Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/06 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Sɛtɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 2 Ɔkɔtɔbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2006
km 9/06 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 11 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 20

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bayangani nyonso bátala kasɛti-video Mituna oyo bilenge batunaka​—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu? (na Lifalanse), mpo na kobongisa lisolo oyo ekosalema na Likita ya mosala ya pɔsɔ ya 25 Sɛtɛmbɛ. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ mpe Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ. Na elakiseli moko, monisá ndenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nazali na lingomba na ngai.”​—Talá buku Comment raisonner, nk. 18-19, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nk. 10-11.

Min. 20: Tózwa matomba na Likita ya Mosala mpe na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, kobanda na motó ya likambo moke ya lokasa 64 tii na motó ya likambo moke ya lokasa 69.

Min. 15: Mokanda ya biro. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na mokanda ya biro oyo ezali na lokasa ya liboso ya Mosala na biso ya Bokonzi oyo. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Biyano na mituna na bino ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2005. Sololá na bandeko oyo basalisaki bandeko mosusu na makama oyo esalemaki na mikolo eleki, to na bandeko oyo bazwaki lisalisi ya bandeko mosusu.

Loyembo 126 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 213

Min. 5: Mayebisi ya lisangá.

Min. 15: Ndenge nini tosalaki mosala na mbula eleki? Mokɛngɛli na mosala ya kosakola azali kotalela mosala ya mbula eleki. Lobelá mingi mpenza makambo ya kolendisa oyo basakoli basalaki na mosala ya kosakola. Pesá longonya oyo ebongi. Lobelá likambo moko to makambo mibale oyo esengeli kotyela yango likebi na mobu ya sika. Lobelá mosala ya babongisi-nzela, pesá bango longonya mpo na mosala malamu oyo basali. Lobelá matomba oyo emonanaki na milende oyo lisangá esalaki mpo na kosalisa basakoli oyo batiká kosakola.

Min. 25: “Kampanye ya monene ekosalema kobanda mokolo ya 16 Ɔkɔtɔbɛ tii ya 12 Novɛmbɛ!” Lisolo moko ya esengo, ekosalema na nkulutu moko. Nsima ya kotánga liyebisi oyo ezali na mokanda ya 6 Yuni 2006, oyo biro etindelaki masangani ya bankulutu, bópesa bayangani nyonso lokasa mokomoko ya Nsango ya Bokonzi No. 37. Na nsima, salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na kokabola yango na teritware na bino mobimba. Lendisá basakoli nyonso bámipesa mobimba na kampanye yango. Salá elakiseli moko ya mokuse.

Loyembo 50 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Sɛtɛmbɛ

Loyembo 94

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá lapolo ya kɔnti mpe mikanda ya botɔndi oyo biro etindaka soki ezwi makabo ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Sɛtɛmbɛ. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 to makanisi mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware ya lisangá na bino mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ, ntango tozali kopesa litatoli na balabala.

Min. 25: “Kasɛti-video oyo tosengeli kotyela yango likebi mpenza”a Ntango bokolobela paragrafe 1, sɛngá bayangani bálobela na mokuse, makambo oyo basepelaki na yango na kasɛti-video Mituna oyo bilenge batunaka​—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu? (na Lifalanse). Na nsima, bandá mbala moko kotuna motuna mokokomoko oyo ezali na paragrafe 2-7. Soki lisangá na bino ezali na kasɛti-video yango te, nkulutu moko akosala lisukulu ya miniti 12 na Lamuká! ya 8 Desɛmbɛ 2004, nkasa 9, 10, mpe 12 (na Lifalanse). Na nsima, akotuna mituna oyo ezali na paragrafe 1 tii 5, ndenge emonisami awa likoló, mpe na nsuka akotánga Masese 13:20; Yilimia 17:9 mpe Nzembo 71:17. Mpo na kosukisa, akolendisa mabota bátala elongo DVD oyo ezali na motó ya likambo Mituna oyo bilenge bamitunaka​—Nakosala nini na bomoi na ngai? (na Lingelesi), mpo na mbala ya nsima.

Min. 10: Makambo oyo basakoli ya lisangá bakutanaki na yango. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo bakutanaki na yango ntango bakabolaki Lamuká! ya Sɛtɛmbɛ to ntango babandaki koyekola na bato Biblia na buku Biblia eteyaka, na mbala ya liboso oyo bakutanaki na bango. Bokoki kosala elakiseli moko to mibale ya makambo yango ndenge elekaki.

Loyembo 183 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 2 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 36

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Tángá Biyano na mituna na bino.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 20: “Kosakola ndako na ndako.”b Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.

Loyembo 127 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto