Bakɔtisi masolo ya bakasɛti-video misato na DVD
DVD yango oyo ezali na motó ya likambo: La série des alternatives à la transfusion, ezali na masolo ya bakasɛti-video misato. Kasɛti-video oyo ezali na motó ya likambo: Stratégies alternatives à la transfusion: simples, sûres, efficaces, ebongisamaki mpo na minganga mpe bana-kelasi oyo batángaka kelasi ya minganga; yango wana, ezali na bililingi mingi ya mapaso koleka bakasɛti-video mosusu wana mibale. Kasɛti-video oyo ezali na motó ya likambo: Soigner sans transfuser — Besoins et droits du patient, ebongisamaki mpenzampenza mpo na bapanzi-nsango na makambo ya minganga, bato ya Leta oyo batalaka makambo ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto, bato oyo basalisaka babola mpe bazuzi. Ezali kolobela ndenge minganga bakoki kosalisa moto ya maladi mpe kotalela ntomo na ye. Kasɛti-video oyo ezali na motó ya likambo: Pas de sang: la médecine relève le défi, ebongisamaki mpo na bato nyonso. DVD yango esalemi na Lingelesi, kasi okoki koyoka yango na minɔkɔ oyo elandi: Allemand, Espagnol, Français, Italien, Japonais, Portugais (Brésilien), mpe Russe. Kokakatana te mpo na kotala yango elongo na monganga na yo, bato oyo oyekolaka na bango Biblia, molongani oyo azali Motatoli te, bandeko na yo, balakisi, baninga ya mosala mpe ya kelasi.