Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/07 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 10 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 17 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 24 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 1 Ɔkɔtɔbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 9/07 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 10 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 225

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ mpe Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ. Na elakiseli mokomoko, esengeli kopesa bazulunalo yango nyonso mibale mbala moko, atako bokobenda likebi likoló ya zulunalo moko kaka.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Lisolo elongo na bayangani ekosalema na nkulutu moko. Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bátánga mpe bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.

Min. 20: “Tólanda ndakisa ya Yesu.”a Sɛngá bayangani bálobela matomba oyo bazwaki na ndakisa malamu ya basusu.

Loyembo 130 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 17 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 60

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Ndenge nini tosalaki mosala na mbula eleki? Mokɛngɛli na mosala ya kosakola azali kotalela mosala ya mbula eleki. Lobelá mingi mpenza makambo ya kolendisa oyo basakoli basalaki na mosala ya kosakola. Pesá longonya oyo ebongi. Lobelá likambo moko to makambo mibale oyo esengeli kotyela yango likebi na mobu ya sika. Lobelá mosala ya babongisi-nzela, pesá bango longonya mpo na mosala malamu oyo basali. Lobelá matomba oyo emonanaki na milende oyo lisangá esalaki mpo na kosalisa basakoli oyo batiká kosakola.

Min. 20: Lisangá ya bandeko oyo bazali na bomoko. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mokapo 16.

Loyembo 74 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 24 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 162

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Salelá trakte En savoir plus sur la Bible mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na Ɔkɔtɔbɛ. Na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte En savoir plus sur la Bible mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Sɛngá bandeko oyo bayambaka bato bápesa moto nyonso oyo azali na makita trakte mokomoko soki ezali, mpe na nsima lobelá na mokuse makambo oyo ezali na trakte yango. Monisá ete tokoki kotalela trakte yango mobimba to ndambo elongo na moto, na mbala ya liboso oyo tokutani na ye to ntango tozongeli ye. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ. Na elakiseli moko, mosakoli akopesa trakte yango na moto oyo aboyi kozwa bazulunalo. Na elakiseli mosusu, moto oyo mosakoli akei kotala ye andimi kozwa bazulunalo, mpe na nsima mosakoli apesi ye trakte yango; bataleli makambo oyo ezali na lokasa 5 mpe na nsima alakisi ye lokasa 6 oyo emonisi ndenge ya kosɛnga boyekoli na buku Biblia eteyaka mpe alaki ye ete akomemela ye buku yango.

Loyembo 222 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 1 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 88

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Sɛtɛmbɛ.

Min. 15: Mokanda ya biro. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na mokanda ya biro oyo ezali na lokasa ya liboso ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo bakutanaki na yango ntango bakabolaki nkasa ya kobengisa bato na liyangani ya etúká “Landá Klisto!”

Min. 20: “Tómipesa mingi na mosala ya kosakola.”b Sɛngá bandeko oyo bamipesaka na mosala ya kosakola bálobela ndenge oyo bazali kokoba koluka mabaku ya kosakola mingi. Okoki kobongisa liboso mpo ndeko moko to bandeko mibale bálobela yango.

Loyembo 102 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto