Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2007
Malako
Na mobu 2007, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:
ESIKA MASOLO EUTI: Biblia haut fleuve ná Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto [bi7], Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [w], Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi [be], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si], mpe Comment raisonner à partir des Écritures [rs].
Eteyelo esengeli kobanda SOKI NGONGA EKOKI, na maloba ya kotombela bandeko boyei malamu, loyembo mpe libondeli. Na nsima, ekosalema ndenge ekomami awa na nse. Nsima ya lisolo mokomoko, mokɛngɛli na eteyelo akobenga moto oyo akosala lisolo oyo elandi.
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU: Miniti 5. Mokɛngɛli na eteyelo, mopesi-toli mosungi, to nkulutu mosusu oyo azali moteyi malamu akosala lisolo oyo etali toli mpo na koloba malamu oyo ekouta na buku Eteyelo ya mosala. (Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, basaleli na misala oyo bazali bateyi malamu bakoki kosala lisolo yango.)
LISOLO NO. 1: Miniti 10. Esengeli kosalema na nkulutu oyo azali moteyi malamu to mosaleli na misala oyo azali moteyi malamu, mpe ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Esengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na miniti 10. Ntina na yango esengeli kozala kaka te ya kolobela makanisi nyonso ya lisolo, kasi ya komonisa ndenge ya kosalela makanisi yango mpe kobimisa polele makambo oyo ekozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Esengeli kosalela kaka motó ya likambo oyo bapesi. Bandeko oyo bakosala lisukulu oyo basengeli kokeba ete bátosa ngonga oyo epesami. Bakopesa bango toli na nkuku soki esengeli.
MAKANISI YA NTINA NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Miniti 10. Na miniti mitano ya liboso, nkulutu oyo azali moteyi malamu to mosaleli na misala oyo azali moteyi malamu akosala lisolo yango na kotalela bamposa ya lisangá. Akoki kobimisa makanisi na mokapo nyonso oyo alingi kati na mikapo oyo ezali na programɛ ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ wana. Asengeli kosuka te na kolobela na mokuse makambo oyo ezali na mikapo wana. Ntina ya libosoliboso ya lisolo yango ezali nde ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe ndenge nini makambo yango ezali na ntina mpo na bango. Molobi asengeli kokeba ete alekisa te miniti mitano oyo etyami mpo na eteni ya liboso. Asengeli kotikela bayangani miniti mitano ya nsuka mpo bango mpe báloba. Akosɛnga bango báyebisa na mokuse (eleka segɔnde 30 te) makanisi oyo basepelaki na yango ntango batángaki mikapo ya Biblia oyo ezali na programɛ mpe matomba oyo tokoki kozwela yango. Nsima na yango, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga bana-kelasi oyo bakosala masolo na bakelasi mosusu bákende na bakelasi yango.
LISOLO NO. 2: Eleka miniti 4 te. Ezali botángi oyo ekosalema na ndeko mobali. Mwana-kelasi yango akosuka kaka na kotánga eteni oyo basɛngi ye atánga, akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Mokɛngɛli na eteyelo akosala makasi mpo na kosalisa bana-kelasi bátángaka na ndenge oyo ezali komonisa ete bayebi ntina ya makambo oyo bazali kotánga, bákakatana na maloba te, báyeba konyata maloba ya ntina, kobongola mongongo, kopema na esika oyo ebongi, mpe kotánga ndenge bameseni koloba.
LISOLO NO. 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai ya ndeko mwasi. Bana-kelasi oyo bakosala lisolo yango bakopona kadre moko kati na oyo ezali na lokasa 82 ya buku Eteyelo ya mosala to mokɛngɛli na eteyelo akoponela bango yango. Mwana-kelasi asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye mpe komonisa ndenge ya kosalela yango na motindo moko ya mosala ya kosakola oyo ebongi mpenza na teritware ya lisangá. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Esengeli kopesa bana-kelasi ya sika masolo oyo epai bakozwa yango emonisami polele. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwana-kelasi azali kobimisa makanisi ya lisolo oyo bapesi ye mpe kosalisa molobani na ye akanisa likoló ya Makomami mpe asosola makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo yango. Mokɛngɛli na eteyelo akopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo akosala lisolo.
LISOLO NO. 4: Miniti 5. Mwana-kelasi asengeli kobimisa makanisi oyo eyokani na motó ya likambo oyo bapesi ye. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo, akosala yango lokola lisukulu mpo na bayangani nyonso. Soki bapesi ndeko mwasi lisolo yango, akosala yango na kolanda malako oyo epesami na lisolo No. 3. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa ndeko mobali lisolo No. 4 soki amoni ete lisolo yango ebongi kosalema na ndeko mobali. Tobendi likebi na bino na likambo oyo: Mitó ya makambo oyo ezali na mwa elembo ya monzoto liboso na yango esengeli kopesama kaka na bandeko mibali mpe bakosala yango lokola lisukulu.
TOLI: Miniti 1. Mokɛngɛli na eteyelo akoyebisa liboso te toli mpo na koloba malamu oyo asɛngaki mwana-kelasi. Nsima ya lisolo No. 2, No. 3 mpe No. 4, mokɛngɛli na eteyelo akopesa mwana-kelasi longonya mpo na makambo ya malamu oyo asalaki na lisolo na ye. Akosuka kaka te na koloba na ye “osali yango malamu,” kasi asengeli mpe koyebisa bantina oyo etindi ye aloba bongo. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa mwana-kelasi mokomoko toli mosusu na nkuku soki esengeli, nsima ya makita to na ntango mosusu.
NGONGA: Ndeko moko te oyo akosala lisolo asengeli kolekisa ngonga, ata mpe mokɛngɛli na eteyelo asengeli te kolya ngonga ntango azali kopesa toli. Soki bandeko oyo bazali kosala masolo No. 2, No. 3 mpe No. 4 balekisi ngonga, bakokata bango na mayele. Soki ndeko oyo asali toli mpo na koloba malamu, lisolo No. 1, to makanisi ya ntina na botángi ya Biblia alekisi ngonga, esengeli kopesa ye toli na nkuku. Bandeko nyonso oyo bazali na masolo basengeli kotosa ngonga oyo bapesi bango. Eteyelo mobimba esengeli koumela miniti 45, longola loyembo mpe libondeli.
LOKASA YA TOLI: Ezali na buku.
MOPESI-TOLI MOSUNGI: Longola mokɛngɛli na eteyelo, soki nkulutu mosusu oyo azali moteyi malamu azali, lisangani ya bankulutu ekopona ye mpo azala mopesi-toli mosungi. Soki bankulutu bazali mwa mingi na lisangá, bankulutu oyo bazali bateyi malamu bakobanda kolandana na mokumba yango, nkulutu moko mbula moko. Mokumba ya mopesi-toli mosungi ekozala ya kopesa toli na nkuku, soki esengeli, epai ya bandeko oyo basalaka lisolo No. 1 mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia. Ezali na ntina te apesaka toli nsima ya masolo yango nyonso oyo baninga na ye bankulutu to basaleli na misala bakosala.
BOZONGELI YA KOLOBA: Miniti 30. Nsima ya sanza mibalemibale, mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli ya koloba. Liboso ya kosala yango, lisolo ya toli mpo na koloba malamu mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia esengeli kosalema ndenge oyo tolobeli yango awa liboso. Bozongeli ya koloba ekouta na masolo oyo esalemaki na eteyelo na sanza mibale oyo eleki, bakisa mpe masolo ya pɔsɔ oyo bozongeli yango ekosalema. Soki lisangá na bino ekosala liyangani ya zongazonga na pɔsɔ oyo bozongeli ya koloba esengeli kosalema, bokosala bozongeli ya koloba (mpe masolo mosusu oyo ebongisamaki na pɔsɔ yango) na pɔsɔ oyo elandi pɔsɔ ya liyangani mpe masolo oyo esengelaki kosalema na pɔsɔ yango ekosalema na pɔsɔ ya liyangani. Soki mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bino na pɔsɔ ya bozongeli ya koloba, loyembo, toli mpo na koloba malamu, mpe makanisi ya ntina na botángi ya Biblia ekosalema kaka ndenge ezali na lokasa ya programɛ ya eteyelo. Lisukulu ya koteya lisangá (oyo esalemaka nsima ya toli mpo na koloba malamu) ekozala oyo ya pɔsɔ elandi. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ya pɔsɔ elandi ekobanda na toli mpo na koloba malamu mpe na nsima makanisi ya ntina na botángi ya Biblia kaka ndenge bapesi yango na lokasa ya programɛ; nsima na yango, bokosala bozongeli ya koloba.
PROGRAMƐ
1 Yan. Botángi ya Biblia: Yisaya 24-28 Loyembo 33
Toli mpo na koloba malamu: Komonisa bato ndenge ya kosalela makambo oyo ozali koloba (be lok. 158 par. 2-4)
No. 1: Ndenge ya kobongisa masolo na yo ya eteyelo (be lok. 43 par. 1-lok. 44 par. 3)
No. 2: Yisaya 26:1-18
No. 3: Mpo na nini epekisami kosopa zemi? (rs nk. 39-41 par. 3)
No. 4: Ndenge nini tokoki ‘kolata Nkolo Yesu Klisto’? (Lom. 13:14)
8 Yan. Botángi ya Biblia: Yisaya 29-33 Loyembo 42
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosalisa basusu bákanga ntina ya nsango na biso (be lok. 159 par. 1-4)
No. 1: Ndenge ya kobongisa lisolo oyo bapesi motó ya likambo mpe bamonisi ndenge ya kosala yango (be lok. 44 par. 4-lok. 46 par. 2)
No. 2: Yisaya 30:1-14
No. 3: a Ndenge ya koyanola soki moto alobi: ‘Ngai moko nde nasengeli kozwa ekateli na makambo oyo etali nzoto na ngai’ (rs lok. 41 par. 4)
No. 4: Ndenge oyo toyebi ete Yehova Nzambe alingaka bana
15 Yan. Botángi ya Biblia: Yisaya 34-37 Loyembo 222
Toli mpo na koloba malamu: Kopona maloba (be lok. 160 par. 1–3)
No. 1: Ndenge oyo tokoki kotalela mabe ná malamu lokola Yesu (w05 1/1 nk. 9-10 par. 11-15)
No. 2: Yisaya 34:1-15
No. 3: Ndenge ya kokóma na bolingo ya solosolo
No. 4: Adama ná Eva bazalaká mpenza bato ya solo? (rs nk. 25-26)
22 Yan. Botángi ya Biblia: Yisaya 38-42 Loyembo 61
Toli mpo na koloba malamu: Elobeli oyo ezali mpasi te mpo bato bákanga ntina na yango (be lok. 161 par. 1-4)
No. 1: Kobanga banguna te (w05 1/1 lok. 15 par. 16-18)
No. 2: Yisaya 38:9-22
No. 3: b Ndenge ya koyanola soki moto alobi: ‘Lisumu ya Adama ezalaki mokano ya Nzambe’ (rs lok. 27 par. 1–2)
No. 4: Ntina oyo tosengeli kokanisela basusu mabe te
29 Yan. Botángi ya Biblia: Yisaya 43-46 Loyembo 113
Toli mpo na koloba malamu: Maloba ndenge na ndenge mpe oyo ebongi (be lok. 161 par. 5–lok. 163 par. 1)
No. 1: Ntina oyo tondimaka ete bitumbu ya Yehova ezalaka sembo (w05 1/2 nk. 23-24 par. 4-9)
No. 2: Yisaya 45:1-14
No. 3: Mpo na nini kosambela bankɔkɔ ezali na ntina te? (rs lok. 81 par. 3-lok. 83 par. 2)
No. 4: c Ntina oyo baklisto baboyaka komikokanisa na bato mpo na koleka bango
5 Feb. Botángi ya Biblia: Yisaya 47-51 Loyembo 79
Toli mpo na koloba malamu: Maloba oyo ezali komonisa bonene ya likambo, mayoki mpe ezali komonisa likambo ndenge ezali (be lok. 163 par. 2–lok. 164 par. 2)
No. 1: Liloba ya Yehova ebatelaka biso pɛto mpe esalisaka biso tózala sembo (w05 15/4 nk. 11-12 par. 5-11)
No. 2: Yisaya 50:1-11
No. 3: Ntina oyo kosambela bankɔkɔ esepelisaka Yehova Nzambe te (rs lok. 83 par. 3–lok. 84 par. 1)
No. 4: Biblia epekisi kopesana bakado?
12 Feb. Botángi ya Biblia: Yisaya 52-57 Loyembo 139
Toli mpo na koloba malamu: Elobeli oyo eyokani na mibeko ya lokota (be lok. 164 par. 3–lok. 165 par. 1)
No. 1: Liloba ya Yehova epesaka mpiko (w05 15/4 lok. 13 par. 12-14)
No. 2: Yisaya 55:1-13
No. 3: Komipimelaka makambo mosusu ezali mpenza na ntina
No. 4: Banani bazali batɛmɛli ya Klisto? (rs nk. 34-36)
19 Feb. Botángi ya Biblia: Yisaya 58-62 Loyembo 189
Toli mpo na koloba malamu: Kosalela plan (be lok. 166 par. 1–lok. 167 par. 2)
No. 1: Yisaya—Litomba na yango (si lok. 123 par. 34-39)
No. 2: Yisaya 60:1-14
No. 3: Mpo na nini kozala moombo ya Nzambe ezali malamu?
No. 4: d Ndenge ya koyeba bapɛngwi (rs lok. 36 par. 5-lok. 38 par. 2)
26 Feb. Botángi ya Biblia: Yisaya 63-66 Loyembo 141
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kotya makanisi na yo na molɔngɔ (be lok. 167 par. 3-lok. 168 par. 2)
Bozongeli ya koloba
5 Mar. Botángi ya Biblia: Yilimia 1-4 Loyembo 70
Toli mpo na koloba malamu: Salá ete plan na yo ezala na mindɔndɔ te (be lok. 168 par. 3–lok. 169 par. 6)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Yilimia (si lok. 124 par. 1-5)
No. 2: Yilimia 3:1-13
No. 3: Bolamu ya solosolo eutaka na nini?
No. 4: e Ndenge nini tosengeli kotalela bapɛngwi? (rs lok. 38 par. 3-lok. 39 par. 5)
12 Mar. Botángi ya Biblia: Yilimia 5-7 Loyembo 159
Toli mpo na koloba malamu: Kobimisa makanisi na molɔngɔ (be lok. 170 par. 1–lok. 171 par. 2)
No. 1: Ndenge ya kobongisa masukulu ya lisangá (be lok. 47 par. 1-lok. 49 par. 2)
No. 2: Yilimia 5:1-14
No. 3: Klisto atongaki lingomba likoló ya Petelo te (rs lok. 387 par. 1–lok. 388 par. 4)
No. 4: Na ndenge nini Exode 14:11 etali biso lelo oyo?
19 Mar. Botángi ya Biblia: Yilimia 8-11 Loyembo 182
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobimisa makanisi na molɔngɔ (be lok. 171 par. 3-lok. 173 par. 1)
No. 1: Ndenge ya kobongisa masolo ya Likita ya Mosala mpe masukulu mosusu (be lok. 49 par. 3-lok. 51 par. 3)
No. 2: Yilimia 10:1-16
No. 3: Ndenge nini toyebi ete Abalayama, Yobo, mpe Danyele bazalaki kondima lisekwa?
No. 4: Bafungola oyo Petelo asalelaki ezali nini? (rs lok. 388 par. 5–lok. 391 par. 2)
26 Mar. Botángi ya Biblia: Yilimia 12-16 Loyembo 205
Toli mpo na koloba malamu: Salelá kaka makanisi oyo eyokani na lisolo na yo (be lok. 173 par. 2–5)
No. 1: Lisiko emonisaka mpenza boyengebene ya Nzambe (w05 1/11 nk. 13-14)
No. 2: Yilimia 12:1-13
No. 3: Baoyo bamibengaka bakitani ya bantoma bazali ata baklisto ya solo te (rs lok. 391 par. 3-lok. 393 par. 6)
No. 4: Na ndimbola nini moklisto asengeli kosepela ndenge azali moklisto?
2 Apr. Botángi ya Biblia: Yilimia 17-21 Loyembo 30
Toli mpo na koloba malamu: Koloba na maloba na yo moko (be lok. 174 par. 1–lok. 175 par. 5)
No. 1: Ndenge ya kobongisa masukulu ya bato nyonso (be lok. 52 par. 1-lok. 54 par. 1)
No. 2: Yilimia 20:1-13
No. 3: Etumba ya Armagedona ekobundama wapi? (rs lok. 182 par.1-lok. 183 par. 4)
No. 4: f Ndenge nini tosengeli kotalela toli?
9 Apr. Botángi ya Biblia: Yilimia 22-24 Loyembo 184
Toli mpo na koloba malamu: Kebá na mitambo ya koloba na maloba na yo moko (be lok. 176 par. 1–lok. 177 par. 2)
No. 1: Makambo oyo molobi asengeli kopona (be lok. 54 par. 2-4; lok. 55, etanda)
No. 2: Yilimia 23:1-14
No. 3: Ntina oyo kobima na mosala ya kosakola epesaka biso esengo
No. 4: Na Armagedona, banani bakokufa mpe nini ekobebisama? (rs lok. 183 par. 5-lok. 184 par. 3)
16 Apr. Botángi ya Biblia: Yilimia 25-28 Loyembo 27
Toli mpo na koloba malamu: Soki esɛngi kolimbola (be lok. 177 par. 3–lok. 178 par. 2)
No. 1: Kolisá makoki na yo ya koteya (be lok. 56 par. 1–lok. 57 par. 2)
No. 2: Yilimia 26:1-15
No. 3: Banani bakobika na Armagedona? (rs lok. 184 par. 4-9)
No. 4: Na ndimbola nini mabelé elakelamaki mabe? (Gen. 3:17)
23 Apr. Botángi ya Biblia: Yilimia 29-31 Loyembo 148
Toli mpo na koloba malamu: Koloba lokola ozali kosolola na moto (be nk. 179-180)
No. 1: “Yebá kokesenisa” (be lok. 57 par. 3-lok. 58 par. 2)
No. 2: Yilimia 31:1-14
No. 3: Mpo na nini bonene ya Yehova ezali na nsuka te?
No. 4: Armagedona emonisi te ete Nzambe azangi bolingo (rs lok. 185 par. 1-3)
30 Apr. Botángi ya Biblia: Yilimia 32-34 Loyembo 100
Toli mpo na koloba malamu: Kobongisa mongongo (be lok. 181 par. 1-4)
Bozongeli ya koloba
7 Mai Botángi ya Biblia: Yilimia 35-38 Loyembo 165
Toli mpo na koloba malamu: Koyeba kopema malamu (be lok. 181 par. 5–lok. 184 par. 1; lok. 182, etanda)
No. 1: Lendisá bato oyo bazali koyoka bákanisa (be lok. 58 par. 3-lok. 59 par. 3)
No. 2: Yilimia 36:1-13
No. 3: Na Armagedona, to ozali na ngámbo ya Yehova to na ngámbo ya Satana (rs lok. 185 par. 4-7)
No. 4: Ndenge nini baklisto bakoki kolonga ezaleli ya kokakatana?
14 Mai Botángi ya Biblia: Yilimia 39-43 Loyembo 56
Toli mpo na koloba malamu: Nyolisá misisa na yo (be lok. 184 par. 2–lok. 185 par. 3; lok. 184, etanda)
No. 1: Monisá ndenge ya kosalela mateya yango mpe zalá ndakisa malamu (be lok. 60 par. 1-lok. 61 par. 3)
No. 2: Yilimia 39:1–14
No. 3: Nguya nini ezali kotindika bikólo mokemoke tii na etumba ya Armagedona? (rs lok. 186 par. 1-2)
No. 4: g Ntina oyo baklisto mibale oyo balingi kobalana basengeli kosala makasi bámibatela pɛto
21 Mai Botángi ya Biblia: Yilimia 44-48 Loyembo 122
Toli mpo na koloba malamu: Kosepela na moto oyo azali koyoka yo (be lok. 186 par. 1-4)
No. 1: Ndenge ya koyeba kosolola na bato (be lok. 62 par. 1-lok. 64 par. 1)
No. 2: Yilimia 46:1-17
No. 3: Komikosa elimboli nini, mpe tokoki kosala nini mpo tómikosa te?
No. 4: Babilone oyo mokanda ya Emoniseli elobeli ezali nini? (rs lok. 42 par. 1-2)
28 Mai Botángi ya Biblia: Yilimia 49-50 Loyembo 95
Toli mpo na koloba malamu: Koyoka na likebi mpenza (be lok. 187 par. 1-5)
No. 1: Ndenge ya kokoba lisolo elongo na bato (be lok. 64 par. 2–lok. 65 par. 4)
No. 2: Yilimia 49:14-27
No. 3: Babilone ya kala eyebanaki na makambo nini? (rs lok. 42 par. 3-lok. 44 par. 5)
No. 4: Mpo na nini baboti basengeli kotángelaka bana na bango?
4 Yuni Botángi ya Biblia: Yilimia 51-52 Loyembo 166
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosalisa basusu bákola (be lok. 187 par. 6–lok. 188 par. 3)
No. 1: Yilimia—Litomba na yango (si lok. 129 par. 36-39)
No. 2: Yilimia 52:1-16
No. 3: Koboya Nzambe atambwisa biso ezali bozoba
No. 4: Mpo na nini ata mangomba ya boklisto mpe ezali na kati ya Babilone monene? (rs lok. 45 par. 1-lok. 46 par. 1)
11 Yuni Botángi ya Biblia: Bileli 1-2 Loyembo 129
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosalisa bango mpenza (be lok. 188 par. 4–lok. 189 par. 4)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Bileli (si nk. 130-131 par. 1–7)
No. 2: Bileli 2:1-10
No. 3: Ntina oyo esengeli kobima na Babilone Monene noki (rs lok. 46 par. 2-7)
No. 4: Ntina oyo boboto ya solosolo ezali bolɛmbu te
18 Yuni Botángi ya Biblia: Bileli 3-5 Loyembo 140
Toli mpo na koloba malamu: Komemya bato (be lok. 190 par. 1-lok. 191 par. 1)
No. 1: Bileli—Litomba na yango (si lok. 132 par. 13-15)
No. 2: Bileli 4:1-13
No. 3: Batisimo ezali nini, mpe mpo na nini bandimi bazwaka yango? (rs lok. 47 par. 1-4)
No. 4: h Ntina oyo baklisto ya solo bakɔtaka na makambo ya politiki te
25 Yuni Botángi ya Biblia: Ezekiele 1-5 Loyembo 1
Toli mpo na koloba malamu: Limemya na ntango okutani na bato (be lok. 191 par. 2–lok. 192 par. 1)
Bozongeli ya koloba
2 Yuli Botángi ya Biblia: Ezekiele 6-10 Loyembo 26
Toli mpo na koloba malamu: Limemya na elobeli na biso (be lok. 192 par. 2–lok. 193 par. 2)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Ezekiele (si nk. 132-133 par. 1-6)
No. 2: Ezekiele 7:1-13
No. 3: Kopusana penepene na Yehova esɛngaka nini? (Yak. 4:8)
No. 4: Batisimo ya baklisto ezali te kosopela moto mwa mai na motó, ezali mpe mpo na bana mike te (rs lok. 47 par. 5-lok. 48 par. 2)
9 Yuli Botángi ya Biblia: Ezekiele 11-14 Loyembo 112
Toli mpo na koloba malamu: Komonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba (be lok. 194 par. 1–lok. 195 par. 2)
No. 1: Bótika te kosala oyo ezali malamu (w05 1/6 nk. 29-30)
No. 2: Ezekiele 11:1-13
No. 3: Kobatisama na mai elongolaka masumu? (rs lok. 48 par. 3-6)
No. 4: Emoniseli 17:9-11 elimboli nini?
16 Yuli Botángi ya Biblia: Ezekiele 15-17 Loyembo 29
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya komonisa ete ondimi mpenza likambo moko (be lok. 195 par. 3–lok. 196 par. 4)
No. 1: Boyá makanisi ya lokuta! (w05 15/9 nk. 26-28)
No. 2: Ezekiele 16:1–13
No. 3: Kozala moto ya mayele elimboli nini? (Mas. 13:16)
No. 4: Nani abatisami na elimo santu? (rs lok. 48 par. 7-lok. 50 par. 1)
23 Yuli Botángi ya Biblia: Ezekiele 18-20 Loyembo 193
Toli mpo na koloba malamu: Lobá na mayele, kasi lobá kaka makambo ya solo (be lok. 197 par. 1–3)
No. 1: Koluka koyeba mpo na nini moto atuni motuna (be lok. 66 par. 1–lok. 68 par. 1)
No. 2: Ezekiele 18:19-29
No. 3: Kobatisama na mɔtɔ ekeseni na kobatisama na elimo santu (rs lok. 50 par. 2-6)
No. 4: Makambo oyo emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ezali mpenza
30 Yuli Botángi ya Biblia: Ezekiele 21-23 Loyembo 35
Toli mpo na koloba malamu: Koloba na mayele ntango tozali kosakola (be lok. 197 par. 4-lok. 199 par. 1)
No. 1: Yebá kopesa biyano (be lok. 68 par. 2–lok. 70 par. 4)
No. 2: Ezekiele 23:1-17
No. 3: Ntina oyo esengeli koyekola Biblia (rs lok. 51 par. 1-lok. 52 par. 5)
No. 4: Wapi makanisi ebongi na likambo etali kozala moto monene?
6 Aug. Botángi ya Biblia: Ezekiele 24-27 Loyembo 37
Toli mpo na koloba malamu: Maloba oyo ebongi, na ntango oyo ebongi (be lok. 199 par. 2-5)
No. 1: Ndenge ya kosolola na nzela ya mikanda (be nk. 71-73)
No. 2: Ezekiele 24:1–14
No. 3: Na makambo nini Moize atiká ndakisa malamu mpo na baklisto?
No. 4: Esakweli ya Yisaya mpe ya Yilimia emonisi ete Biblia epemamaki na Nzambe (rs lok. 53 par. 1-lok. 54 par. 2)
13 Aug. Botángi ya Biblia: Ezekiele 28-31 Loyembo 123
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya koloba na mayele na libota mpe na bato mosusu (be lok. 200 par. 1-lok. 201 par. 1)
No. 1: Monisá ete ozali kokola mpe kokende liboso (be lok. 74 par. 1-lok. 75 par. 3)
No. 2: Ezekiele 28:1-16
No. 3: Kokokisama ya makambo oyo Yesu asakolaki emonisi ete Biblia epemamaki na Nzambe (rs lok. 54 par. 3-4)
No. 4: Liloba “koyina” elimbolaka nini na Makomami?
20 Aug. Botángi ya Biblia: Ezekiele 32-34 Loyembo 215
Toli mpo na koloba malamu: Kolendisa bato mpe kolobela mingi makambo ya malamu (be lok. 202 par. 1–lok. 203 par. 2)
No. 1: Salelá makoki na yo (be lok. 75 par. 4–lok. 77 par. 2)
No. 2: Ezekiele 34:1-14
No. 3: Ndenge nini elimo ya Nzambe esalisaka biso?
No. 4: Makambo ya siansi oyo Biblia elobeli ezali mpenza solo (rs lok. 55 par. 1-lok. 57 par. 2)
27 Aug. Botángi ya Biblia: Ezekiele 35-38 Loyembo 94
Toli mpo na koloba malamu: Salá ete elobeli na yo elendisa bato nyonso (be lok. 203 par. 3-lok. 204 par. 2)
Bozongeli ya koloba
3 Sɛt. Botángi ya Biblia: Ezekiele 39-41 Loyembo 194
Toli mpo na koloba malamu: Ntango ozali kosolola na bandeko baklisto (be lok. 204 par. 3–lok. 205 par. 4)
No. 1: Mpo na nini tosengeli kolinga liloba ya Nzambe? (w05 15/4 nk. 15-16 par. 3-6)
No. 2: Ezekiele 40:1-15
No. 3: Bato bakoki mpenza kosepelisa Nzambe?
No. 4: i Ndenge ya kosilisa ntembe oyo bato babimisaka mpo na Biblia (rs lok. 57 par. 3-lok. 60 par. 3)
10 Sɛt. Botángi ya Biblia: Ezekiele 42-45 Loyembo 77
Toli mpo na koloba malamu: Kozongela likambo mpo na kobimisa yango polele (be lok. 206 par. 1–4)
No. 1: Ntango oyo nsuki mpɛmbɛ ezalaka “motole ya kitoko” (w05 15/1 nk. 8-9)
No. 2: Ezekiele 43:1–12
No. 3: Mpo na nini baklisto bakumisaka mikolo ya kobotama te? (rs lok. 32 par. 3-lok. 34 par. 2)
No. 4: j Ndenge nini tokoki koyeba “mongongo ya bapaya”? (Yoa. 10:5)
17 Sɛt. Botángi ya Biblia: Ezekiele 46-48 Loyembo 164
Toli mpo na koloba malamu: Kozongela makambo na mosala ya kosakola mpe ntango ozali kosala masukulu (be lok. 207 par. 1–lok. 208 par. 3)
No. 1: Ezekiele—Litomba na yango (si lok. 137 par. 29-33)
No. 2: Ezekiele 47:1-14
No. 3: Mpo na nini baklisto baboyaka makila? (rs lok. 359 par. 1-lok. 360 par. 4)
No. 4: k Ntina oyo libula monene ya elimo ezali likabo eleki malamu oyo baboti bakoki kotikela bana
24 Sɛt. Botángi ya Biblia: Danyele 1-3 Loyembo 179
Toli mpo na koloba malamu: Motó ya likambo (be lok. 209 par. 1–3)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Danyele (si nk. 138-139 par. 1-6)
No. 2: Danyele 2:1-16
No. 3: Mpo na nini motángo 144 000 ezali ya elilingi te? (Emon. 7:4)
No. 4: Mpo na nini baklisto ya solo baboyaka bázongisa bango makila? (rs lok. 360 par. 5-lok. 362 par. 1)
1 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Danyele 4-6 Loyembo 14
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosalela motó ya likambo oyo ebongi (be lok. 210 par. 1–lok. 211 par. 1; lok. 211, etanda)
No. 1: Ntango nini moto akoki kosilika? (w05 1/8 nk. 13-15)
No. 2: Danyele 4:1-17
No. 3: Ndenge nini tokoki komekola bizaleli malamu ya Mefibosete?
No. 4: l Ndenge ya koyanola na makambo oyo bato balobaka na oyo etali kozongisama makila (rs lok. 362 par. 2-lok. 364 par. 2)
8 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Danyele 7-9 Loyembo 34
Toli mpo na koloba malamu: Kobimisa makanisi ya ntina polele (be lok. 212 par. 1-lok. 213 par. 1)
No. 1: Tiká ete “Liloba” ya Yehova ebatela yo (w05 1/9 nk. 28-31)
No. 2: Danyele 7:1-12
No. 3: Kobotama lisusu elimboli nini? (rs lok. 259 par. 2-lok. 260 par. 8)
No. 4: Makambo nini esepelisaka biso mpenza ntango tozali kobima mingi na mosala ya kosakola?
15 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Danyele 10-12 Loyembo 210
Toli mpo na koloba malamu: Kosalela makanisi ya ntina ebele ebele te (be lok. 213 par. 2-lok. 214 par. 5)
No. 1: Danyele—Litomba na yango (si nk. 141-142 par. 19-23)
No. 2: Danyele 11:1-14
No. 3: Ndenge nini komikitisa ekoki kosalisa biso tóyokana lisusu malamu soki mwa matata ebimaki?
No. 4: Esɛngi te moto abotama lisusu mpo azwa lobiko (rs lok. 261 par. 1-lok. 262 par. 1)
22 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Hosea 1-7 Loyembo 66
Toli mpo na koloba malamu: Maloba ya ebandeli oyo ekolamusa mposa ya bato (be lok. 215 par. 1-lok. 217 par. 1)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Hosea mpe litomba ya mokanda yango (si nk. 143-145 par. 1-8, 14-17)
No. 2: Hosea 5:1-15
No. 3: a Ndenge ya koyanola soki moto apesi makanisi na ye na likambo ya kobotama lisusu (rs lok. 262 par. 3–lok. 263 par. 2)
No. 4: Ndenge oyo baklisto ya solo bamonisaka motema molai
29 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: Hosea 8-14 Loyembo 59
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobenda likebi ya bato oyo bazali koyoka yo na mosala ya kosakola (be lok. 217 par. 2–5)
Bozongeli ya koloba
5 Nov. Botángi ya Biblia: Yoele 1-3 Loyembo 166
Toli mpo na koloba malamu: Na maloba na yo ya ebandeli, monisá polele likambo oyo olingi koloba (be lok. 218 par. 1–lok. 219 par. 4)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Yoele mpe litomba ya mokanda yango (si nk. 146-148 par. 1-5, 12-14)
No. 2: Yoele 2:1-14
No. 3: Kozala na “bolingo ya kokoka” elimboli nini? (1 Yoa. 4:18)
No. 4: Mpo na nini kotubela masumu epai ya sango eyokani na Makomami te? (rs lok. 68 par. 5-lok. 69 par. 9)
12 Nov. Botángi ya Biblia: Amosa 1-9 Loyembo 211
Toli mpo na koloba malamu: Maloba ya nsuka oyo ebongi (be lok. 220 par. 1-3)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Amosa mpe litomba ya mokanda yango (si nk. 148-150 par. 1-6, 13-17)
No. 2: Amosa 2:1-16
No. 3: Mpo na kozwa mayele na likambo, esengeli kaka te kokutana na yango
No. 4: Koyambola masumu oyo tosaleli Nzambe mpe oyo tosaleli bato (rs lok. 71 par. 2–8)
19 Nov. Botángi ya Biblia: Obadia 1-Yona 4 Loyembo 220
Toli mpo na koloba malamu: Makambo oyo osengeli kobosana te (be lok. 221 par. 1-5)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Obadia mpe ya Yona, mpe litomba ya mikanda yango (si nk. 151-153 par. 1-5, 10-14; nk. 153-155 par. 1-4, 9-12)
No. 2: Yona 1:1-17
No. 3: Ntina oyo liboso mabelé ekóma Paladiso, esengeli naino Paladiso ya elimo ezala
No. 4: b Mpo na nini esengeli koyebisa bankulutu masumu ya minene? (rs lok. 71 par. 9–lok. 72 par. 4)
26 Nov. Botángi ya Biblia: Mika 1-7 Loyembo 18
Toli mpo na koloba malamu: Na mosala ya kosakola (be lok. 222 par. 1-7)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Mika mpe litomba ya mokanda yango (si nk. 155-158 par. 1-8, 16-19)
No. 2: Mika 2:1-13
No. 3: Kozala na elimo ya boboto elimboli nini?
No. 4: Mpo na nini ebongi kondima ete biloko nyonso ekelamaki? (rs lok. 72 par. 5-lok. 74 par. 2)
3 Des. Botángi ya Biblia: Nahumu 1-Habakuku 3 Loyembo 137
Toli mpo na koloba malamu: Koloba makambo oyo ezali solo mpenza (be lok. 223 par. 1–5)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Nahumu mpe ya Habakuku, mpe litomba ya mikanda yango (si nk. 158-160 par. 1-7, 11-12; nk. 161-163 par. 1-5, 12-14)
No. 2: Habakuku 1:1-17
No. 3: Ndenge ya kokanga ntina ya lisolo ya Biblia oyo elobeli kozalisama ya biloko nyonso (rs lok. 75 par. 1-lok. 76 par. 5)
No. 4: Mpo na nini bomoi ya seko ekolɛmbisa te?
10 Des. Botángi ya Biblia: Sefania 1-Hagai 2 Loyembo 78
Toli mpo na koloba malamu: “Akangami makasi na liloba ya sembo” (be lok. 224 par. 1-4)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Sefania mpe ya Hagai, mpe litomba ya mikanda yango (si nk. 163-166 par. 1-6, 10-12; nk. 166-168 par. 1-7, 13-16)
No. 2: Sefania 3:1-17
No. 3: Mpo na nini kosambela ekulusu eyokani na Makomami te? (rs lok. 80 par. 1-lok. 81 par. 2)
No. 4: c Na ndenge nini kozala makasi na elimo ebongisaka libala?
17 Des. Botángi ya Biblia: Zekalia 1-8 Loyembo 209
Toli mpo na koloba malamu: Talá soki makambo yango ezali solo mpenza (be lok. 225 par. 1-3)
No. 1: Maloba ya ebandeli na mokanda ya Zekalia (si nk 168-169 par. 1-7)
No. 2: Zekalia 7:1-14
No. 3: Ndenge nini emonaneli ya mbongwana ya Yesu ekokisami?
No. 4: Bambula ya bato liboso ya mpela ezalaki kaka bambula ndenge totángaka yango lelo? (rs lok. 85 par. 4-lok. 86 par. 1)
24 Des. Botángi ya Biblia: Zekalia 9-14 Loyembo 202
Toli mpo na koloba malamu: Makambo oyo bato bakokanga ntina na yango (be lok. 226 par. 1-lok. 227 par. 2)
No. 1: Zekalia—Litomba na yango, mpe maloba ya ebandeli na mokanda ya Malaki mpe litomba ya mokanda yango (si nk. 171-172 par. 23-27; nk. 172-175 par. 1-6, 13-17)
No. 2: Zekalia 10:1-12
No. 3: Mpo na nini Batatoli ya Yehova balobaka ete Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela na 1914? (rs lok. 86 par. 2–lok. 88 par. 1)
No. 4: Ndenge nini tokoki komibongisa sikoyo mpo na minyoko?
31 Des. Botángi ya Biblia: Malaki 1-4 Loyembo 118
Toli mpo na koloba malamu: Kolimbola maloba oyo bato bameseni na yango te (be lok. 227 par. 3–lok. 228 par. 1)
Bozongeli ya koloba
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki ngonga ezali, lobelá biyano oyo ebongi mpenza na makanisi oyo bato ya teritware na bino bapesaka, makambo oyo balobaka mpe ntembe oyo babimisaka.
b Soki ngonga ezali, lobelá biyano oyo ebongi mpenza na makanisi oyo bato ya teritware na bino bapesaka, makambo oyo balobaka mpe ntembe oyo babimisaka.
c Pesá yango kaka na bandeko mibali.
d Pesá yango kaka na bandeko mibali.
e Pesá yango kaka na bandeko mibali.
f Pesá yango kaka na bandeko mibali.
g Pesá yango kaka na bandeko mibali.
h Pesá yango kaka na bandeko mibali.
i Soki ngonga ezali, lobelá biyano oyo ebongi mpenza na makanisi oyo bato ya teritware na bino bapesaka, makambo oyo balobaka mpe ntembe oyo babimisaka.
j Pesá yango kaka na bandeko mibali.
k Pesá yango kaka na bandeko mibali.
l Soki ngonga ezali, lobelá biyano oyo ebongi mpenza na makanisi oyo bato ya teritware na bino bapesaka, makambo oyo balobaka mpe ntembe oyo babimisaka.
a Soki ngonga ezali, lobelá biyano oyo ebongi mpenza na makanisi oyo bato ya teritware na bino bapesaka, makambo oyo balobaka mpe ntembe oyo babimisaka.
b Pesá yango kaka na bandeko mibali.
c Pesá yango kaka na bandeko mibali.