Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/06 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 4 Desɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 11/06 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 13 Novɛmbɛ

Loyembo 152

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya Novɛmbɛ. Na elakiseli moko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nayebi malamu mosala na bino.”​—Talá buku Comment raisonner, lok. 20, to mwa buku Lolenge nini okoki kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, lok. 12.

Min. 20: Baministre ya nsango malamu. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, lokasa 77 tii na motó ya likambo moke ya lokasa 83.

Min. 15: “Tózala na mpiko, kasi tózala mpe bato oyo batyaka kimya.”a Lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 252-253, na motó ya likambo moke “Ntango ya koyokela bato.”

Loyembo 39 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Novɛmbɛ

Loyembo 132

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: Tólakisa buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo na sanza ya Desɛmbɛ. Lisolo elongo na bayangani. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo basepelaka na yango na buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, bálobela mpe makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bakabolaki buku yango na mikolo eleki. Lobelá maloba ya kobanda lisolo oyo bapesi lokola ndakisa na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005. Salelá moko na yango, to lolenge mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino, mpo na kosala elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa buku yango.

Loyembo 203 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Novɛmbɛ

Loyembo 111

Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá.

Min. 10: Bazali kotonga na bomoko mpo na kokumisa Nzambe. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2006, nkasa 17-21.

Min. 15: “Tóbongisaka biso moko ndenge ya kolakisa bazulunalo.”b Na nsima, basakoli mibale, mbala mosusu mobali moko ná mwasi na ye, bakosala elakiseli moko ya miniti misato. Elakiseli yango ekomonisa basakoli yango bazali kopona lolenge moko ya kobanda lisolo kati na oyo ezali na lokasa 8, bazali kokanisa ndenge ya kosalela yango mpe ndenge ya koloba yango na maloba na bango moko. Na nsima, balandi makanisi oyo euti kopesama na lisolo oyo; babongisi ndenge oyo bakolakisa lisolo mosusu oyo bamoni ete ebongi mpenza na bato ya teritware na bino mpe basali elakiseli na yango.

Min. 15: “Ekateli nini nakozwa mpo na biloko ya mikemike oyo babendaka na makila mpe mayele ya minganga oyo esɛngaka kosalela makila ya moto ye moko?” Lisolo ya mituna mpe biyano, mpe elakiseli. Nkulutu oyo akosala lisolo oyo asengeli kolanda malamumalamu plan oyo biro etindaki.

Loyembo 120 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 4 Desɛmbɛ

Loyembo 155

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Novɛmbɛ.

Min. 15: “Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!”c Lendisá bayangani básalelaka malamu makambo mosusu oyo ezali na buku yango, na ndakisa bitanda mpe bililingi. Esengeli kosalela Biblia na nsuka ya boyekoli mokomoko mpo na kosala bozongeli ya makambo boyekoli.

Min. 20: Saleláká Biblia ntango ozali kopesa eyano. Lisolo elongo na bayangani, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2002, nkasa 17-18, na motó ya likambo moke “Tólinga solo oyo toteyaka.” Sɛngá bayangani báyanola na motuna mokomoko. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa mosakoli azali kosalela buku Comment raisonner mpo na kopesa eyano oyo euti na Biblia epai ya moninga moko ya mosala oyo atuni ye: “Mpo na nini bosalaka fɛti ya Noele te?”

Loyembo 168 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto