Biyano na mituna na bino
◼ Wapi lolenge ya malamu koleka ya kopesa makabo mpo na kosalisa bandeko ya bikólo mosusu oyo bazali na bosɛnga?
Toyokaka ntango mosusu ete bandeko na biso na bikólo mosusu bakómi na bosɛnga mpo bazali konyokola bango, bakweli likama to mikakatano mosusu. Bandeko mosusu bamonaki malamu kotinda mbongo mbala moko na Babetele ya bikólo wana, mpe basɛngaki ete básalela yango mpo na kosalisa moto moko, lisangá moko boye to na mosala ya kotonga.—2 Kol. 8:1-4.
Atako ezali malamu komonisa ete tolingaka bandeko na biso ndenge wana, mbala mingi ezalaka na makambo mosusu oyo esɛngaka kosilisa yango nokinoki koleka makambo moto oyo apesi likabo azali kokanisa. Na bantango mosusu, mbongo oyo batindi ekómaka na ntango oyo mposa na yango esilaki kokokisama. Ntembe ezali te ete ntango totindi mbongo na Betele ya mboka oyo tofandi mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba, mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, to kosalisa bandeko oyo bazwi makama, tóyeba ete basalelaka yango kaka na makambo wana.
Bandeko ya Babetele nyonso babongisami mpo na kosalisa bandeko nokinoki na makama oyo ebimaka mbalakaka. Ata likambo nini ebimi, Betele eyebisaka yango na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Soki mposa mosusu ezali, Lisangani ya Mikóló-Bakambi bakoki kosɛnga na Babetele oyo ezali pembeni na bango esalisa bango to mpe bakoki kotindela bango mbongo mbala moko.—2 Kol. 8:14, 15.
Yango wana, esengeli kotinda makabo nyonso, ezala ya mosala ya kosakola na mokili mobimba, mosala ya kotonga na bikólo mosusu, to kosalisa bandeko oyo bazwi likama, na Betele ya mboka oyo ofandi, ezala na nzela ya lisangá to mbala moko na Betele. Na ndenge yango, “moombo ya sembo mpe ya mayele,” na nzela ya bibongiseli oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazwi, akokokisa bamposa ya bandeko na biso ya mokili mobimba kozanga mobulu.—Mat. 24:45-47; 1 Kol. 14:33, 40.