Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/05 lok. 7
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Mosala na biso ya Bokonzi—2005
km 10/05 lok. 7

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 31 Ɔkɔtɔbɛ 2005. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 5 Sɛtɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 31 Ɔkɔtɔbɛ 2005. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.​—⁠Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Ndenge nini tokoki kondimisama mpenza ete mateya na biso oyo euti na Liloba ya Nzambe ezali mpenza kosimba mitema ya bato? (Mat. 13:19) [be lok. 258 par. 1-2, etanda]

2. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba makambo oyo ezali na motema ya moto, mpe likambo nini tosengeli kobosana te? [be lok. 259 par. 2-3]

3. Ntango tozali koteya, mpo na nini ezali na ntina tólobelaka mbala na mbala bizaleli kitoko ya Yehova? [be lok. 260 par. 1]

4. Ndenge nini tokoki kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia báyeba makambo oyo basengeli kobongola na bomoi na bango? [be lok. 260 par. 4–lok. 261 par. 1]

5. Tokoki kosala nini mpo na kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia to baoyo bazali koyoka biso bátalelaka malamumalamu mikano na bango? [be lok. 262 par. 2-3]

LISOLO NO. 1

6. Maloba ‘koluka Yehova makasi’ elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki komonisa ete tozali koluka ye makasi? (Ebe. 11:⁠6) [w03 15/8 lok. 25 par. 2; lok. 26 par. 1-2; lok. 27 par. 2]

7. “Ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” ezali nini, mpe ndenge nini bankulutu bakoki komonisa ete bazali kokangama na yango? (2 Tim. 1:​13, 14) [w03 1/1 lok. 29 par. 3–lok. 30 par. 1]

8. “Kanɔ ya Biblia” ezali nini, mpe makambo nini emonisaka ete mokanda moko ya Biblia ebongi kokɔta na kanɔ yango? [si lok. 299 par. 5-6]

9. Mpo na nini eteni ya Mokanda ya Muratori, oyo ekomamaki na nsuka ya ekeke ya mibale T.B., ezali na ntina mpenza na makambo oyo ezali kondimisa biso ete Makomami ya Grɛki ezali na kati ya kanɔ ya Biblia? [si lok. 302 par. 19]

10. Ndingisa nini ya kobongola Biblia oyo Makomami yango moko epesi, mpe mabongoli ya kala ya Biblia ekokisaki mokano nini? [si lok. 307 par. 9]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Mokanda ya 2 Mikonzi 13:21 emonisi nde ete tosengeli kosambelaka biloko oyo basantu batiká?

12. Hizikiya asalaki boyokani na Ezipito? (2 Mik. 18:​19-21, 25)

13. Atako mikanda ya Baasulia elobeli mpenzampenza te ndenge oyo Yehova alongaki basoda ya Saneheliba, eloko nini ebendi likebi na yo na makambo oyo masolo yango elobeli? (2 Mik. 19:​35, 36)

14. Nani azalaki tata ya Selatiele? (1 Nta. 3: 16- 18)

15. Na mikolo ya Mokonzi Saulo, likambo nini bato ya libota ya Lubene, ya libota ya Gada, mpe ndambo ya libota ya Manase basalaki oyo ezali ndakisa malamu mpo na basaleli nyonso ya Nzambe lelo oyo? (1 Nta. 5:​18-22)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto