Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yanuali: Nzela ya bomoi ya seko—Osili komona yango? Febwali: Approchez-vous de Jéhovah. Marsi: Bókɛngɛlaka! Aprili: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.
◼ Kobanda na sanza ya Febwali, eleka mwa 6 Marsi te, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Omitambwisa na bwanya na mokili oyo etondi na bozoba.”
◼ Masangá esengeli kozwa bibongiseli ya malamu mpo na Ekaniseli oyo ekosalema mbula oyo na Mwaminei 24 Marsi nsima ya kolala ya moi. Atako lisukulu ekoki kobanda liboso, limpa na vinyo esengeli kolekisama te liboso ya kolala ya moi. Bóluka koyeba ngonga oyo moi elalaka na esika bofandi. Ezali malamu ete lisangá na lisangá esala Ekaniseli na yango. Kasi, na bisika mosusu ekokoka te kosalema bongo. Epai masangá mingi esalelaka Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu lisangá moko to masangá mingi ekoki kosalela bisika mosusu na mpokwa wana. Tosɛngi bino ete soki likoki ezali, ntango lisangá ya liboso ekosilisa, bólekisa miniti 40 liboso ete lisangá mosusu ebanda mpo lisangá na lisangá esala molulu yango malamu mpenza. Esengeli mpe kotya likebi na ndenge oyo mituka ekobanda kokɔta mpe kobima, esika oyo bakotɛlɛmisa yango, mpe esika oyo bakokitisa bato mpe kozwa bango. Lisangani ya bankulutu basengeli kopona bibongiseli oyo ekozala malamu mpo na lisangá na bango.
◼ Ebongi tótángaka bavɛrsɛ ya Biblia malamu na mosala ya kosakola mpe na makita. Na ndakisa, “Yilimia 36:6, 8” esengeli kotángama: “Yilimia mokapo 36 vɛrsɛ ya 6 mpe ya 8.” Esengeli te koloba “vɛrsɛ ya 6 virgule 8.” Soki olingi kotánga “Luka 4:16-20” lobá nde boye “Luka mokapo 4 vɛrsɛ ya 16 tii na 20.” Osengeli te koloba “vɛrsɛ ya 16 tiret 20.” Ezali malamu te tótángaka bilembo ya bopemi.
◼ Tosɛngi bino bótondisa formilɛrɛ S-70a na esika ya S-43, ntango moto moko asepeli mpe alobaka monɔkɔ oyo ekeseni na oyo lisangá na bino esalelaka na makita.