Tómemya bokonzi ya Yehova
Nini eyelaka yo na makanisi ntango oyokaka nkombo ya bato oyo ya kala: Kola, Datana mpe Abilama? Botomboki! Batombokelaki nini? Batombokelaki bokonzi ya Nzambe. Makambo ya nsɔmɔ oyo ekómelaki bango ezali na Mituya mokapo 16, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 2002, elobeli likambo yango na mokuse na lisolo oyo elobi: “Tótosa na bosembo mpenza bokonzi oyo Nzambe atii.” Ekosalisa yo mpenza soki otángi lisolo yango mpe otali makambo yango oyo ezali kotinda na kokanisa, ndenge ezali na kasɛti video Respect Jehovah’s Authority. Okomona matata oyo ebimaki kati na bana ya Kola oyo bazalaki sembo mpe tata na bango oyo akómaki motomboki mpe azalaki kotɛmɛla Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Mit. 26:9-11) Drame yango oyo ezali komonisa makambo esalemaki mpenza, esengeli kotinda biso nyonso tómonisa lisusu bosembo na biso epai ya Yehova makasi koleka.
Ntango ozali kotala video yango, luká omona ndenge Kola ná baninga na ye batomboki bazangaki bosembo na makambo motoba oyo: (1) Ndenge nini bazangaki limemya epai ya bato oyo Nzambe apesaki bokonzi? (2) Ndenge nini batikaki lolendo, mposa ya lokumu mpe zuwa ezwa esika na mitema na bango? (3) Na ndenge nini bazalaki ntango nyonso kotya miso na bango kaka na mabunga ya bato oyo Yehova aponaki? (4) Ezaleli nini ya komilelalela bakómaki na yango? (5) Mpo na nini bazalaki lisusu te kosepela na mikumba kitoko oyo bazalaki na yango? (6) Ndenge nini batikaki ete baninga to bandeko na bango bázala na ntina mingi koleka bosembo na bango epai ya Yehova?
Tótalela ndenge mokomoko na biso akoki kosalela mateya oyo tozwi na drame oyo mpo na kotosa bato oyo Nzambe apesi bokonzi lelo oyo: (1) Ndenge nini tosengeli kotalela bikateli ya bankulutu na kati ya lisangá, mpe mpo na nini? (2) Ndenge nini tokoki kolongola mposa nyonso ya mabe oyo ezali na kati ya motema na biso? (3) Ndenge nini tosengeli kotalela mabunga ya bato oyo baponami mpo na kotambwisa lisangá? (4) Tosengeli kosala nini soki ezaleli ya komilelalela ekómi kozwa esika na kati ya motema na biso? (5) Ndenge nini tosengeli kotalela mikumba nyonso oyo bakoki kopesa biso na ebongiseli ya Nzambe? (6) Nani asengeli te kozwa esika ya liboso na bosembo na biso epai ya Nzambe, mpe ntango nini yango ekoki kokóma komekama mpo na biso?
Nsima ya kolanda lisolo oyo na Ndako ya Bokonzi, mpo na nini te kotala lisusu kasɛti video yango? Tiká ete yango esalisa yo obosana ata moke te ntina oyo tosengeli ntango nyonso kotosa bato oyo Yehova apesi bango bokonzi!—Nz. 18:25; 37:28.