Mwa makambo oyo ebongwani na buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!
Totye awa mwa makambo minene oyo ebongwani na buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! oyo ebimaki na mobu 1992 na Lingala. Mituya mosusu mpe ebongwani, kasi totye yango awa te; okokuta yango na Annuaire ya sika mpe na mikanda mosusu.
MOKAPO 4
lok. 19, par. 4, bomá vɛrsɛ oyo ya nsuka: Matai 25:31-33
MOKAPO 5
lok. 24, par. 3, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: * Mpo na kozwa ndimbola molai, tala mokanda Biblia eteyaka mpenza nini? na nkasa 88-92, 215-218, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
MOKAPO 6
lok. 30, par. 12, fraze ya motoba ekómi boye: Mpo na kosukisa, mokonzi ya Loma Kostanté asalaki ete Leta andima lingomba ya “boklisto” mpe yango esalaki ete mangomba ya boklisto ekola mpe kati na yango Lingomba mpe Leta basangisaki makasi na bango mpo na koyangela na boumeli ya mbula nkoto.
lok. 32, etanda, paragrafe ya liboso ekómi boye: Yesu abatisamaki mpe apakolamaki mpo na kokoma Mokonzi, na ebale Yordani na Octobre ya mobu 29 ya ntango na biso. Mbula misato na ndambo na nsima, na mobu 33, ayaki na temple ya Yelusaleme mpe abenganaki baoyo bakomisaki yango ebombamelo na miyibi. Kokokana ezali kati na makambo yango mpe eleko ya mbula misato na ndambo oyo ebandaki na Octobre 1914, ntango Yesu akomaki mokonzi na makoló, mpe esukaki ntango ayaki mpo na kotala baoyo bazalaki komibenga baklisto, mpamba te kosambisama ebandaki na ndako na Nzambe. (Matai 21:12, 13; 1 Petelo 4:17) Na ebandeli na 1918, mosala ya Bokonzi oyo esalamaki na libota na Jéhovah ekutanaki na botemeli monene. Ezalaki ntango ya komekama kati na mokili mobimba, mpe baoyo bazalaki na bobangi bayongolamaki. Na Mai 1918, bakonzi na mangomba na boklisto na mokili basalaki mayele mabe mpo na kokangisa bamoko kati na bamonisi ya la Société Watch Tower, kasi sanza libwa na nsima, batikaki bango. Na nsima, balongolaki bifundeli ya lokuta nyonso oyo bafundaki bango na yango. Kobanda 1919, lisangá ya libota na Nzambe, oyo eyongolamaki mpe epetolamaki, ebandaki kosakola na molende nyonso Bokonzi na Jéhovah mpe na Klisto lokola elikya bobele moko mpo na mokili.—Malaki 3:1-3.
MOKAPO 8
lok. 40, par. 8, molɔngɔ 5, na esika ya mbeba 125, tyá: mbeba 130
lok. 40, par. 10, fraze ya nsuka ekómi boye: Bobele na Cour suprême ya États-Unis, ba Témoins de Jéhovah bazwaki elonga kati na makambo 50.
MOKAPO 10
lok. 50, par. 11, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: * Tala na ndakisa, lisolo “Basi baklisto ya sembo—Basambeli oyo bazali na motuya na miso ya Nzambe,” oyo ebimisamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2003.
MOKAPO 11
lok. 56, par. 9, eteni ya mibale ekómi boye: Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali koyikisa biso mpiko mpo na yango na nzela na masolo lokola oyo: “Bókoba kotala soki bozali ndenge nini?” mpe “Tózala na bomoi mpo na biso moko lisusu te.”* Na nzela na zulunalo wana oyo ezali kolimbola Biblia, totalela makanisi na biso maleki mozindo mpe totya molende kotambola na kosokema mpenza mpe na libondeli kati na bosembo liboso na Jéhovah.—Nzembo 26:1-3; 139:23, 24.
lok. 56, par. 9, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: * Tala Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 2005 mpe ya 15 Marsi 2005.
MOKAPO 12
lok. 61, par. 14, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: # Zulunalo La Tour de Garde, oyo ebimisami na kelasi na Yoane, ezali ntango nyonso kolobela ntina ya kosalela libaku malamu oyo mpe kosangana na molende nyonso na mosala ya kosakola; tala, na ndakisa masolo “Tiká ete bikelamu nyonso esakola nkembo ya Yehova” mpe “Na mabelé mobimba lokito na bango eyokani,” oyo ebimaki na nimero ya 1 Yanuali 2004. Na nimero ya 1 Yuni 2004 ezalaki na lisolo moko na motó na likambo “Mapamboli na baoyo bapesaka Nzambe nkembo,” oyo ezalaki kobenda likebi mpo na kokota na “ekuke ya polele” oyo ezali kopesa nzela na mosala ya pionnier. Na sanza moko ya mobu 2005, ba pionniers nyonso bazalaki 1 093 552.
MOKAPO 13
lok. 69, par. 11, fraze ya nsuka ekómi boye: Mbula soko 40 liboso na 1914, bango basilaki koyebisa ete mobu wana ezali mobu mosili kotyama elembo kati na bisakweli na Biblia mpo na nsuka na ntango na Bapakano, mpe yango ekobimisa makambo ya kokamwa awa na mabelé.—Emoniseli 1:10.
lok. 71, par. 14, milɔngɔ 13 mpe 14, na esika ya “Na 1990, zulunalo oyo mibale ekabolamaki koleka 27 milió,” tyá: Na 2006, zulunalo oyo mibale ekabolamaki koleka milió 59.
lok. 73, par. 23, molɔngɔ 17, bomá vɛrsɛ oyo: Matai 25:31
MOKAPO 16
lok. 90, par. 4, maloba na nse ya lokasa, ya mibale, ekómi boye: * Mpo na kozwa bilembeteli ya polele oyo emonisi ete Yesu azalisamaki mokonzi na 1914, tala buku Biblia eteyaka mpenza nini?, na nkasa 215-218, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
lok. 90, par. 6, ekómi boye: Nzokande, mpo na nini Mokonzi oyo azwi bokonzi na ye sika asengeli kobima mpo na etumba? Mpo ete bokonzi na ye eboyami makasi na Satan le Diable, monguna monene na Jéhovah, mpe eboyami na baoyo nyonso, na koyeba to kozanga koyeba, bazali kosalela Satana na mabelé. Kobotama ya Bokonzi ebimisaki etumba monene na likoló. Kobundaka na nkombo ya Mikaele (oyo elimboli “Nani azali lokola Nzambe?”), Yesu alongaki etumba likoló na Satana mpe badémo na ye mpe abwakaki bango na mabelé. (Emoniseli 12:7-12) Kotambola ya bolongi ya Yesu likoló na mpunda elandanaki na boumeli na bambula mingi uta na ebandeli na mokolo na Nkolo, wana bato oyo bakokani na bampate bazali koyanganisama. Ya solo, mokili mobimba ezali naino kolala na “nguya na oyo mabe,” kasi Yesu alandi na bolingo nyonso kobatela mpe koleisa bandeko na ye bapakolami elongo na banginga na bango, kosalisaka mokomoko na bango ete akoka kolonga na nzela na kondima.—1 Yoane 5:19.
lok. 91, par. 9, fraze ya nsuka ekómi boye: Bazali kobakisama makasi na mikili ya katolike mpe na mikili epai kuna minyokoli mizalaki makasi mingi—lokola Alemanye, Italie mpe Japon, epai basakoli ya molende koleka 600 000 bazali kosakola.—Yisaya 54:17; Yilimia 1:17-19.
lok. 94, par. 18, ekómi boye: Kobomama oyo nyonso elakisi ete mayele mpo na kosala bibundeli ezali likambo malamu? Ezali nde komonisa ete mpunda motane mpe azangi mawa azali kotambola. Kasi, kotambola na ye ekosuka ntango nini? Ndambo na bato ya mayele balobi ete etumba ya nikleere ekoki kobima mbalakaka—kozanga kolobela etumba ya nikleere oyo bato bango moko bakoki kobimisa mpo na makaneli. Kasi tobanga te, mpamba te Mofandi na mpunda mpembe mpe molongi azali kokana eloko mosusu mpo na mabelé.
lok. 97, par. 28, ekómi boye: “Malali na kufa” engali mingi na mikolo na biso. Nsima na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, grippe espagnole ebomaki bato koleka 20 milió bobele na mwa basanza na boumeli ya mobu 1918 mpe mobu 1919. Eteni bobele moko ya mokili epai malali wana ekomaki te ezalaki esanga ebengami Sainte-Hélène. Na mikili epai bato basilaki kosila, mipiko na mipiko ya bibembe etumbamaki. Lelo oyo, ezali nsomo na komona motuya na bato bazali kokufa na malali lokola kardiake mpe kânser, malali oyo mbala mingi eutaka na bomeli likaya. Na boumeli ya eleko ebengamaki “mbula zomi ya kolokama,” elingi koloba bambula oyo ebandaki na 1980 mpe esukaki na 1989, kozanga kotosa mibeko ya Biblia oyo epekisi pite ebimisi SIDA oyo ebakisami na “malali na kufa.” Na mobu 2000, bapanzi-nsango balobaki ete moto moko monene na makambo ya bokolongono ya nzoto na États-Unis abengaki sida ete ezali, “ntango mosusu maladi mabe koleka bamalali nyonso oyo ebima na mokili.” Alobaki ete, na mokili mobimba, bato milió 52 basili kobɛla malali ya sida, kati na bango bato milió 20 basili kokufa na malali yango. Nzokande basaleli ya Jéhovah bazali na esengo mpo ete bazali kolanda toli ya mayele ya Liloba na Nzambe oyo epekisi pite mpe kozongisa makila, mpamba te na nzela yango nde bamalali mingi ezali kopalangana!—Misala 15:28, 29; tala 1 Bakolinti 6:9-11.
MOKAPO 18
lok. 106, par. 7, ekómi boye: Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebimisaki mibulungano mosusu. Uta ntango yango, bitumba ya mikemike mpe terorisme epai na epai ezali se koningisa mokili. Nsomo ya bateroriste to bikólo oyo ezali kosalela bibundeli oyo ekoki koboma bato ebele mbala moko ezali kopusa bato mingi na komitunatuna.
lok. 106, motuna 7-9 (b) ekómi boye: Longola makambo wana oyo ezali kobulunganisa bato banda Yesu azwa bokonzi, wapi ezaleli mosusu oyo bato bakozala na yango?
lok. 107, par. 9, fraze ya misato ekómi boye: Mikolo na molili oyo milandaki mikokisaki solo ndambo na esakweli na Yesu oyo elobeli kozala na ye, oyo ekoyebana na makambo lokola ‘motema likoló epai na mabota, bayebi eloko bakosala te, wana ete bato bakosenzwa na nsomo mpe na ntina na makambo malingi kobima na mokili.’ (Luka 21:7-9, 25-31)*
lok. 107, par. 9, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: * Na boumeli na bambula koleka 35, (longwa na 1895 kino 1931) maloba mazwami na Luka 21:25, 28, 31 makomamaki likoló na ezipeli na ebimeli na Lingelesi na zulunalo La Tour de Garde. Na mwa nsima, ezalaki na elilingi na mwinda oyo ezalaki kongengisa makoló maindi tuu likoló na mai monene matomboki.
lok. 107, par. 11, fraze ya minei ekómi boye: Lisangá ya Satana na mabelé ezali koyoka yango.*
lok. 109, par. 17, bomá fraze oyo ya mibale nsima ya Emoniseli 6:12b, 13: Ezali esika ya nsuka ya makambo ya nsomo oyo Yesu asakolaki yango liboso kati na Matai 24:29.
MOKAPO 20
lok. 123, par. 11, fraze ya minei ekómi boye: Ntango mokanda oyo enyatamaki, na bisika koleka 125 na mokili mobimba bazalaki kosalela bamasini wana MEPS; ezali yango nde epesi nzela na basaleli na Jéhovah na kobimisa mbala moko na minoko koleka 130 zulunalo Mosenzeli oyo ebimaka mbala mibale na sanza.
lok. 128, par. 30, fraze ya nsuka ekómi boye: Na mokili mobimba, bobele mwa bato moke nde bakokoka: bamoko kati na baklisto 144 000, oyo basili kotyama elembo, oyo bakozala ntango mosusu awa na mabelé, mpe, ebele monene ya bampate mosusu oyo ‘bakokoka kotelema,’ elingi koloba bakobika na bango elongo.—Yilimia 35:19; 1 Bakolinti 16:13.
MOKAPO 22
lok. 143, motó ya likambo moke ekómi boye: Etumbu na mayoyo lelo oyo
lok. 146, par. 16, bafraze oyo elandi Emoniseli 9:10 ekómi boye: Maloba oyo makoki kolimbola nini? Ntango ba Témoins de Jéhovah basakolaka Bokonzi, bayebisaka bato, na monoko to mikanda, maloba mazali na nguya, matongami likoló na Liloba ya Nzambe. Nsango yango ezali koswa lokola bankotó, mpo ezali kosakola mokolo na nkanda na Jéhovah oyo ebelemi. (Yisaya 61:2) Liboso na nsuka na bomoi na bango, libota na lelo na mayoyo na elimo ekosilisa mosala oyo Nzambe apesaki bango, mosala ya kosakola bikateli na Ye, na koswáká bongo batuki nyonso ya lolendo.
lok. 146, par. 17, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: * Zulunalo yango ebengamaki Consolation na 1937 mpe Réveillez-vous ! na 1946.
lok. 147, par. 19, milɔngɔ 7-13 ekómi boye: (Matai 24:3-14; Emoniseli 12:1-10) Mokanda yango ezongelaki mpe maloba na mokanda moko ebimisamaki na Londres na 1917, mpe etyamaki maboko na bakonzi mwambe ya mangomba baoyo bamonisamaki lokola ‘basakoli na lokumu kati na basakoli minene na mokili’
MOKAPO 24
lok. 160, par. 21, molɔngɔ 14, na esika ya “bato oyo bakokani na bantaba,” tyá: batemeli
lok. 160, par. 21, molɔngɔ 19, na esika ya “Matai 25:31-34, 41, 46,” tyá: Bafilipi 1:27, 28
lok. 160, motuna 21 (b) ekómi boye: Mpo na nini nsango malamu ezali nsango mabe mpo na batemeli?
MOKAPO 25
lok. 162, par. 4, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: * Mpo na koyeba makambo manso matali tempelo monene oyo ya elimo, tala lisolo “Tempelo monene ya Yehova na elimo,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1996, mpe “Tempelo ya solo mpo na losambo,” oyo ebimaki na Mosenzeli ya le 1er Juillet 1974, na Lingala (1er Mars 1973, na Lifalanse).
lok. 162, par. 5, fraze ya misato ekómi boye: Engebene bisakweli ya Makomami ya Liebele, kokamata bamezire ezalaki ndanga ete boyengebene ekosalelama engebene mitinda ya kokoka ya Jéhovah.
lok. 162, par. 7, fraze ya mibale nsima ya Emoniseli 11:2 ekómi boye: Lokola tokomona yango, elobelami awa mpo na sanza 42 ya solo, etangami kobanda na Décembre 1914 kino na Juin 1918, ntango baoyo nyonso bazalaki komibenga baklisto bamekamaki makasi.
lok. 164, par. 12, fraze ya misato ekómi boye: Epai mosusu, na ebandeli ya mikolo na Nkolo, ezalaki na eleko esilaki kokatama, ya mbula misato na ndambo oyo na boumeli na yango makambo na mpasi oyo basaleli na Nzambe bakutanaki na yango ekokanaki na makambo masakolami awa; eleko yango ebandaki na Décembre 1914 mpe elandanaki kino na Juin 1918.
lok. 165, maloba mpo na kolimbola elilingi ekómi boye: Mosala ya kotonga oyo ekokisamaki na Zorobabele mpe Yosua ezalaki komonisa ete na mokolo na Nkolo, biloko oyo bizalaki mike na ebandeli bikolandana na kokola monene epai na ba Témoins de Jéhovah. Bandako lokola oyo emonisami na bililingi oyo, na Brooklyn, na États-Unis, esengaki ete bayeisa yango minene mpo na kokokisa bamposa
lok. 165, par. 15, molɔngɔ 10, na esika ya “(Matai 17:1-3; 25:31),” tyá: (Matai 17:1-3)
MOKAPO 26
lok. 175, par. 12, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: * Mokomi na Lisolo na bato na nkombo Tacite alobi ete ntango Yelusaleme elongamaki na mobu 63 na liboso na ntango na biso mpe ete Cneius Pompeius akotaki na esika eleki bosantu ya temple, amonaki ete ezalaki mpamba. Sanduku na kondimana ezalaki lisusu te.—Histoires, de Tacite, 5,9.
MOKAPO 27
lok. 185, etanda, paragrafe ya motoba ekómi boye: Na Espanye, bakotaki na ndako ya Batemwe, bafutisaki bango lomande mpe batyaki bango na boloko mpo balobelaki na ntina na Nzambe mpe bayanganaki na makita ya boklisto. Monyoko yango esukaki na 1970, ntango bakonzi babongolaki lolenge na bango ya kotalela mangomba oyo ezali Lingomba ya katolike te, mpe bapesaki nzela ete ba Témoins de Jéhovah bándimama na mibeko ya Leta.
lok. 185, par. 28, bafraze ya mibale ya ebandeli ekómi boye: Ebale oyo na minyoko makasi engalaki mpenza na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Na Mpoto, Batemwe soko 12 000 babwakamaki na ba camps de concentration mpe na baboloko ya banazi epai kuna soko 2 000 bakufaki.
MOKAPO 28
lok. 187, par. 4, maloba na nse ya lokasa ekómi boye: * Mpo na koyeba makambo yango na mozindo, tala nkasa 165 kino 179 ya buku Tyá likebi na esakweli ya Danyele! ebimisami na Batatoli ya Yehova.
lok. 190, par. 15, bafraze misato ya ebandeli ekómi boye: Etumba yango ezalaki mpasi mingi mpo na motó ya nsambo ya nyama na yauli oyo ezalaki koyangela na mikolo wana. Grande-Bretagne mpe mikili misusu ya Mpoto bakufelaki ebele ya bilenge mibali na bango. Na 1916, bobele na etumba moko oyo babundaki zongazonga na ebale ebengami la Somme, kati na basoda koleka milió moko oyo bazokaki to bakufaki, 420 000 bazalaki ya Grande-Bretagne, soki 194 000 ya France mpe 440 000 ya Allemagne.
lok. 192, par. 22, ndambo ya fraze oyo elandi “(Misala 5:29),” ekómi boye: Komekama na bango ekomaki makasi koleka na Juin 1918,
MOKAPO 29
lok. 202, par. 14, milɔngɔ 1-3, ekómi boye: Ba 144 000 “basombami na mokili,” “basombami kati na bato.” Bandimami lokola bana na Nzambe; nsima na
MOKAPO 30
lok. 209, par. 10, milɔngɔ 1-2, ekómi boye: Nzokande, na bambula oyo ezali kati na 1870 mpe 1879, baklisto bapakolami babandaki
lok. 209, motuna 10 ekómi boye: Eloko nini esalamaki na bambula oyo ezali kati na 1870 mpe 1879, mpe ezalela na Babilone Monene ezalaki nini?
lok. 211, par. 23, fraze ya mibale, ya misato, mpe ya minei ekómi boye: Etinda oyo ezali kouta na “tempelo,” na nzela na anzelu moko, mpe Yesu atosi yango nokinoki. Ya yambo, uta 1919, akambaki mpe akokisaki mosala na kobuka ba 144 000 na kosalelaka baanzelu na ye. (Matai 13:39, 43; Yoane 15:1, 5, 16) Na nsima mosala na kobuka to koyanganisa ebele monene na bampate mosusu ebandaki. (Yoane 10:16; Emoniseli 7:9)
MOKAPO 32
lok. 231, par. 27, kobanda na “Matai 24:42, 44,” ekómi boye: (Matai 24:42, 44; Luka 12:37, 40) Na kozongelaka likebisi yango, ntoma Paulo alobaki: “Mokolo na Jéhovah ekoya lokola moyibi kati na butu. Ekolobaka bato ete: ‘Kimya ezali, makambo mazali te!,’ wana libebi ekokwela bango pwasa.” Satana nde akotinda bato basakola maloba oyo na lokuta ete: “Kimya ezali, makambo mazali te!”—1 Batesaloniki 5:2, 3.
MOKAPO 33
lok. 243, par. 21, fraze oyo ezali liboso ya oyo ya nsuka ekómi boye: Likambo ya kokamwa, kati na diskur ya pape, alobelaki Yesu Klisto mpe Bokonzi na Nzambe bobele mwa moke mpenza.
lok. 245, par. 25, molɔngɔ 6, na esika ya “(Emoniseli 14:8; 17:2),” tyá: (Emoniseli 14:8; 17:4)
MOKAPO 34
lok. 246, par. 1, fraze oyo ezali liboso ya oyo ya nsuka ekómi boye: Nzokande, yango ezali likambo ya solo lelo oyo.
lok. 249, par. 10, fraze ya minei ekómi boye: Engebene rapport ya Lisangá moko mpo na boluki kimya ya mokili mobimba, bato ebele mpenza, bato soko milió 5 babomamaki mpo na bitumba na boumeli ya mobu bobele moko wana ya 1986.
lok. 250, par. 12, maloba na nse ya lokasa, na esika ya “1981,” tyá: 1993
lok. 251, par. 14, ekómi boye: Na bambula oyo euti koleka, bato ya politike basaleli maloba “kimya ezali, makambo mazali te” mpo na kolobela myango ndenge na ndenge oyo bato basali. Milende yango oyo bato minene ya mokili basali yango nde ebandeli ya kokokisama ya 1 Batesaloniki 5:3? To ntoma Paulo azalaki nde kolobela likambo moko ya monene oyo ekobenda likebi ya mokili mobimba? Lokola bisakweli ya Biblia eyebanaka malamumalamu se nsima ya kokokisama na yango to na ntango ezali kokokisama, tozela mpo na koyeba. Nzokande, baklisto bayebi ete, ata soki bikolo ezwi kimya ya ndenge nini, kasi makambo ekobongwana mpenza te. Moimi, koyinana, kobomana, kobeba ya mabala, pite mpe ekobo, maladi, mawa, mpe liwa ekozala kaka. Yango wana, ntango bakoganga “kimya ezali, makambo mazali te,” yo okokosama te soki ozali ntango nyonso koyeba ndimbola ya makambo oyo ezali koleka na mokili mpe soki ozali kotya likebi na makebisi oyo ezali na bisakweli ya Liloba ya Nzambe.—Malako 13:32-37; Luka 21:34-36.
MOKAPO 36
lok. 259, par. 4, bafraze misato ya nsuka ekómi boye: Na 1914, Yesu akomaki Mokonzi na likoló. Kobanda ntango yango, azali na bokonzi likoló na mabelé lokola Mokonzi mpe Mosambisi na nse na litambwisi na Jéhovah. Na bongo ebongi mpenza ete ye asakola kokwea na Babilone Monene.
lok. 260, par. 9, bafraze minei ya ebandeli ekómi boye: Kokwea ya Babilone ya kala na 539 liboso na ntango na biso, ezalaki ebandeli ya eleko molai oyo esukaki na kobomama ya engumba yango. Motindo moko mpe, kobanda Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bopusi na mangomba oyo eutaki na Babilone ekweaki na lolenge ya polele kati na mokili mobimba. Na Japon, losambo ya mokonzi na shintoïsme epekisamaki nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.
lok. 265, par. 22, bomá eteni oyo ya nsuka:—Tala Matai 24:15, 16.
MOKAPO 38
lok. 277, par. 17, fraze ya nsuka ekómi boye: Na ntembe te, bapakolami oyo ntango mosusu bakozala naino awa na mabelé, bakoumela te kozwa libula na bango na likoló nsima ya ntango Klisto akokomisa bolongi na ye na nsuka na yango mpe bakokende kokutana na bandeko na bango, basangani na kelasi na mwasi. Na nsima na yango, na ntango oyo Nzambe ye moko aponi nde libala ya Mwana na Mpate ekosalema.
lok. 277, par. 18, fraze ya liboso ekómi boye: Esakweli oyo ezali na Nzembo 45 elobeli ndenge makambo yango ekolandana.
MOKAPO 39
lok. 281, par. 10, fraze mibale ya nsuka ekómi boye: Lisusu, “baanzelu nyonso” bakosalela Yesu wana afandi na kiti na bokonzi na ye ya lokumu mpe abandi kosambisa mabota mpe bato na mokili. (Matai 25:31, 32) Kati na etumba monene oyo bikateli na Nzambe bikokokisama mpo na libela, na ntembe te Yesu akozala mpe elongo na baanzelu na ye.
MOKAPO 41
lok. 296, par. 5, bafraze ya misato ya ebandeli ekómi boye: Lokola likoló ya kala mpe mabelé ya kala ekimi, nani mosusu atikali mpo na kosambisama? Moto moko te kati na baklisto bapakolami 144 000, mpamba te bango basilaki kosambisama mpe kozwa elembo. Soki bapakolami mosusu bakozala naino na bomoi awa na mabelé nsima na Armagedon, bakokufa noki mpo na kokende na likoló, mpe kuna bakozwa mbano na likoló na nzela na lisekwa. (1 Petelo 4:17; Emoniseli 7:2-4)
MOKAPO 43
lok. 311, par. 19, bafraze oyo elandi “Emoniseli 11:15; 12:10” ekómi boye: Na ntango ya nsuka, elimo mpe mwasi bazali kobenga bato oyo bazali na ezaleli oyo ebongi baya komela mai ya bomoi ofele. Bato yango bakozanga mai ya ebale yango te tii na nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, ata mpe na mokili ya sika, ntango Yelusaleme na Sika ‘ekokita na likoló, kouta na Nzambe.’—Emoniseli 21:2.
lok. 312, par. 26, fraze mibale ya ebandeli ekómi boye: Ba 144 000, mwasi na Mwana na Mpate, bakoki mpe kozala kati na banzete yango oyo elonami pembeni na ebale. Lokola bazali naino na mabelé, bango mpe bazali kozwa matomba na bibongiseli oyo Nzambe akamataki na nsima na Yesu Klisto mpo na kopesa bango bomoi. Likambo ya esengo, bandeko yango ya Yesu oyo babotami na elimo, bisakweli ebyangi bango “nzete makasi na boyengebene.” (Yisaya 61:1-3; Emoniseli 21:6)