Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/07 lok. 1
  • Tómipesa mingi na mosala ya kosakola

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómipesa mingi na mosala ya kosakola
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Masolo mosusu
  • Ozali kokokisa mosala na yo malamumalamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Bandeko mibali oyo bozali bilenge, bozali koluka kozwa mikumba?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Ndenge ya kokolisa mosala na yo
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Tósalisa bandeko mibali báluka kozwa mikumba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 9/07 lok. 1

Tómipesa mingi na mosala ya kosakola

1 Ntoma Paulo alendisaki baklisto ete bátambola na nzela ya Nzambe mpe ‘bákoba kosala bongo malamumalamu lisusu.’ (1 Tes. 4:1) Yango elimboli nini mpo na biso? Yango elimboli ete tosengeli kokoba koluka mabaku ya kosakola mingi, mpe kosala ntango nyonso makasi ‘tókokisa mosala na biso ya baministre malamumalamu.’​—2 Tim. 4:5.

2 Nini etindaka biso tósakola mingi? Mposa ya kosalela Mozalisi na biso malamumalamu nde etindaka biso tómipesa na mosala ya kosakola. Tolingi kokola na elimo mpe koluka mabaku ya kobongisa ndenge na biso ya kosakola. Soki tozali na mimeseno malamu na makambo ya elimo mpe na mposa ya kosepelisa Nzambe, tokokokisa mikano na biso ya elimo.​—Nz. 1:1, 2; Filp. 4:6; Ebe. 10:24, 25.

3 Tosengeli kolona elimo ya komipesa mpe ya komipimela makambo mosusu, soki tolingi komipesa mingi na mosala ya kosakola. Yango ezali kosɛnga tómanyolaka ndakisa malamu ya Yesu na libondeli. (Mat. 20:28) Yesu azwaki esengo mingi na ndenge azalaki kosalela basusu na mosala ya kosakola. (Mis. 20:35) Tokomekola ndakisa ya Yesu soki tozali kosepela na bato mpe kosalela mabaku nyonso mpo na kosakola mingi.​—Yis. 6:8.

4 Mokumba ya bato ya libota: Bato ya libota bakoki kosalisa bana bálona mposa ya kosalela basusu mpe kosakola mingi banda bomwana. Bana batyaka likebi na molende ya bato ya libota na bango mpe na ndenge oyo bazali komipesa na mosala ya kosakola. Ntango ndeko mobali moko azalaki elenge, azalaki kopesa nkɔkɔ na ye ya mobali mabɔkɔ ntango azali kokokisa misala ya lisangá, mpe yango epesaki ye mposa ya komipesa na mosala ya Nzambe. Lokola azalaki komona molende mpe esengo ya nkɔkɔ na ye, yango etindaki ye aluka mabaku ya kosalela bandeko. Lelo oyo, azali mosaleli na misala.

5 Ebongiseli ya Yehova ezali na mposa ya bandeko mibali: “Soki moto azali koluka kosala . . . , azali na mposa ya mosala moko ya malamu mingi.” (1 Tim. 3:1) Maloba wana elendisi bandeko mibali báluka kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na ebongiseli ya Yehova. Mpo na kozwa mikumba yango esɛngaka kaka te kozala mayele mingi to koyeba makambo mingi. Ndeko oyo alingi kozwa mikumba asengeli kokoba koluka liboso Bokonzi mpe kosakolaka na molende. (Mat. 6:33; 2 Tim. 4:5) Asengeli kosalaka makasi azala ndakisa malamu mpo na basusu.

6 Na mokili mobimba: Yehova azali kotambwisa nokinoki mosala ya koyanganisa bato. (Yis. 60:22) Baoyo nyonso balandaka ndakisa ya Yesu basengeli sikoyo mpenza komipesa mingi na mosala ya kosakola. Lapolo ya mosala ya kosakola na mokili mobimba ya mobu 2006 emonisi ete bato 248327 bazwaki batisimo. Na maloba mosusu, bato soki 680 bazali kozwa batisimo mokolo na mokolo! Tiká ete biso nyonso tókoba koluka mabaku ya komipesa mingi na mosala ya kosakola!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto