Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!
1 “Esengo na moto oyo azali kotánga na mongongo makasi mpe na baoyo bazali koyoka maloba ya esakweli oyo, mpe na baoyo bazali kotosa makambo oyo ekomami na kati na yango; mpo ntango oyo etyamá ekómi pene.” (Emon. 1:3) Maloba wana emonisi ntina ya mokanda ya Emoniseli, mingi mpenza lokola tozali na ntango oyo bisakweli na yango mingi esengeli kokokisama. Yango wana, kobanda na pɔsɔ ya 8 Yanuali 2007, tokoyekola buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! na Boyekoli ya Mokanda ya lisangá.
2 Banda mbala ya nsuka oyo toyekolaki buku Emoniseli tii lelo oyo, makambo mingi ya mokili ebongwani. (1 Kol. 7:31) Longola yango, bato mingi oyo bazali lelo oyo basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi bazwá naino te libaku ya koyekola elongo na lisangá vɛrsɛ mokomoko ya mokanda ya Emoniseli. Boyekoli ya buku Emoniseli ekosalisa biso nyonso tóbosana te makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya.—Emon. 16:15.
3 Zwá mokano ya koyangana na boyekoli yango pɔsɔ nyonso. Makambo oyo tokoyekola ekosalisa biso tókoba kokɛngɛla. Lisusu, makambo oyo Yesu ayebisaki masangá nsambo ya ntango ya kala ekosalisa biso tókima makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso mpe kopekisa biso tósakola na ndenge ebongi.—Emon. 1:11, 19.
4 Omibongisa malamu: Liboso ya boyekoli mokomoko, tángáká na Biblia bavɛrsɛ ya mokanda ya Emoniseli oyo ekotalelama. Luká koyeba ndenge basaleli Makomami mpo na kolimbola bavɛrsɛ yango. Salá makasi okanga makanisi ya ntina mpe tiká ete yango esimba motema na yo. (Neh. 8:8, 12) Zwá ntango ya komanyola mpe ya komituna boye: ‘Likambo oyo eteyi ngai nini mpo na Yehova mpe mpo na ndenge oyo azali kokokisa mokano na ye? Ndenge nini nakoki kosala makambo oyo eyokani na mokano na ye mpe kosalisa basusu?’
5 Eleki sikoyo mbula 92 kobanda “mokolo ya Nkolo” ebandaki na 1914. (Emon. 1:10) Etikali moke makambo minene oyo mokanda ya Emoniseli esakolaki esalema. Ntango tokoyekola buku Emoniseli, tokobɔndisama na mitema mpe na makanisi, mpe tokondima mpenza ete “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” mpe mokili ya sika ekómi pene.—Emon. 16:14; 21:4, 5.