Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/05 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 12/05 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Yanuali: Buku nyonso oyo ebimaki liboso ya mobu 1991. Masangá oyo ezali na babuku wana ya kala te bakoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu. Febwali: Pusaná penepene na Yehova. Marsi: Tokolakisa buku ya sika, Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Betele ekoyamba bato te na mikolo oyo elandi: Mwa 3 mpe 4 Desɛmbɛ 2005 mpe mwa 3 mpe 4 Yuni 2006 (bopɛtɔ). Na mikolo yango, ebongiseli ya kotambwisa bato mpo na kotala Betele ekozala te.

◼ Nkasa ya libyangi na Ekaniseli mpo na mobu 2006 ekotindama na minɔkɔ oyo lisangá mokomoko esalelaka na makita na yango. Soki ezali na minɔkɔ mosusu oyo elobamaka na teritware na bino mpe bolingi bátindela bino nkasa ya libyangi na minɔkɔ yango, bosengeli kosɛnga yango nokinoki; bokosalela formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Liste ya minɔkɔ oyo nkasa ya libyangi yango ezali, ekobima na “Avis aux congrégations,” oyo etindamaka na masangá sanza na sanza. Tosɛngi bino bósɛnga nkasa ya libyangi kaka na minɔkɔ oyo bokoki kosalela na teritware na bino.

◼ Ekaniseli mpo na mobu 2007 ekosalema na mwayambo 2 Aprili, nsima ya kolala ya moi. Liyebisi oyo epesami liboso mpo ete epai oyo masangá mingi bazali kosalela Ndako ya Bokonzi moko, masangá mosusu ekoka kozwa bibongiseli mpo na koluka bisika mosusu ya kosala Ekaniseli. Na masangá oyo esengeli koluka esika mosusu ya kosala Ekaniseli, bankulutu basengeli koyokana malamu na nkolo esika yango mpo báyeba malamu soki makambo mosusu ekosalema te na esika yango, oyo ekoki kobebisa molulu ya Ekaniseli. Yango ekopesa nzela ete Ekaniseli esalema na kimya mpe na mobulu te.

◼ Lokola Ekaniseli ezali na ntina mingi, lisangani ya bankulutu esengeli kopona nkulutu oyo azali na makoki mpo na kosala lisukulu, na esika ete básalaka yango moto na moto na ngala na ye to básalelaka bobele ndeko moko mbula na mbula. Soki bozali na nkulutu moko mopakolami oyo azali molobi malamu, ye akosala lisukulu yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto