9 lok. 30 par. 2]
9. Lolenge nini elikya ya Bokonzi elobelami mingi kati na mokanda ya Danyele? [si lok. 142 par. 23]
10. Ndenge nini mokanda ya Hosea elendisi kondima na biso na bisakweli epemami ya Nzambe? [si lok. 145 par. 14]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. 11. Na emonaneli ya Ezekiele, komeka bolai ya tempelo elimbolaki nini, mpe yango endimisi mpenza biso likambo nini lelo oyo? (Ezek. 40:2-5) [w99 1/3 lok. 9 par. 6; lok. 14 par. 7]
12. Na kokokisama ya nsuka ya emonaneli ya Ezekiele, “mokonzi” azali elilingi ya nani? (Ezek. 48:21) [w99 1/3 lok. 16 par. 13-15; nk. 22-23 par. 19-20]
13. Makambo oyo ezali na Danyele 2:21 elimboli nini? [w98 15/9 lok. 12 par. 9]
14. Mpo na nini Danyele azalaki ‘moto oyo alingami mingi’ epai ya Yehova? (Dan. 9:23) [dp lok. 186 par. 12; w04 1/8 lok. 12 par. 17]
15. Na ndimbola nini ‘boyebi ya Nzambe ezalaki kati na mokili te’ na Yisalaele, mpe ndenge nini mokomoko na biso asengeli kotalela maloba wana? (Hos. 4:1, 2, 6) [w05 15/11 lok. 21 par. 21; jd-F nk. 57-58 par. 5; lok. 61 par. 10]