Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na mwa 1 Ɔkɔtɔbɛ tii mwa 15 Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye mwa buku Bókɛngɛlaka! mpo na kosalisa ye asepela na Biblia lisusu koleka. Kobanda mwa 16 Ɔkɔtɔbɛ tii mwa 12 Novɛmbɛ: Tokosala kampanye ya monene mpo na kokabola Nsango ya Bokonzi No. 37, “Nsuka ya mangomba ya lokuta ekómi pene!” Kobanda mwa 13 Novɛmbɛ tii mwa 30 Novɛmbɛ: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango balobi ete bazali na bana te, tokolakisa bango trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? to trakte mosusu oyo ebongi. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Tokoki mpe kolakisa buku La Bible:Parole de Dieu ou des hommes?, Mokanda mpo na masolo /ya Biblia, to buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, soki ezali na libombo ya lisangá. Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1991. Masangá oyo ezali na babuku yango te, bakoki kolakisa buku Boyebi to mwa buku Bókɛngɛlaka!
◼ Lokola sanza ya Desɛmbɛ ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ezali “Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2007.” Tosengeli kobatela yango mpo tokosalela yango na mobu 2007 mobimba.
◼ Kasɛti-video Pas de sang:la médecine relève le défi ekotalelama na Likita moko ya mosala na sanza ya Yanuali. Soki olingi kozwa DVD to kasɛti-video yango, osengeli kosɛnga yango noki mpenza na nzela ya lisangá.
◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2007 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema na mokolo ya lomingo mwa 15 Aprili 2007. Motó ya likambo ya lisukulu yango ekoyebisama nsima. Masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala to oyo ekozala na liyangani ya zongazonga to ya mokolo moko na pɔsɔ yango, ekosala lisukulu yango na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya mokolo ya 15 Aprili 2007.