Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/06 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 9/06 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ: Tokolakisa buku Biblia eteyaka. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Novɛmbɛ: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.

◼ Masangá esengeli kobanda kosɛnga bavolimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! ya mobu 2006 mpe diskɛ CD-ROM Watchtower Library​—2006 na komande na bango ya mikanda ya mbala ekoya. Lokasa “Avis aux congrégations,” oyo biro etindelaka masangá nyonso sanza na sanza, ekomonisa bino soki mikanda yango ekozala na minɔkɔ nini. Bóbosana te ete diskɛ CD-ROM Watchtower Library​—2006 ezali kaka mpo na bandeko oyo bazwá batisimo mpe moto akoki kozwa yango kaka soki asɛngi yango na nzela ya lisangá.

◼ Bankulutu basengeli kobosana te kolanda malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1991, nk. 21-23, oyo etali moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to amilongolaki ye moko, kasi azali na mposa ya kozonga na lisangá.

◼ Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza Sɛtɛmbɛ, nkasa 3-6, ezali na mwa makambo oyo ebongwani na buku Emoniseli, oyo mokomoko na biso akotya na buku na ye. Esengeli kosala yango mpo na komibongisa, mpamba te kobanda na pɔsɔ ya 8 Yanuali 2007, tokoyekola buku yango na Boyekoli ya mokanda.

◼ Masangá nyonso bakoyekola buku Emoniseli na monɔkɔ na bango, soki ebongolamá. Soki ebongolamá te, bakoyekola oyo ya Lifalanse. Soki buku yango ezali te na monɔkɔ oyo lisangá na bino esalaka makita, lisangani mokomoko ya bankulutu bakotalela soki esengeli koyekola oyo ya Lifalanse to ya monɔkɔ mosusu oyo bandeko ya lisangá balobaka. Masangá ya Kikongo, Kiluba, mpe Otetela, bakozwa siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Sɛtɛmbɛ ndambo na Lifalanse, ndambo mosusu na minɔkɔ na bango. Masangá ya Lingala, Swahili mpe Tshiluba bakozwa mpe bongo. Masangá nyonso ya Uruund bakozwa yango nyonso na Lifalanse.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto