Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2005
MALAKO
Na mobu 2005, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:
MIKANDA: Biblia haut-fleuve ná Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya boklisto [bi7], Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [w], Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi [be], “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si], mpe Comment raisonner à partir des Écritures [rs].
Eteyelo esengeli kobanda NA NTANGO ETYAMI na loyembo, na libondeli mpe na kotombela bandeko boyei malamu, mpe nsima na yango ekosalema boye:
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU: Miniti 5. Mokɛngɛli na eteyelo, mopesi-toli mosungi, to nkulutu mosusu oyo azali na makoki asengeli kosala lisolo likoló ya toli moko mpo na koloba malamu, oyo ekouta na buku Eteyelo ya mosala. (Na masangá oyo bankulutu bazali mingi te, mosaleli na misala ya makoki akoki kosala lisolo yango.) Soki liyebisi ezali te, esengeli mpe kolobela makambo oyo ezali na bitanda na nkasa oyo lisolo yango ezali. Lisolo oyo ekolobela badevuare te. Badevuare yango etali moto na moto mpe ezali mpo na kopesa toli na nkuku.
LISOLO NO. 1: Miniti 10. Ekosalema na nkulutu to na mosaleli na misala ya makoki, mpe mateya na yango ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Esengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na boumeli ya miniti 10 kozanga kotuna mituna ya bozongeli. Ntina ya lisolo yango esengeli kozala kaka te ya kolobela makanisi nyonso oyo ezali na lisolo, kasi nde ya komonisa ndenge ya kosalela makanisi yango mpe komonisa polele makambo oyo ekozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Esengeli kosalela bobele motó ya likambo oyo epesami. Bandeko mibali oyo bakosala lisukulu oyo, basengeli kokeba ete bátosa ngonga oyo epesami. Bakopesa bango toli na nkuku soki esengeli.
MAKANISI YA NTINA NA BOTÁNGI YA BIBLIA: Miniti 10. Na miniti motoba ya ebandeli, nkulutu moko to mosaleli na misala moko ya makoki akosala lisolo yango na kotalela bamposa ya lisangá. Soki alingi, akoki kobimisa makanisi na mikapo oyo asepeli na yango kati na mikapo oyo ebongisami na programɛ ya botángi ya Biblia mpo na pɔsɔ yango. Lisolo yango esengeli te kolobela bobele na mokuse makambo oyo ezali na mikapo oyo epesami mpo na kotánga. Kasi, ntina ya libosoliboso ya lisolo oyo ezali ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe ndenge nini lisolo yango ekoki kosalisa bango. Molobi asengeli kokeba ete alekisa te miniti motoba oyo etyami mpo na eteni oyo ya ebandeli. Asengeli kotika miniti minei ya nsuka mpo na kosolola na bayangani. Akosɛnga bango báyebisa na mokuse (eleka segɔndɛ 30 te) makanisi oyo basepelaki na yango ntango batángaki mikapo ya Biblia oyo ezali na programɛ mpe matomba oyo bakoki kozwela yango. Nsima na yango, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga bana-kelasi bákende na bakelasi na bango.
LISOLO NO. 2: Miniti 4. Ezali botángi oyo ekosalema na ndeko mobali moko. Botángi yango ekozala mingimingi na Biblia. Mbala moko na sanza, botángi yango ekouta na lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Mwana-kelasi akosala kaka botángi, akoloba eloko te na ebandeli mpe na nsuka. Botángi ya pɔsɔ na pɔsɔ ekoki kozala molai to mokuse, kasi esengeli koleka miniti minei te. Liboso ete mokɛngɛli na eteyelo akabola masolo oyo bana-kelasi bakotánga, asengeli naino ye moko kotánga yango mpo na koyeba ndenge ya kokabola masolo yango na kotalela mbula mpe makoki ya mwana-kelasi mokomoko. Mokɛngɛli na eteyelo akosala makasi mpo na kosalisa bana-kelasi bátángaka na ndenge oyo ezali komonisa ete bayebi ntina ya makambo oyo bazali kotánga, bákakatana na maloba te, báyeba konyata maloba ya ntina, kobongola mongongo, kopema na esika oyo ebongi, mpe kotánga ndenge bameseni koloba.
LISOLO NO. 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai ya ndeko mwasi moko. Bana-kelasi oyo bakosala lisolo yango bakopona kadre moko kati na oyo ezali na lokasa 82 ya buku Eteyelo ya mosala to mokɛngɛli na eteyelo akoponela bango yango. Mwana-kelasi asengeli kosalela motó ya likambo oyo bapesi ye mpe komonisa ndenge ya kosalela yango na motindo moko ya mosala ya kosakola oyo ebongi mpenza na teritware ya lisangá. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Esengeli kopesa bana-kelasi ya sika masolo oyo epai bakozwa yango emonisami polele. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwana-kelasi azali kobimisa polele makanisi ya lisolo oyo bapesi ye mpe na ndenge azali kosalisa molobani na ye akanisa likoló ya Makomami mpe asosola makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo yango. Mokumba oyo ekopesama kaka na mwana-kelasi oyo ayebi kotánga. Mokɛngɛli na eteyelo akopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo akosala lisolo.
LISOLO NO. 4: Miniti 5. Mwana-kelasi asengeli kobimisa makanisi oyo eyokani na motó ya likambo oyo bapesi ye. Soki bayebisi te epai wapi lisolo ekouta, mwana-kelasi asengeli kolukaluka na mikanda ya moombo ya sembo mpe ya mayele mpo azwa makambo oyo akosalela na lisolo na ye. Soki bapesi ndeko mobali lisolo oyo, akosala yango lokola lisukulu mpe ntango azali kobongisa asengeli kotalela lisangá na bango. Soki bapesi yango na ndeko mwasi, akosala yango na kolanda malako oyo epesami na Lisolo No. 3. Mokɛngɛli na eteyelo akopesa ndeko mobali lisolo No. 4 soki amoni ete ebongi ete lisolo yango esalema na ndeko mobali. Tobendi likebi na bino na likambo oyo: Mitó ya makambo oyo ezali na mwa elembo ya monzoto liboso na yango esengeli kopesama kaka na bandeko mibali mpe bakosala yango lokola lisukulu.
BOUMELI: Ndeko moko te asengeli kolekisa ngonga oyo epesami, ata mpe mokɛngɛli na eteyelo asengeli kokeba ete alekisa ngonga te ntango azali kopesa bana-kelasi toli. Soki bandeko oyo bazali kosala masolo No. 2 kino No. 4 balekisi ngonga, bakokata bango na mayele. Soki ndeko oyo akosala toli mpo na koloba malamu, to lisolo No. 1, to makanisi ya ntina na botángi ya Biblia alekisi ngonga, asengeli kozwa toli na nkuku. Bandeko nyonso oyo bazali na masolo basengeli kotosa ngonga oyo bapesi bango. Longola loyembo mpe libondeli, eteyelo mobimba esengeli koumela miniti 45.
TOLI: Miniti 1. Nsima ya lisolo ya mwana-kelasi mokomoko, mokɛngɛli na eteyelo asengeli kozwa kaka miniti moko mpo na kopesa toli; na toli na ye, asengeli kopesa mwana-kelasi longonya na likambo moko oyo asalaki malamu na lisolo na ye. Akosuka kaka te na koloba ‘osali yango malamu,’ kasi asengeli komonisa ntina oyo ye alobi ete likambo yango ezali malamu. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopesa mwana-kelasi mokomoko toli mosusu na nkuku soki esengeli, nsima ya makita to na ntango mosusu.
MOPESI-TOLI MOSUNGI: Longola mokɛngɛli na eteyelo, lisangani ya bankulutu ekopona nkulutu moko ya makoki, soki azali, oyo akozala mopesi-toli mosungi. Soki bankulutu bazali mwa mingi na lisangá, boye nkulutu mokomoko ya makoki akobanda kosala mokumba yango na boumeli ya mbula moko. Mokumba ya mopesi-toli mosungi ezali ya kopesa toli na nkuku, soki esengeli, epai ya ndeko mobali oyo asali lisolo No. 1 mpe ndeko mobali oyo asali makanisi ya ntina na botángi ya Biblia. Ezali na ntina te ete apesaka toli nsima ya masolo yango nyonso oyo baninga na ye bankulutu to basaleli na misala bakosala. Ebongiseli oyo ekokoba na mobu 2005 mpe ekoki kobongwana nsima.
LOKASA YA TOLI: Ezali na buku.
BOZONGELI YA KOLOBA: Miniti 30. Nsima ya sanza mibalemibale, mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli ya koloba. Liboso ya kosala yango, lisolo etali toli mpo na koloba malamu mpe oyo etali makanisi ya ntina na botángi ya Biblia esengeli kosalema ndenge oyo tolobeli yango awa liboso. Bozongeli ya koloba ekouta na masolo oyo esalemaki na eteyelo na sanza mibale oyo eleki, bakisa mpe masolo ya pɔsɔ wana. Soki lisangá na bino ekosala liyangani ya zongazonga to soki mokɛngɛli ya zongazonga akotala lisangá na bino na pɔsɔ oyo bozongeli ya koloba esengeli kosalema, na bongo bokosalela malako oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 2003, lokasa 6.
PROGRAMƐ
3 Yan. Botángi ya Biblia: Yosua 16-20 Loyembo 6
Toli mpo na koloba malamu: Makambo oyo bato bakokanga ntina na yango (be lok. 226 par. 1–lok. 227 par. 2)
No. 1: Bangá Nzambe ya solo (be lok. 272 par. 1–lok. 273 par. 1)
No. 2: Yosua 16:1–17:4
No. 3: Ntina oyo kosuka kaka na kotánga Biblia ekoki te (rs lok. 316 par. 1-2)
No. 4: Lelo oyo, kozala mozwi to mobola ezali elembo ete tóbangaka Nzambe?
10 Yan. Botángi ya Biblia: Yosua 21-24 Loyembo 100
Toli mpo na koloba malamu: Kolimbola maloba oyo bato bameseni na yango te (be lok. 227 par. 3–lok. 228 par. 1)
No. 1: Yebisá bato nkombo ya Nzambe (be lok. 273 par. 2–lok. 274 par. 1)
No. 2: Yosua 23:1-13
No. 3: Lingomba ya solo eteyeka makambo oyo ezali na Biblia mpe eyebisaka nkombo ya Nzambe (rs lok. 316 par. 3-4)
No. 4: Kosambela Yesu ezali malamu?
17 Yan. Botángi ya Biblia: Basambisi 1-4 Loyembo 97
Toli mpo na koloba malamu: Limbolá na ndenge esengeli (be lok. 228 par. 2-3)
No. 1: Koyeba moto oyo azali na nkombo yango (be lok. 274 par. 2-5)
No. 2: Basambisi 2:1-10
No. 3: Lingomba ya solo emonisaka kondima ya solosolo epai ya Yesu Klisto (rs lok. 317 par. 1)
No. 4: Ndenge nini okoki kokima miziki ya mabe oyo balakisaka na televizyo to na kasɛti video?
24 Yan. Botángi ya Biblia: Basambisi 5-7 Loyembo 47
Toli mpo na koloba malamu: Etali mpe motema ya moto (be lok. 228 par. 4–lok. 229 par. 1)
No. 1: Nkombo ya Nzambe ezali “ndako molai ya makasi” (be lok. 274 par. 6–lok. 275 na moto ya likambo moke)
No. 2: Basambisi 6:25-35
No. 3: Ndenge nini Biblia esengeli kotambwisa bonsomi oyo tozali na yango ya kopona?
No. 4: Lingomba ya solo ezali te kaka kozala moto ya lingomba kasi ezali nde lolenge ya bomoi (rs lok. 317 par. 2)
31 Yan. Botángi ya Biblia: Basambisi 8-10 Loyembo 174
Toli mpo na koloba malamu: Eteya mpenza bato oyo bakoyoka yo (be lok. 230 par. 1-6)
No. 1: Kopesa litatoli na ntina etali Yesu (be lok. 275 na moto ya likambo moke–lok. 276 par. 1)
No. 2: w03 15/1 nk. 19-20 par. 16-18
No. 3: Bato oyo bazali na lingomba ya solo balinganaka mpe bakɔtaka na makambo ya mokili te (rs lok. 317 par. 3-4)
No. 4: Kozala na mposa ya biloko mpe kozala na biloko mingi ezali likambo moko te
7 Feb. Botángi ya Biblia: Basambisi 11-14 Loyembo 209
Toli mpo na koloba malamu: Kolukaluka makanisi na mikanda ekopesa lisolo na yo makambo mingi ya koteya (be lok. 231 par. 1-3)
No. 1: Monisá polele ete Yesu azali Mosikoli (be lok. 276 par. 2-3)
No. 2: Basambisi 12:1-15
No. 3: Ntina oyo Batatoli ya Yehova bazali na bomoko
No. 4: Bato oyo bazali na lingomba ya solo bazali Batatoli ya molende ya Bokonzi ya Nzambe (rs lok. 317 par. 5)
14 Feb. Botángi ya Biblia: Basambisi 15-18 Loyembo 105
Toli mpo na koloba malamu: Limbolá mikapo (be lok. 231 par. 4-5)
No. 1: Monisá polele ete Yesu azali Nganga-Nzambe Monene mpe Mokonzi ya lisangá (be lok. 277 par. 1-2)
No. 2: Basambisi 15:9-20
No. 3: aSoki moto alobi ete, ‘Lokola nandimelá Yesu, ata nazali na lingomba nini ezali mpenza na ntina te’ (rs lok. 320 par. 2)
No. 4: Ntina oyo baklisto baboyaka likambo ya kolalisa moto mpɔngi mpo asolola na bilimo (hypnotisme)
21 Feb. Botángi ya Biblia: Basambisi 19-21 Loyembo 53
Toli mpo na koloba malamu: Limbolá maloba (be lok. 232 par. 1)
No. 1: Monisá polele ete Yesu azali Mokonzi oyo azali koyangela (be lok. 277 par. 3-4)
No. 2: w03 1/2 nk. 17-18 par. 18-21
No. 3: bSoki moto alobi ete, ‘Nini endimisi yo ete losambo ya solo ezali kaka moko?’ (rs lok. 320 par. 3)
No. 4: Wapi mwa “makambo mozindo ya Nzambe”? (1 Kol. 2:10)
28 Feb. Botángi ya Biblia: Luta 1-4 Loyembo 120
Toli mpo na koloba malamu: Sosolá elongo likoló ya mikapo (be lok. 232 par. 2-4)
Bozongeli ya koloba
7 Mar. Botángi ya Biblia: 1 Samwele 1-4 Loyembo 221
Toli mpo na koloba malamu: Kopona makambo oyo ekopesa bayoki na yo litomba (be lok. 232 par. 5-lok. 233 par. 1-4)
No. 1: Tyá Klisto lokola moboko (be lok. 278 par. 1-4)
No. 2: 1 Samwele 2:1-11
No. 3: Yesu amataki na likoló na nzoto ya mosuni te (rs lok. 322 par. 1-3)
No. 4: Ntina oyo baklisto ya solo batángaka mikanda ya horoscope te
14 Mar. Botángi ya Biblia: 1 Samwele 5-9 Loyembo 151
Toli mpo na koloba malamu: Salelá mokanda oyo batindi yo osalela (be lok. 234 par. 1–lok. 235 par. 3)
No. 1: Nsango malamu oyo ya Bokonzi (be lok. 279 par. 1-4)
No. 2: 1 Samwele 5:1-12
No. 3: Ntina oyo Yesu amonanaki na bato na nzoto ya mosuni nsima ya lisekwa na ye (rs lok. 322 par. 4–lok. 323 par. 3)
No. 4: Ndenge oyo tokoki kobongisa boninga na biso na Yehova
21 Mar. Botángi ya Biblia: 1 Samwele 10-13 Loyembo 166
Toli mpo na koloba malamu: Kosalela malamu mituna (be lok. 236 par. 1-5)
No. 1: Limbolá soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini (be lok. 280 par. 1-5)
No. 2: 1 Samwele 10:1-12
No. 3: Ndenge nini Batatoli basengeli kotalelaka bandeko na bango oyo bazali na mongomba mosusu?
No. 4: Baoyo basekwi mpo na koyangela elongo na Klisto bakozala lokola Ye (rs lok. 323 par. 5–lok. 324 par. 3)
28 Mar. Botángi ya Biblia: 1 Samwele 14-15 Loyembo 172
Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na kokɔta na makanisi ya ntina (be lok. 237 par. 1-2)
No. 1: Limbolá oyo Bokonzi ezali kosala na bomoi na biso (be lok. 281 par. 1-4)
No. 2: w03 15/3 nk. 19-20 par. 17-21
No. 3: Ntina oyo baklisto bafutaka mpako
No. 4: Lisekwa ekolimbola nini mpo na bato mingi (rs lok. 324 par. 4–lok. 325 par. 3)
4 Apr. Botángi ya Biblia: 1 Samwele 16-18 Loyembo 27
Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na kokanisa malamumalamu likambo moko (be lok. 237 par. 3–lok. 238 par. 2)
No. 1: Kokɔta kelasi ezali na ntina mingi mpo na baklisto (w03 15/3 lok. 10 par. 1–lok. 11 par. 5)
No. 2: 1 Samwele 17:41-51
No. 3: Bato oyo bakosekwa bakosambisama mpo na mabe na bango ya kala te (rs lok. 326 par. 1)
No. 4: Komanyola likoló na litomba to mikakatano oyo likambo moko ekobimisa ekosalisa biso tólinga malamu tóyina mabe
11 Apr. Botángi ya Biblia: 1 Samwele 19-22 Loyembo 73
Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na kobimisa makanisi oyo ezali na motema (be lok. 238 par. 3-5)
No. 1: Ndenge oyo bilenge bakoki kokola na elimo (w03 1/4 nk. 8-10)
No. 2: 1 Samwele 20:24-34
No. 3: Komikitisa ya solosolo ekosala ete bálinga biso mingi
No. 4: Ndenge oyo “bakufi oyo batikalaki” bazongi na bomoi na mabelé (rs lok. 326 par. 2–lok. 327 par. 2)
18 Apr. Botángi ya Biblia: 1 Samwele 23-25 Loyembo 61
Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na konyata makanisi ya ntina malamumalamu (be lok. 239 par. 1-2)
No. 1: Tyelá Yehova motema na yo mobimba (w03 1/11 nk. 4-7)
No. 2: w03 1/5 lok. 17 par. 11-14
No. 3: Baoyo bakosekwa mpo na kofanda na mabelé (rs lok. 327 par. 3–lok. 328 par. 3)
No. 4: Ntina oyo kondimana ya Abalayama esalemaki
25 Apr. Botángi ya Biblia: 1 Samwele 26-31 Loyembo 217
Toli mpo na koloba malamu: Mituna mpo na kolakisa polele makanisi ya libunga (be lok. 239 par. 3-5)
Bozongeli ya koloba
2 Mai Botángi ya Biblia: 2 Samwele 1-3 Loyembo 91
Toli mpo na koloba malamu: Maloba ya kokokanisa makambo mpe maloba ya elilingi oyo ezali koteya (be lok. 240 par. 1–lok. 241 par. 1)
No. 1: Kokɔta kelasi ezalaka kaka mpo na kozwa mosala te (w03 15/3 lok. 11 par. 6–lok. 14 par. 4)
No. 2: 2 Samwele 2:1-11
No. 3: Makambo oyo ekosalema na ntango ya kozala ya Klisto ekoumela bambula mingi (rs lok. 329 par. 1-2)
No. 4: Kolongobana epesaka matomba mingi
9 Mai Botángi ya Biblia: 2 Samwele 4-8 Loyembo 183
Toli mpo na koloba malamu: Salelá bandakisa mosusu (be lok. 241 par. 2-lok. 242 par. 1)
No. 1: Yehova asepelaka mpenza na bilenge (w03 15/4 lok. 29 par. 4–lok. 31 par. 4)
No. 2: 2 Samwele 5:1-12
No. 3: Kondimana ya Mibeko ekokisi makambo nini?
No. 4: Kozonga ya Klisto ekomonana na miso te (rs lok. 329 par. 3–lok. 330 par. 2)
16 Mai Botángi ya Biblia: 2 Samwele 9-12 Loyembo 66
Toli mpo na koloba malamu: Bandakisa oyo ezali na Biblia (be lok. 242 par. 2-3)
No. 1: Yehova amonaka makambo oyo yo osalaka? (w03 1/5 nk. 28-31)
No. 2: 2 Samwele 9:1-13
No. 3: Ndenge Yesu akozonga mpe ndenge oyo liso nyonso ekomona ye (rs lok. 330 par. 4–lok. 331 par. 5)
No. 4: Na ndenge nini liloba ya Nzambe ezali na bomoi? (Ebe. 4:12)
23 Mai Botángi ya Biblia: 2 Samwele 13-15 Loyembo 103
Toli mpo na koloba malamu: Bakokanga ntina ya bandakisa yango? (be lok. 242 par. 4-lok. 243 par. 1)
No. 1: Lisolo ya Noa—Ezali nde na ntina mpo na biso? (w03 15/5 nk. 4-7)
No. 2: 2 Samwele 13:10-22
No. 3: Yoane 11:25, 26 elimbolaka mpenza nini?
No. 4: Makambo oyo ezali kosalema na ntango ya Kozala ya Klisto (rs lok. 332 par. 1-5)
30 Mai Botángi ya Biblia: 2 Samwele 16-18 Loyembo 132
Toli mpo na koloba malamu: Bandakisa ya makambo oyo bato bameseni na yango (be lok. 244 par. 1-2)
No. 1: Kanisáká malamumalamu mpe saláká makambo na bwanya (w03 15/7 nk. 21-23)
No. 2: w03 15/5 nk. 16-17 par. 8-11
No. 3: Baklisto basɛngisami te kotosa Sabata (rs lok. 343 par. 1-lok. 344 par. 2)
No. 4: Ntina oyo komikitisa ezali bolɛmbu te
6 Yuni Botángi ya Biblia: 2 Samwele 19-21 Loyembo 224
Toli mpo na koloba malamu: Bandakisa oyo ebongi na bato oyo bakoyoka yo (be lok. 244 par. 3–lok. 245 par. 4)
No. 1: Tóyeba ntina mpenza ya disipilini (w03 1/10 lok. 20 par. 1–lok. 21 par. 5)
No. 2: 2 Samwele 19:1-10
No. 3: Na ndenge nini moklisto akoki kokɔta na kati ya kopema ya Nzambe?
No. 4: Biblia emonisi ata esika moko te ete Adama azalaki kotosa Sabata (rs lok. 344 par. 3–lok. 347 par. 1)
13 Yuni Botángi ya Biblia: 2 Samwele 22-24 Loyembo 74
Toli mpo na koloba malamu: Kosalela malamu biloko oyo okoki kolakisa bato (be lok. 247 par. 1-2)
No. 1: Kozala motó makasi te mpe batelá lolemo na yo (w03 15/9 lok. 21 par. 1–lok. 22 par. 4)
No. 2: 2 Samwele 24:10-17
No. 3: Yesu akabolaki te Mibeko ya Moize na eteni ya “milulu” mpe na eteni ya “bizaleli” (rs lok. 345 par. 2-lok. 346 par. 1)
No. 4: Na ndenge nini baklisto basengeli kokabwana na mokili?
20 Yuni Botángi ya Biblia: 1 Mikonzi 1-2 Loyembo 2
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge oyo Yesu asalelaki biloko ya kolakisa bato (be lok. 247 par. 3)
No. 1: Yekolá sɛkɛlɛ ya kosepela na oyo ozali na yango (w03 1/6 nk. 8-11)
No. 2: w03 1/6 nk. 12-13 par. 1-4
No. 3: Mobeko ya zomi: Ntina na yango mpenza ezalaki nini?
No. 4: Mibeko Zomi elongwaki elongo na Mobeko ya Moize (rs lok. 346 par. 2-3)
27 Yuni Botángi ya Biblia: 1 Mikonzi 3-6 Loyembo 167
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kosalela biloko ya kolakisa bato (be lok. 248 par. 1-3)
Bozongeli ya koloba
4 Yuli Botángi ya Biblia: 1 Mikonzi 7-8 Loyembo 194
Toli mpo na koloba malamu: Salelá bakalati, manaka ya mayangani, mpe bakasɛti-video (be lok. 248 par. 4–lok. 249 par. 2)
No. 1: Sepeláká na bandeko baklisto oyo bazali mibange (w03 1/9 nk. 30-31)
No. 2: 1 Mikonzi 8:1-13
No. 3: Na ndenge nini Yesu alongaki mokili?
No. 4: Ntina oyo bipekiseli ya makambo oyo etali bizaleli malamu elongwaki te ntango Mibeko Zomi ekufaki (rs lok. 347 par. 1-2)
11 Yuli Botángi ya Biblia: 1 Mikonzi 9-11 Loyembo 191
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kolakisa biloko liboso ya bato ebele (be lok. 249 par. 3–lok. 250 par. 1)
No. 1: Makambo oyo ezali kondimisa ete Yesu Klisto azalaki awa na mabelé (w03 15/6 nk. 4-7)
No. 2: 1 Mikonzi 9:1-9
No. 3: Ndimbola ya Sabata mpo na baklisto (rs lok. 347 par. 3–lok. 349 par. 1)
No. 4: Kotosa mitinda ya Biblia ekoki kosala ete moto atika komɛla bangi
18 Yuli Botángi ya Biblia: 1 Mikonzi 12-14 Loyembo 162
Toli mpo na koloba malamu: Kotinda bato bákanisa ezali na ntina (be lok. 251 par. 1-3)
No. 1: Kokanisa etindaka moto na kosala, mpe kosala ebotaka mbuma (w03 15/1 lok. 30 par. 1-3)
No. 2: 1 Mikonzi 12:1-11
No. 3: Ndenge oyo kondima ekoki kosalisa biso tólonga komekama
No. 4: Basantu oyo Biblia elobelaka ezali banani (rs lok. 350 par. 1–3)
25 Yuli Botángi ya Biblia: 1 Mikonzi 15-17 Loyembo 158
Toli mpo na koloba malamu: Ndenge ya kobanda (be lok. 251 par. 4–lok. 252 par. 3)
No. 1: Ndenge ya ‘kososola soki mokano ya Yehova ezali nini’ (w03 1/12 lok. 21 par. 3–lok. 23 par. 3)
No. 2: w03 15/7 lok. 19 par. 15-17
No. 3: Ntina oyo tosambelaka “basantu” te (rs lok. 351 par. 1-3)
No. 4: Na ndenge nini elimo santu ebɔndisaka baklisto?
1 Aug. Botángi ya Biblia: 1 Mikonzi 18-20 Loyembo 207
Toli mpo na koloba malamu: Ntango ya koyokela bato (be lok. 252 par. 4–lok. 253 par. 1)
No. 1: Bilenge, bótambola na ndenge ebongi na Yehova (w03 15/10 lok. 23 par. 1–lok. 24 par. 1)
No. 2: 1 Mikonzi 18:1-15
No. 3: Baklisto nyonso bakoki kobota mbuma mingi
No. 4: Bosolo na likambo etali kosambela mikuwa ya “basantu” mpe bikeko na bango (rs lok. 352 par. 1–lok. 353 par. 1)
8 Aug. Botángi ya Biblia: 1 Mikonzi 21-22 Loyembo 92
Toli mpo na koloba malamu: Tuná mituna mpe monisá ntina ya mituna yango (be lok. 253 par. 2–lok. 254 par. 2)
No. 1: Ndenge ya kosilisa bobola mpo na libela (w03 1/8 nk. 4-7)
No. 2: 1 Mikonzi 21:15-26
No. 3: Basantu ya solo bazangi masumu te (rs lok. 353 par. 2)
No. 4: Mpo na nini tosengeli kozala na mpiko, mpe ndenge nini tokoki kolona ezaleli yango?
15 Aug. Botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 1-4 Loyembo 16
Toli mpo na koloba malamu: Makanisi ya solosolo oyo euti na Liloba ya Nzambe (be lok. 255 par. 1–lok. 256 par. 2)
No. 1: Bozwi ofele, bópesa ofele (w03 1/8 nk. 20-22)
No. 2: 2 Mikonzi 3:1-12
No. 3: Mpo na nini liboso ya Mpela bato bazalaki na bomoi molai?
No. 4: Biblia elobi te ete mokili mobimba ekozwa lobiko (rs lok. 354 par. 3)
22 Aug. Botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 5-8 Loyembo 193
Toli mpo na koloba malamu: Bakisá makambo mosusu mpo na kondimisa (be lok. 256 par. 3-5)
No. 1: Tóyekola koloba mpe kosala na mayele (w03 1/8 nk. 29-31)
No. 2: w03 1/8 lok. 19 par. 18-22
No. 3: Nsukansuka bato nyonso bakobika? (rs lok. 355 par. 1)
No. 4: Wapi bizaleli malamu ya Yona oyo tosengeli komekola?
29 Aug. Botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 9-11 Loyembo 129
Toli mpo na koloba malamu: Monisá bato makambo ya solosolo oyo ekoki mpenza mpo na kosilisa ntembe (be lok. 257 par. 1–4)
Bozongeli ya koloba
5 Sɛt. Botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 12-15 Loyembo 175
Toli mpo na koloba malamu: Kosala makasi mpo na kosimba motema (be lok. 258 par. 1-lok. 259 par. 1)
No. 1: Olukaka Yehova na molende? (w03 15/8 nk. 25-28)
No. 2: 2 Mikonzi 12:1-12
No. 3: Mpo na nini esengeli kolanda ezaleli ya boboto?
No. 4: “Bato ya ndenge nyonso” bakobika (rs lok. 355 par. 2)
12 Sɛt. Botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 16-18 Loyembo 203
Toli mpo na koloba malamu: Luká koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato (be lok. 259 par. 2-4)
No. 1: Bato bakanisaka Yesu na makambo nini? (w03 15/8 lok. 6 par. 6–lok. 8 par. 6)
No. 2: 2 Mikonzi 16:10-20
No. 3: Biblia elobi ete bato mosusu bakozwa lobiko soki moke te (rs lok. 355 par. 3-lok. 356 par. 2)
No. 4: Na ndenge nini tokoki kotalela malamumalamu mpenza oyo ekoki kondimama epai ya Nkolo?
19 Sɛt. Botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 19-22 Loyembo 89
Toli mpo na koloba malamu: Kotinda bato bázala na mayoki ya malamu (be lok. 259 par. 5–lok. 260 par. 1)
No. 1: “Kobá kosimba ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba” (w03 1/1 lok. 29 par. 3–lok. 30 par. 4)
No. 2: 2 Mikonzi 19:20-28
No. 3: Soki moto abiki elimboli te ete abiki mpo na libela (rs lok. 356 par. 3–6)
No. 4: Liteya nini tokoki kozwa na bandeko baklisto ya Similina ya kala?
26 Sɛt. Botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 23-25 Loyembo 84
Toli mpo na koloba malamu: Salisá bato bálona ezaleli ya kobanga Nzambe (be lok. 260 par. 2-3)
No. 1: Biblia mpe kanɔ́ na yango—Eteni 1 (si lok. 299 par. 1-6)
No. 2: w03 15/8 lok. 20 par. 6-10
No. 3: Totalelaka avenire na bobangi te
No. 4: Ntina oyo kondima esengeli komonana na misala (rs lok. 356 par. 7-lok. 357 par. 3)
3 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Ntango 1-4 Loyembo 51
Toli mpo na koloba malamu: Ezaleli na biso ezali na ntina mingi na miso ya Nzambe (be lok. 260 par. 4–lok. 261 par. 1)
No. 1: Biblia mpe kanɔ́ na yango—Eteni 2 (si nk. 300-302 par. 7-16)
No. 2: 1 Ntango 4:24-43
No. 3: Ndenge oyo toyebi mpenza ete Zabolo azali (rs lok. 364 par. 3–lok. 365 par. 3)
No. 4: Yehova alingaka moto mokomoko kati na biso
10 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Ntango 5-7 Loyembo 195
Toli mpo na koloba malamu: Salisá bato bámitalela malamumalamu (be lok. 261 par. 2-4)
No. 1: Biblia mpe kanɔ́ na yango—Eteni 3 (si nk. 302-305 par. 17-26)
No. 2: 1 Ntango 5:18-26
No. 3: Makambo toyebi na ntina na “mokolo ya Yehova”
No. 4: Satana ezali te mabe oyo ezali na kati ya bato (rs lok. 365 par. 4–lok. 366 par. 2)
17 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Ntango 8-11 Loyembo 201
Toli mpo na koloba malamu: Lendisá bango bátosa na motema mobimba (be lok. 262 par. 1-4)
No. 1: Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu—Eteni 1 (si nk. 305-306 par. 1-5)
No. 2: 1 Ntango 10:1-14
No. 3: Nzambe asalaki Satana te (rs lok. 366 par. 3)
No. 4: Nani tosengeli kolobela mpe kosalela makambo na mayele?
24 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Ntango 12-15 Loyembo 80
Toli mpo na koloba malamu: Salá elongo na Yehova mpo na kosimba mitema ya bato (be lok. 262 par. 5)
No. 1: Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu—Eteni 2 (si nk. 306-307 par. 6-9)
No. 2: w03 1/11 nk. 10-11 par. 10-13
No. 3: Kotambola na nkombo ya Yehova elimboli mpenza nini
No. 4: Ntina oyo Nzambe abomaki Satana mbala moko te nsima ya kotomboka na ye (rs lok. 367 par. 1–2)
31 Ɔkɔt. Botángi ya Biblia: 1 Ntango 16-20 Loyembo 129
Toli mpo na koloba malamu: Oyo okoki kosala mpo na kotosa ngonga oyo bapesi yo (be lok. 263 par. 1–lok. 264 par. 4)
Bozongeli ya koloba
7 Nov. Botángi ya Biblia: 1 Ntango 21-25 Loyembo 215
Toli mpo na koloba malamu: Kolendisa bato mpenza malamu (be lok. 265 par. 1-3)
No. 1: Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu—Eteni 3 (si nk. 307-310 par. 10-16)
No. 2: 1 Ntango 22:1-10
No. 3: Kotala makasi ya Zabolo na lisɛki te (rs lok. 368 par. 1–3)
No. 4: cNdenge ya kobongisa libala
14 Nov. Botángi ya Biblia: 1 Ntango 26-29 Loyembo 35
Toli mpo na koloba malamu: Lendisá bato na bolingo (be lok. 266 par. 1-4)
No. 1: Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu—Eteni 4 (si nk. 310-312 par. 17-25)
No. 2: 1 Ntango 29:1-9
No. 3: Ntina oyo basaleli ya Yehova banyokolamaka
No. 4: Ntango ya kolongwa na bopusi mabe ya Zabolo ekómi pene (rs lok. 369 par. 1–lok. 370 par. 1)
21 Nov. Botángi ya Biblia: 2 Ntango 1-5 Loyembo 46
Toli mpo na koloba malamu: Mateya oyo euti mpenza na Biblia (be lok. 267 par. 1-2)
No. 1: Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu—Eteni 5 (si nk. 312-313 par. 26-31)
No. 2: 2 Ntango 2:1-10
No. 3: Kangá ntina ya disipilini
No. 4: dKosangisa nzoto nyonso ezali lisumu? (rs lok. 370 par. 2–lok. 371 par. 4)
28 Nov. Botángi ya Biblia: 2 Ntango 6-9 Loyembo 106
Toli mpo na koloba malamu: Zalá “na elobeli ya polele” (be lok. 267 par. 3-4)
No. 1: Makomi ya Grɛki ya boklisto kati na Makomami Mosantu—Eteni 1 (si nk. 315-316 par. 1-7)
No. 2: w03 1/12 nk. 15-16 par. 3-6
No. 3: Ndenge oyo tomonisaka ete tosepelaka na Yehova
No. 4: eBiblia elobi nini na likambo ya kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi (rs lok. 372 par. 2–4)
5 Des. Botángi ya Biblia: 2 Ntango 10-14 Loyembo 116
Toli mpo na koloba malamu: Ntina oyo esengeli kokitisa mitema ya bato (be lok. 268 par. 1-3)
No. 1: Makomi ya Grɛki ya boklisto kati na Makomami Mosantu—Eteni 2 (si nk. 316-317 par. 8-16)
No. 2: 2 Ntango 12:1-12
No. 3: Ntina oyo tosengeli na boboto monene ya Nzambe
No. 4: Makambo oyo esengeli kotika mpo na kosepelisa Nzambe (rs lok. 372 par. 5–lok. 373 par. 2)
12 Des. Botángi ya Biblia: 2 Ntango 15-19 Loyembo 182
Toli mpo na koloba malamu: Yebisá bango lisusu makambo oyo Yehova asalá (be lok. 268 par. 4–lok. 269 par. 2)
No. 1: Makomi ya Grɛki ya boklisto kati na Makomami Mosantu—Eteni 3 (si nk. 317-319 par. 17-25)
No. 2: 2 Ntango 19:1-11
No. 3: Ntina oyo ata moto ya kokoka akoki kosala lisumu (rs lok. 278 par. 3–lok. 279 par. 3)
No. 4: Liteya oyo tokoki kozwa na bandeko ya Yesu
19 Des. Botángi ya Biblia: 2 Ntango 20-24 Loyembo 186
Toli mpo na koloba malamu: Monisá bato ndenge oyo Yehova asalisaki bato na ye na ntango ya kala (be lok. 269 par. 3-5)
No. 1: Makomi ya Grɛki ya boklisto kati na Makomami Mosantu—Eteni 4 (si nk. 319-320 par. 26-32)
No. 2: w03 15/12 nk. 16-17 par. 13-15
No. 3: Litomba ya koyekola sɛkɛlɛ ya kosepela na oyo ozali na yango
No. 4: Ntina mpenza oyo tosengeli koyeba mabe ya lisumu (rs lok. 280 par. 2–lok. 281 par. 2)
26 Des. Botángi ya Biblia: 2 Ntango 25-28 Loyembo 137
Toli mpo na koloba malamu: Monisá ete osepelaka na oyo Nzambe azali kosala sikoyo (be lok. 270 par. 1–lok. 271 par. 2)
Bozongeli ya koloba
[Maloba na nse ya lokasa]
a Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.
b Soki ntango ezali, mwana-kelasi asengeli kotalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi, na maloba ya ntembe mpe na makambo ndenge na ndenge oyo bokutanaka na yango na teritware na bino.
c Ekopesama kaka na ndeko mobali.
d Ekopesama kaka na ndeko mobali.
e Ekopesama kaka na ndeko mobali.