Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/06 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 10/06 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 Ɔkɔtɔbɛ 2006. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 4 Sɛtɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 30 Ɔkɔtɔbɛ 2006. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Mpo na nini ezali na ntina tólobaka kozanga kobanga, mpe tokoki kosala nini mpo na kosilisa kobanga? [be lok. 135 par. 5–lok. 137 par. 2, bitanda]

2. Ntango batuni biso mpo na bindimeli na biso, mpo na nini tosengeli kosala makasi tósalela Biblia mpo na kopesa eyano? [be lok. 143 par. 1-3]

3. Ndenge nini tokoki koyeba kosalela Biblia malamumalamu? [be lok. 144, etanda]

4. Ntango tozali koteya bato na mosala ya kosakola, mpo na nini tosengeli kosalelaka Biblia mingi, mpe ndenge nini tokoki kolendisa baoyo bazali koyoka biso na makita ete básalela Biblia na bango? [be nk. 145-146, bitanda]

5. Wapi makambo mibale oyo tolukaka kokokisa ntango tozali kobimisa makanisi ya vɛrsɛ moko liboso ya kotánga yango? [be lok. 147 par. 2]

LISOLO NO. 1

6. Nsango nini ya ntina ezwami na mokanda ya Nzembo? [si lok. 104 par. 23]

7. Ntango nini mokanda ya Masese ekomamaki mpe etyamaki buku moko? [si lok. 107 par. 5]

8. Lisese ezali nini, mpe mpo na nini ebengeli ya mokanda ya Masese na Liebele ebongi mpenza? [si lok. 107 par. 6]

9. Masese 2:1-5 elendisi biso tóluka ntango nyonso boyebi, mayele mpe bososoli ‘lokola tolukaka palata mpe biloko ya motuya bibombami.’ Yango emonisi nini? [be lok. 38 par. 4]

10. Lolenge nini mokanda ya Masese yango moko ezali komonisa litomba na yango? [si lok. 109 par. 19]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Na ndenge nini Davidi ‘akitisaki mpe abɔndisaki molimo na ye lokola mwana akilisami mabɛlɛ epai na mama na ye,’ mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye? (Nz. 131:1-3)

12. Na ndenge nini maloba oyo ezali na Nzembo 139:7-12 ekoki kobɔndisa biso?

13. Na Nzembo 145, wapi mwa makambo oyo emonisaka bonene ya Yehova, oyo ekoki kotinda biso tókumisa ye na mabondeli na biso mpe na mosala ya kosakola? (Nz. 145:3)

14. Na ndenge nini kobanga Yehova ezali “ebandeli ya boyebi” mpe “ebandeli ya bwanya”? (Mas. 1:7, NW; 9:10, NW)

15. “Maloba na ngai” mpe “malako na ngai” oyo balobeli na Masese 7:1, 2 elakisi mpe nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto