Mayebisi
◼ Sɛtɛmbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!
◼ Kasɛti video Pas de sang: la médecine relève le défi, ekotalelama na Likita moko ya mosala na Desɛmbɛ. Bakɔtisi programɛ ya kasɛti-video yango na DVD oyo ezali na baprogramɛ oyo elobi: Des alternatives à la transfusion. DVD yango ezali na baprogramɛ oyo elandi: Stratégies alternatives à la transfusion: simples, sûres, efficaces; Soigner sans transfuser—Besoins et droits du patient; mpe Pas de sang: la médecine relève le défi. DVD yango esalemi na Lingelesi, kasi okoki koyoka yango na minɔkɔ oyo elandi: Allemand, Espagnol, Français, Italien, Japonais, Portugais (Brésilien), mpe Russe. Mpe kasɛti video Pas de sang ezali na minɔkɔ oyo elandi: Anglais, Bulgare, Chinois (Cantonais), Coréen, Espagnol, Français, Grec, Italien, Japonais, Néerlandais, Polonais, mpe Russe. Soki olingi kozwa DVD to kasɛti video yango, osengeli kosɛnga yango noki mpenza na nzela ya lisangá.
◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2005 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema na mokolo ya lomingo mwa 10 Aprili. Motó ya likambo ya lisukulu yango ekoyebisama nsima. Masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala to oyo ekozala na liyangani ya zongazonga to ya mokolo moko na pɔsɔ yango, ekosala lisukulu yango na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya mokolo ya 10 Aprili 2005.
◼ Ntango mokɛngɛli ya zongazonga azali kotala masangá, akotalela mpe Fiche d’inspection de sécurité (T-34-F).
◼ Bankulutu basengeli kobosana te kolanda malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1991, nk. 21-23, mpo na moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to amilongolaki ye moko, oyo basengeli kokenda kotala ye.
◼ Masangá basengeli kokabolaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ya sika mbala moko ntango bazwi yango. Yango ekosala ete basakoli báyeba makambo oyo ezali na kati ya bazulunalo yango liboso ya kokende kolakisa yango na mosala ya kosakola.
◼ Lokola Ɔkɔtɔbɛ ekozala na bawikende mitano, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.