Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 13 Sɛtɛmbɛ
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Soki makanisi oyo bapesi na lokasa 4 ebongi na teritware ya lisangá na bino, salelá yango mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Sɛtɛmbɛ. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu ya kolakisa yango. Na nsima ya elakiseli mokomoko, lobelá na mokuse likambo moko oyo bandeko basali yango malamu na elakiseli yango.
Min. 15: “Batelá liso na yo alima.”a Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Soki ngonga ezali, lobelá bavɛrsɛ oyo batii maloba na yango na lisolo te.
Min.18: Bato oyo bamoni na miso misala na biso ya malamu. (1 Pet. 2:12) Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2002, nkasa 12-14, paragrafe 14-20. Sɛngá bayangani bálobela ndenge bato ya teritware na bino bakamwaki na komona misala na biso ya malamu.
Loyembo 162 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 20 Sɛtɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo ya ntina oyo ezali na mokanda ya biro, oyo ezali na lokasa ya liboso ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bayangani nyonso bátánga Mituya 16: 1-35, mpe na nsima bátala kasɛti video oyo ezali na motó ya likambo, Respect Jehovah’s Authority mpo na kobongisa Likita ya mosala ya pɔsɔ ya 4 Ɔkɔtɔbɛ.
Min. 15: Ndenge nini tosalaki mosala na mbula eleki? Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, akolobela lapolo ya lisangá mpo na mobu ya mosala 2004. Lobelá mingi mpenza makambo ya kolendisa ya lapolo yango, mpe pesá longonya na basakoli mpo na mosala malamu oyo basalaki. Lobelá mosala makasi oyo babongisi-nzela basalaki. Lobelá likambo moko to makambo mibale oyo lisangá ekoki kotyela yango likebi na mobu ya sika.
Min. 20: Tóyika mpiko na misala malamu. (Gal. 6:10) Sololá na basakoli mibale to misato oyo bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza to baoyo basalaka mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala na mbala. Mikakatano nini bakutanaki na yango na mosala ya Yehova, mpe ndenge nini balongaki yango? Nini esalisaki bango bálɛmba te kosalela bato mosusu oyo ezali malamu? Ndenge nini milende na bango na mosala ya kosakola ememeli bango moko mpe bato mosusu matomba? Lobelá mpe makambo oyo basakoli basalaki mpo na koyebisa nsango malamu epai ya bato oyo balobaka minɔkɔ mosusu, soki yango esalemaki mpe na lisangá na bino. Pesá bandeko nyonso longonya mpo na ‘mosala na bango ya sembo mpe mosala makasi na bango ya bolingo mpe ezaleli na bango ya koyika mpiko.’—1 Tes. 1:2, 3.
Loyembo 103 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 27 Sɛtɛmbɛ
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Sɛtɛmbɛ. Monisá ndenge tokoki kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ mpe Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ.
Min. 10: Liloba ya Yehova ezali na bomoi. Lisukulu. Mpo na kosalisa biso tózwa matomba lisusu na programɛ ya botángi ya Biblia ya pɔsɔ na pɔsɔ oyo ebongisami mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, masolo oyo elobi: “Liloba ya Yehova ezali na bomoi,” ezali kobima na banimero mosusu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Salelá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Sɛtɛmbɛ 2004, nkasa 24-27, mpo na komonisa makambo ya ntina ya masolo yango. Nsima ya kolobela na mokuse makambo oyo ezali na mokanda moko ya Biblia, eteni oyo elobi “Biyano na mituna ya Biblia,” ezali kolimbola bavɛrsɛ mosusu ya mokanda yango oyo ezalaka mpasi mpo na kokanga ntina na yango. Maloba oyo ezali na nse ya motó ya likambo moke: “Mateya mpo na biso,” ezali komonisa ndenge makambo oyo tozali kotánga etaleli mpe biso lelo oyo. Talelá mwa bandakisa ya sikisiki mpo na komonisa ndenge masolo yango ekosalisa biso tókóma lisusu na boyebi mingi ya Liloba ya Nzambe. Lendisá bayangani nyonso básalela malamu ebongiseli wana ya sika, ntango tokobanda kotánga mokanda ya Deteronome na pɔsɔ oyo ekolanda.
Min. 20: “Salelá Biblia malamu.”b Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Zwá maloba ya ebandeli na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 145, paragrafe 2-3. Salá mpe bilakiseli mibale ya mikuse oyo ekomonisa ndenge ya kosalela makanisi oyo bapesi ntango tokutani na moto mbala ya liboso, mpe ntango tozongeli ye.
Loyembo 38 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 4 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 5: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 25: “Tómemya Bokonzi ya Yehova.” Tángá Yuda 11, maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti mibale te. Na nsima bandá mbala moko lisolo elongo na bayangani, tuná mituna nyonso oyo ezali na lisolo yango. Bimisá polele likanisi oyo: soki tolingi Yehova aboya biso te, tosengeli koboya elimo ya botomboki oyo Kola azalaki na yango mpe tólanda ndakisa ya bana na ye oyo bapesaki nzela ata na eloko moko te ete ebebisa bosembo na bango epai ya Yehova. Soki kasɛti-video ezali te, bótalela makanisi ya ntina oyo ezali na lisolo, “Tótosa na bosembo mpenza bokonzi oyo Nzambe atii,” oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto 2002.
Loyembo 99 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.