Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/05 lok. 6
  • Mwana na yo akoki kozwa ekateli ya mayele?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwana na yo akoki kozwa ekateli ya mayele?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Masolo mosusu
  • Totambola engebene malako na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Makila
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Osengeli kotala video No Blood​​—⁠Medecine Meets the Challenge
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 12/05 lok. 6

Mwana na yo akoki kozwa ekateli ya mayele?

1. Bilenge Batatoli basalaki nini na likambo etali makila? Pesá ndakisa.

1 Ekateli ya mayele na likambo nini? Na likambo etali kozongisama makila. Ndenge emonisami na lisolo “Tótambola engebene malako ya Yehova,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 1991, ekómaka ete bana ya Batatoli ya Yehova bázwa na mpiko mpenza ekateli oyo ekomonisa ete bazali kotalela likambo ya kotosa mobeko ya Nzambe oyo etali makila na motuya mpenza, kaka ndenge baboti na bango batalelaka yango. Mwana na yo oyo akómi naino mokóló te na kotalela mibeko ya Leta, akoki mpe kozwa ekateli ya ndenge wana?

2. Mobeko nini tribinale moko esalelaki mpo na mwana oyo akómi naino mokóló te na kotalela mibeko ya Leta kasi aboyi bázongisa ye makila, mpe liteya nini baboti oyo bazali baklisto ná bana na bango oyo bakómi naino mikóló te na kotalela mibeko ya Leta bazwi na likambo yango?

2 Mibeko elobi nini? Na États-Unis, tribinale monene oyo epesi bana oyo bakómi naino mikóló te, na kotalela mibeko ya Leta, ndingisa ya koboya makila ezali Tribinale monene ya Illinois. Ntango tribinale yango etalelaki lisusu likambo ya ndeko mwasi moko ya mbula 17, ezwaki ekateli oyo: “Soki ezali na bilembeteli ya polele oyo emonisi ete mwana oyo akómi naino mokóló te na kotalela mibeko ya Leta azali na mayele ya bomoto mpe ayebi makama oyo ekoki kokómela ye mpo na makambo oyo azali kosala mpe ayebi kotalela makambo lokola mokóló, na bongo mibeko oyo etali bana mike ezali kopesa ye lotomo oyo endimami na mibeko ya koboya to kondima lisalisi ya monganga.” Yango wana, mpo na koyeba soki mwana azali na mayele ya kozwa ekateli ye moko, minganga to bakonzi ya Leta bakoki kotuna ye mituna mpo báyoka na monɔkɔ na ye moko ete aboyi bázongisa ye makila. Na bongo, mwana asengeli koyeba malamu ete azali na maladi makasi, asengeli koyeba makama oyo ekoki kobima na lisalisi nyonso ya monganga oyo akoki kopona, mpe asengeli koloba polele mpe na mpiko mpenza makambo ya losambo oyo ye andimaka, na mobeko ya Nzambe oyo etali makila.

3. Mituna nini baboti basengeli kotalela yango malamumalamu, mpe mpo na nini?

3 Mwana na yo akoloba nini? Bana na yo bakokoka kolobela bango moko mobeko ya Nzambe oyo etali makila? Bandimaka mpenza na motema na bango ete Nzambe nde asɛngi biso ‘tóboya makila’? (Mis. 15:29; 21:25) Bakoki komonisa na kati ya Biblia makambo oyo bandimaka? Soki monganga amonisi bango ete bomoi na bango ekozala na likama soki baboyi bázongisa bango makila, bakokoka komonisa na mpiko mpenza ekateli na bango ya koboya makila ata soki baboti na bango bazali te? Lokola “ntango mpe likambo ekanami te ekómelaka [biso] nyonso,” ndenge nini okoki kosalisa bana na yo báyeba oyo bakosala soki likambo moko ya mbalakaka emeki bosembo na bango?​—Mos. 9:11, NW; Ef. 6:4.

4, 5. (a) Mokumba nini baboti bazali na yango, mpe ndenge nini bakoki kokokisa yango? (b) Bisaleli nini tozali na yango oyo ekoki kosalisa baboti?

4 Baboti, bokoki kosala nini? Bozali na mokumba ya koteya bana na bino likanisi ya Nzambe na oyo etali makila. (2 Tim. 3:14, 15) Ndimbola ya polele ezali na buku Comment raisonner, nkasa 359-362. Yekolá yango malamumalamu elongo na libota na yo. Salelá makanisi oyo ezali na motó ya likambo moke “Si quelqu’un vous dit​—” na lokasa 362-364, mpo na kosolola elongo na bana na yo, mpe komekameka makambo yango elongo na bango mpo na kosalisa bango báyeba ndenge ya kolimbola makambo oyo bandimaka mpe ntina oyo bandimaka yango. (1 Pet. 3:15) Mikanda mosusu oyo ekoki koteya biso na likambo etali makila ezali mpe mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie? mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2004, nkasa 14-24. Longola yango, tozali na bakasɛti video Soigner sans transfuser​—Besoins et droits du patient, mpe Pas de sang: la médecine relève le défi, oyo batye yango sikoyo na DVD moko oyo ezali na motó ya likambo: La série des alternatives à la transfusion. Bakasɛti-video mpe DVD yango ezali na makambo ya solosolo oyo ezali komonisa ete kosalisa moto mpe kosala moto lipaso kozanga kozongisa ye makila ezali malamu mpe ebimisaka matomba. Libota na yo batalaki bakasɛti yango mpe balobelaki yango na mikolo oyo euti koleka?

5 Salisá bana na yo ‘bámindimisa bango moko nini wana mokano ya Nzambe oyo ezali malamu mpe ekoki kondimama mpe ezali ya kokoka,’ na oyo etali makila. Na ndenge yango, bakozwa ekateli ya mayele oyo ekosala ete Yehova apambola bango.​—Lom. 12:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto