Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 11 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bayangani básalela mituna oyo ezali na lokasa 1 mpe bátalela banɔti oyo bazwaki na liyangani, mpo na kobongisa lisolo elongo na bayangani oyo ekolobela programɛ ya liyangani ya etúká “Tambolá elongo na Nzambe,” na Likita ya mosala ya pɔsɔ oyo elandi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (soki ebongi na teritware na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ. Lendisá basakoli bátánga mpe vɛrsɛ moko na bilakiseli yango. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kobanda masolo.
Min. 15: Zalá na esengo ya kosalisa bato mosusu. (Yoa. 4:34) Mituna-lisolo. Ezalaka esengo komona elongi ya moto ezali kongɛnga ntango azali koyekola mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe. (w94 1/3 lok. 29 par. 6-7) Sololá na basakoli to babongisi-nzela mibale to misato, oyo basalelaka Biblia malamu na mosala ya kosakola, mpe bazalaka na molende mpo na kobanda koyekola mpe kotambwisa boyekoli ya Biblia na bato mingi. Ndenge nini basalisaka bato yango básepela lisusu mingi na nsango malamu? Esengo nini bazwaka? Sɛngá bango bálobela to básala bilakiseli ya makambo yango ndenge elekaki.
Min. 20: “Kampanye ya monene mpo na kokabola mwa buku ya sika.”a Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Salá bilakiseli na makanisi oyo bapesi mpo na ndenge ya kobanda lisolo. Na elakiseli moko, moto oyo bazali kopesa ye litatoli asepeli mpenza te na nsango ya Makomami mpe mosakoli apesi ye trakte na esika ya mwa buku.
Loyembo 69 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 18 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse bibongiseli oyo ezwami mpo na kampanye ya monene oyo tokokabola mwa buku ya sika.
Min. 40: “Liyangani ya etúká elendisaka biso tótambola elongo na Nzambe.” Ekosalema na nkulutu moko. Nsima ya maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti moko te, salá lisolo elongo na bayangani na programɛ ya liyangani ya etúká; tuná mituna oyo ezali na lisolo. Kabolá ngonga malamu mpo na kotuna mituna nyonso, mituna mosusu ekosɛnga mbala mosusu kaka eyano moko. Ntango oyo epesami ekokoka te mpo na kotánga bavɛrsɛ nyonso oyo maloba na yango ezali na lisolo te, batii bavɛrsɛ yango mpo na kosalisa biso tózwa biyano na mituna yango. Makanisi oyo bandeko bakopesa esengeli komonisa ndenge ya kosalela mateya oyo toyokaki.
Loyembo 165 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 25 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Salá elakiseli moko oyo ekomonisa lolenge moko ya kolakisa mwa buku ya sika, oyo ezali kobimisa matomba na teritware na bino. Soki ngonga ezali, lobelá makambo ya kolendisa oyo basakoli bakutanaki na yango na kampanye.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: Monisá ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Lisolo elongo na bayangani, ekouta na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 256-257. Ndenge nini tokoki kosalela makambo oyo euti na Biblia te, kasi na mikanda to biloko mosusu oyo bato bandimaka mpo na kosalisa bato bámona ete makambo oyo Makomami elobi ezali mpenza solo? Sɛngá bayangani bápesa biyano na mituna oyo elandi: Bandakisa nini ya biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́ tokoki kosalela mpo na komonisa ete Mozalisi azali? (rs nk. 73-74) Ndenge nini tokoki kosalela makanisi ya bato ya mayele na makambo ya Biblia to bato ya mayele na makambo ya siansi mpo na kosalisa bato mosusu bámona ete Biblia ezali mpenza Liloba ya Nzambe? (rs nk. 55-56) Ndakisa nini, to makambo nini tokoki kokokanisa mpo na kosalisa bato mosusu báyeba ntina oyo Nzambe atiki nzela na mabe? (rs lok. 240) Makambo nini to bandakisa nini osalelaki mpo na kosalisa bato mosusu bámona ntina ya kolanda toli ya Biblia?
Loyembo 62 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 1 Novɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola.
Min. 20: Ndenge ya kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ oyo toyebi te. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na maloba ya ebandeli ya mwa buku Nsango malamu mpo na bato ya bikólo nyonso. Lobelá makambo oyo ezali na mwa buku yango ya sika. Bólobela makambo misato oyo tokoki kosala mpo na kosalisa bato oyo balobaka monɔkɔ oyo toyebi te. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 2003 lokasa 4. Monisá ete tosengeli kotondisa formilɛrɛ Veuillez suivre l’intérêt (S-43), ata soki moto asepeli te na nsango ya Bokonzi. Salá mpe elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosalela mwa buku yango ya sika.
Min. 15: Makambo oyo basakoli ya lisangá bakutanaki na yango. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango na kampanye ya monene oyo tokabolaki mwa buku ya sika. Bongisá liboso bilakiseli ya makambo yango ndenge elekaki. Soki mwa babuku yango ebandi kosila na lisangá, sɛngá basakoli oyo bazwaki yango ebele bázongisa mosusu epai ya ndeko oyo atalelaka makambo ya mikanda.
Loyembo 175 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.